KOKOTELA YA NSANGO ELAMU YA YOANE
Yesu asɛngaki bayekoli na ye bázala batatoli na ye. Ye moko akomaki lisolo ya bomoi na ye te. Mpe ye moko azalaki kotinda mikanda na mangomba te. Kasi bomoto na ye etiká nsango monene na mitema ya bayekoli na ye, baoyo bamemaki bango mpo na kokumisa Nkolo na bango Yesu Klisto na nzela ya Molimo Mosantu. Bamonaki na bolingo na ye, na komikitisa na ye, liwa mpe lisekwa na ye nkembo lokola nkembo ya Tata oyo eleki monene, etondi na ngolu mpe solo. Ntango Sango Malamu ya Matai, Malako mpe Luka balimboli maloba mpe misala na Yesu, mpe Bokonzi ya Nzambe ezali na ntina na bomoi na ye. Yoane ayebisi biso bomoto na Yesu mpe bolingo na ye bosantu. Yango wana, bato batalaka Sango Malamu ya Yoane lokola Sango Malamu ya liboso koleka mosusu. Yango emonani lokola Sango Malamu oyo ezali kopesa pole na mikanda nyoso ya Biblia.
Nani mokomi ya Sango Malamu OYO?
Mbula koto mibale sima na Yesu, batata ya lingomba bandimaki ete Yoane, moyekoli ya Yesu, nde akomaki buku yango oyo ekokani na babuku mosusu te. Yoane mopalanganisi ya nsango malamu atángaki bankombo ya bantoma ebele, kasi atángaki nkombo ya ndeko na ye Yakobo te to nkombo ya ndeko na ye te. Mpo amonaki te ete abongi kotángama na ntango moko na Nkolo mpe Mobikisi na ye Yesu Klisto te. Kasi, Irénée, Episikɔpɔ ya mboka Lyon ya mokili ya Poto, alobaki ete Yoane, moyekoli ya Nkolo, oyo amemaki ye na ntolo na ye na tango ya Elambo ya Nsuka, azali moto oyo akomaki Sango Malamu oyo ntango azalaki kosala na Efese, na tango ya boyangeli ya Mokonzi Trajan banda na mobu 98 tii 117 ya ntango na biso.
Bato mosusu bakanisaka ete Yoane, moto oyo akomaki Sango Malamu yango, azalaki moyekoli oyo azalaki elongo na Yesu te.Kasi azalaki moko ya mikóló ya lingomba ya Efese, moyekoli ya ntoma Yoane, mpe ete Sango Malamu yango ekomamaki sima ya liwa ya Yoane mosika. Batyoli oyo bazali kokoma motindo wana, bazali kokoma makambo ezangi tina. Bayebi Molimo Mosantu te oyo asosolaka mpe akosaka te. Pamba te, Ntoma Yoane akomaki na molende ntango alobaki: « Tomonaki nkembo na ye ». Azalaki mpenza moko ya bato oyo bamonaki na miso na bango, liwa mpe lisekwa ya Yesu. Ezali baninga ya Yoane nde balobi na bango lisapo oyo: « Moyekoli oyo azali kotatola makambo oyo, mpe akomaki yango. Mpe toyebi ete litatoli na ye ezali solo » - Yoane 21:24. Bamonisaki bizaleli ya Yoane oyo ekeseni na bantoma mosusu. Elingi koloba ete Yesu alingaki ye mpe atikaki ye afanda na tolo na ye na tango ya Elambo. Kaka Yoane nde amekaki kotuna Yesu nkombo ya moto oyo atɛki yango: "Nkolo, ezali nani oyo akokaba yo?" (Yoane 13:25)
Yoane, mwana ya Zebede ná Salome, azalaki naino elenge mobali ntango Yesu abiangaki ye mpo abila ye. Azalaki mwana ya nsuka na kati ya bantoma 12. Azalaki mobomi ya mbisi elongo na libota na ye na Betesaida na libongo ya ebale ya Galile. Elongo na Petelo, Andalea, ndeko na ye Yakobo, Filipo mpe Natanaele. Akitaki na lobwaku ya Yaladene mpo na kokutana na Yoane Mobatisi oyo azalaki kostea été bato bábongola mitema. Yoane asɛngaki bolimbisi mpe abatisamaki na Yoane Mobatisi na mai ya Yaladene. Mbala mosusu azalaki ndeko ya libota ya nganga-nzambe monene Ana, mpo moto ya nsuka ayebaki ye mpe azalaki na lotomo ya kokota na ndako ya mokonzi. Na yango, azalaki penepene na libota ya banganga. Yango epesaki ye nzela ya kolobela kati na makambo na ye ya Sango Malamu oyo bateyi mosusu ya nsango malamu bayebisaki te. Ndakisa, makambo oyo Yoane Mobatisi alobaki mpo na Yesu: « Azali Mwana na Mpate na Nzambe oyo akolongola masumu na mokili. Mpo na yango, ntoma Yoane, oyo apemamaki na Molimo Mosantu, azali moyekoli oyo asosolaki Nkolo na ye Yesu na bolingo na ye.
Boyokani Kati Na Ntoma Yoane Mpe Ba Ntoma Mosusu Misatu
Na tango oyo Yoane akomaki Sango Malamu na ye, Sango Malamu ya Matai, ya Malako, mpe Luka esilaki kokomama mpe esilaki koyebana na lingomba. Bakomi misato ya Sango Malamu bakomaki mikanda na bango kouta na makomi ya monoko ya Liebele. Kati na yango, Matai asangisaki litatoli ya bantoma na ntina na makomi na Yesu, mpo ete bakoka kobunga te, lokola bambula ezalaki koleka mpe Nkolo azalaki naino kozonga te. Ekoki kozala ete makambo oyo Yesu asalaki mpe makambo oyo akutanaki na yango na bomoi na ye ekomamaki na esika mosusu. Batei ya Sango Malamu bazalaki kokeba ete bákoma mikanda kati na bosembo nyonso. Monganga Luka azalaki mpe kosalela mikanda mosusu na sembo, mpamba te akutanaki na Malia mama na Yesu, mpe bato ndenge na ndenge oyo bamonaki Nkolo na miso.
Kasi, Yoane azali moto ya ntina mingi uta na makambo oyo touti koloba. Aboyaki kozongela masapo mpe masolo mosusu bazalaki koloba na lingomba, mpe abakisaki mosusu. Sango Malamu misato ya liboso elobeli makambo oyo Yesu asalaki na mboka Galilai, kasi elobeli bobele mobembo moko Yesu asalaki na Yelusaleme, oyo akufaki na yango. Kasi Sango Malamu ya minei oyo Yoane akomaki emonisi biso ete Yesu akendaki na Yelusaleme ntango azalaki kosala mosala na ye na Galilai. Yoane ayebisi biso ete Yesu akendaki mbala misato na mboka - mokonzi ya ekólo na ye, epai bakonzi ya ekólo na ye baboyaki ye. Nsima ya kotɛmɛla ye mbala na mbala, bakitisaki ye mpo bábaka ye na ekulusu. Ezali Yoane moto ayebisaki biso mosala oyo Yesu asalaki epai ya Bayuda ya Yelusaleme, mboka oyo motindo ya kobika ya Kondima na ya Kala ezalaki.
Mokomi ya Sango Malamu ya apesaki litomba mingi te na makamwisi ya Yesu. Alobelaki kaka motoba. Boye, Yoane alingaki koyebisa biso nini? Yesu alobaki maloba ya Yesu na lolenge ya moto oyo alobi: "Nazali." Na ndenge wana nde alimbolaki motindo ya Yesu. Bakomi ya Sango Malamu misatu ya libiso balobelaki mingi misala mpe bomoi ya Yesu. Kasi Yoane alobelaki mingi mpenza ndenge oyo Yesu alakisaki ye na kembo na ye. Kasi epai wapi Yoane azwaki makambo oyo? Epai wapi maloba oyo ezwami epai ya bakomi mosusu misatu te ? Ezali Molimo Mosantu oyo akundwelaki ye nsima ya Kitela ya Molomo Mosantu. Mpo ete Yoane ye moko ayambolaki mbala na mbala ete bayekoli basosolaki te bosolo ya maloba mosusu ya Yesu kino nsima ya lisekwa mpe koya na Molimo Mosantu. Na nsima, azwaki ntina ya maloba oyo Yesu alobaki mpo na ye moko, oyo ezalaki na maloba "Nazali." Ezali maloba oyo ekeseni na Sango Malamu mosusu.
Yoane alobeli mpe maloba oyo Yesu alobaki kosalela bokeseni. Ndakisa pole mpe molili, nzoto na molimo, solo mpe lokuta, bomoi mpe liwa, mpe maloba 'kozala uta na likolo mpe uta na nse. Maloba ya kokesana oyo ezali ata moke te na Ba Sango Malamu mosusu. Sima ya ba mbula, Molimo Mosantu akundwelaki Yoane maloba ya Nkolo ntango azalaki kofanda na mokili ya Baela. Mosakoli YA Sango Malamu asosolaki ete Yesu asukaki te bobele na koloba lokota oyo ezali lokola lokota ya Liebele, kasi lisusu mpo na bato ya bikólo mosusu.
Malamu Na Yoane Ezali Na Tina Nini?
Yoane alingaki kolakisa Yesu na lolenge ya maloba too ya mayele ya milimo mpe ya makanisi mpamba te. Kasi atiaki makanisi mingi koleka bato mosusu na ntina na kobotama na ye lokola moto, na bolɛmbu na ye, mpe mposa na ye ya mai, wana azalaki na ekulusu. Yesu azali Mobikisi ya bato nyonso, kaka ya Bayuda te, pamba te azali Mwana-Mpate ya Nzambe oyo alongoli masumu ya mokili. Yesu amonisi biso bolingo yaNzambe epai ya bato nyonso.
These things which we mentioned are a method and evidences for reaching to the heart and core of this gospel, namely that Jesus Christ is the Son of God. His Makambo oyo touti koloba ememi biso na katikati ya Sango Malamu oyo. Koyeba été Yesu Kristo azali Mwana na Nzambe. Bomoi ya libla na ye emonisami na koumela na ye mwa tango muke, bonzambe na ye kati na bomoto na ye, mpe bokonzi na ye kati na bolɛmbu na ye. Na yango, kati na Yesu, Nzambe azalaki na kati ya bato.
Tina na Yoane ezalaki te été amonisa Yesu na ndenge ya mayele to ya kobombana, kasi komonisa Nkolo na nzela na Molimo Mosantu na moboko ya kondima ya solosolo. Yango wana, asukisi Sango Malamu na ye na maloba ya lokumu oyo: "Makambo oyo ekomami mpo bóndima ete Yesu azali Klisto, Mwana ya Nzambe, mpe na nzela ya kondimaka bino bózwa bomoi na nkombo na ye." - Yoane 20:31. Kondima Yesu ya solo kati na bo Nzambe na yee ezali ezali tin aya Sango Malamu ya Yoane. Kondima yango eboti kati na biso bomoi ya bo Nzambe, bomoi ya seko mpe bomoi ya bosantu.
Sango Malamu Ya Yoane Akomaki Mpo Na Banani?
Buku oyo, oyo etondi na maloba ya solo na tina na Klisto, ekomamaki mpo na kotea ba pakakano te, kasi mpo na kolendisa lingomba mpe kolendisa yango été na kati ya Molimo. Ntoma Polo abandaki kotonga mangomba na mokoli na Anatolia na tango oyo azalaki na boloko na Loma. Petelo akendaki kotala mangomba yango yango oyo etikalaki zanga na mokengeli. Nsima ya liwa ya Petelo na Polo, na tango ya minyoko ya mokonzi Néron oyo azalaki koyangela Loma, Yoane azwaki esika na bango mpe akendaki kofanda na Efese, esika oyo esangisaki mangomba nyoso. Azalaki kokamba mangomba ndenge na ndenge oyo epalanganaki na Asie mobimba. Moto nyonso oyo akotánga mikanda oyo mpe buku ya Emoniseli mokapo ya 2 mpe 3 akoyeba ntina ya kobanga mpe makanisi ya Ntoma Yoane oyo asali ete tómona bolingo na Nzambe na kati ya Yesu Kristo. Atemelaki bandimi ya boyebi ya mayele ya mokili oyo bakɔtaki na etonga na ye lokola bambwa ya zamba mpe babebisaki bampate na ye na makanisi mpamba, mibeko ya makasi, mpe bonsomi ya mabe, mpamba te basangisaki solo na makanisi na bango.
Bayekoli ya Yoane Mobatisi bafandaki mpe na Anatolia. Bazalaki kokumisa moto oyo asɛngaki babongola mitema koleka Yesu Mobikisi na bango. Bazalaki naino kozela Masiya oyo alakamaki, bakanisaki ete ayei naino te. Ntango Yoane alobeli bango na tina na Yesu, azali kobalola na makambo wana nyonso oyo ekeseni, oyo ezali kowangana Klisto. Mpe mongongo na ye ezali kotɛmɛla molimo ya bato ya tembe, mpe alobaki ete: "Tomoni nkembo na ye, nkembo lokola Mwana na likinda oyo auti epai ya Tata, atondi na ngolu mpe na solo."
Emonani lokola ete mingi kati na bato oyo bazwaki nsango malamu oyo bazalaki bapakano, mpamba te Yoane apesi makambo mingi na ntina na bomoi ya Bayuda oyo elingaki kozala na ntina te mpo na kolimbola yango epai na Bayuda. Lisusu, Yoane atyelaki motema te na maloba ya Yesu oyo ekomamaki na monɔkɔ ya Araméen na ndenge abongolaki yango na monoko ya Baela basakoli ya nsango malamu mosus. Na bongo, asaleli maloba ya lokota ya Baela oyo eyebani te kati na lingomba na ye, atondisi yango na molimo ya Sango Malamu mpe atatoli maloba na Yesu na lokota ya Baela na bosomi na lisungi ya Molimo Mosantu. Na boye nsango malamu na ye ezali mozindo mpe motau mpe elobami mingi koleka nguya nyonso ya mayele na lolenge ya bulé. Molimo Mosantu azali kolakisa biso na Sango Malamu oyo bomengo ya bosolo na bopete nyonso, mpo ete moto nyonso akoka kososola ntina na yango ya seko.
Ekomamaki Na Tango Nini?
Totondi Nkolo oyo apesaki nzela na bato oyo bayekolaka bileko na moyele ya mokili, bázwa mikolo mileki eteni ya mikanda oyo ekomamaki na mobu 100 nsima ya liwa ya Klisto. (L.T.B.) na mokli ya Ezipito. Eteni ya mikanda oyo, tokoki kotánga polele makomi mosusu oyo euti na Sango Malamu ya Yoane. Makambo oyo bamonaki na kati ya biteni ya mikanda oyo emonanaki été Sango Malamu oyo Yoane akomaki eyebanaki na mobu 100, bobele na mokili na Asia ya muke te kasi mpe na mokili ya Afrika ya likolo, mpe na ntembe te mpe na Loma, oyo esukisaki ntembe oyo eumelaki mingi mpe maloba mabe nyoso. Bosolo oyo elendisi kondima na biso mpe epesi biso nzela ya kopesa Nsango Malamu oyo na Ntoma Yoane ye moko, na nse na nguya ya Molimo Mosantu.
Makambo Nini Mazali kati Na Sango Malamu Na Yoane?
Ezali motau te kobongisa makami. Mpe ezali mpasi mingi kokabola Nsango Malamu ya Yoane na biteni bikeseni. Tozali ata bongo likanisi kokabola na biteni oyo:
- Kongenga ya Pole ya Bonzambe (1:1-4:54).
- Pole engɛngaki kati molili kasi molili eyambaki yango te (5:1-11:54)
- Pole engɛngaka kati na bantoma (11:55-17:26).
- Pole elongi molili (18:1-21:25).
Mosakoli ya Ssango Malamu Yoane azali kotia makanisi na ye na molɔngɔ na kosangisáká yango zingazinga ya likanisi to maloba minene moko to mibale, oyo ekangisami esika moko lokola motako oyo ezali kosala monyololo. Bandimbola na yango ekesanaka ntango mosusu.
Makanisi ya tango ya kala poyo Yoane azalaki na yango, na emonaneli na yango ya mozindo na nzila ya Molimo, eyokani na bomoi ya monoko ya Greke na bomoko oyo ekeseni na mosusu mpe ya nkembo. Ata lelo oyo, Molimo Mosantu azali kosalisa biso tososola nsango malamu oyo. Azali mpo na biso liziba ya seko ya boyebi mpe bwanya. Ye oyo akoyekola buku oyo na mozindo akofukama liboso ya Mwana ya Nzambe mpe akopesa bomoi na ye epai na Ye na botondi, masanzoli, mpe bosikola ya libela.
MITUNA
- Nani azali mokomi ya Sango Malamu ya minei?
- Boyokani nini ezali kati na Sango Malamu ya minei mpe BA Sango Malamu misato ya liboso?
- Ntina ya nsango malamu ya Yoane ezali nini?
- Nsango malamu oyo ekeseni na mosusu nyonso ebongisami mpo na banani?
- Ndenge nini tokoki kokabola yango, kokabola yango na mikonza?