Waters of Life

Biblical Studies in Multiple Languages

Search in "Lingala":
Home -- Lingala -- John - 002 (The word before incarnation)
This page in: -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Bengali -- Burmese -- Cebuano -- Chinese -- Dioula -- English -- Ewe -- Farsi? -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Javanese -- Kiswahili -- Kyrgyz -- LINGALA - Malayalam -- Peul -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Thai -- Turkish -- Twi -- Urdu -- Uyghur -- Uzbek -- Vietnamese -- Wolof -- Yiddish -- Yoruba

Previous Lesson -- Next Lesson

YOANE - Pole Epeli Kati Na Molili
Koyekola Sango Malamu Na Yesu Oyo Yoane Akomi
ETENI YA 1 - Kongengela Ya Pole Ya Bomoi (Yoane 1:1 - 4:54)
A - Liloba Ya Nzambe Ekomi Kati Na Yesu (Yoane 1:1-18)

1. Bonzambe mpe mosala Ya Liloba ya Nzambe Liboso ya kofanda kati ya moto (Yoane 1:1-5)


YOANE 1:1
1 Na ebandeli Liloba ezalaki, pe Liloba azalaki elongo na Nzambe, pe Liloba azalaki Nzambe.

Moto amonisaka makanisi mpe mikano na ye na maloba. Ozali oyo ozali koloba. Maloba na yo ezali bokuse ya bomoto na yo mpe emoniseli ya molimo na yo.

Na elimbweli ya molai, Liloba ya Nzambe ezali kolakisa bonzambe mpe nguya na Ye oyo ezali kosala na Liloba na Ye oyo ezali Mosantu. Mpo na ebandeli, Nzambe akelaki lola mpe mabele na mpema ya Liloba na ye ya nguya. Mpe ntango alobaki ete: “Tika ete ezala,” ezalaki bongo. Tii lelo, nguya ya Nzambe ezali komonana na maloba na ye. Ososoli ete nsango malamu oyo ozali na yango na maboko na yo etondi na bokonzi ya Nzambe? Buku oyo ezali na nguya koleka ma ndoki nyonso mpo elongolaka mabe oyo ezali kati na yo mpe ekolisaka oyo ezali malamu na esika na yango.

Kati na Sango Malamu na Yoane, liloba « LILOBA YA NZAMBE » ezali na bilembweli 2na lokota ya Baela. 1. Pema oyo ezali koyokana libanda ya monoko. 2. Moto mobali. Na lokota ya balabo, bilimbweli mibale wana ekesani na lolenge ya mokonza oyo elandi liloba, soki mwasi soki mobali. Klisto auti na Tata lokola liloba bosembo oyo euti na monoko. Mpo na yango, Klisto azali mbano ya mokano ya Nzambe mpe makanisi na yee. Tokozwa motindo oyo na mangomba mosusu, koyeba été Klisto azali Liloba ya Nzambe mpe Molimo oyo euti na Nzambe. Moto moko azali na lolenge wana te ya lola, bobele oyo abotami na ngondo Malia.

Kokóma moto ya Klisto na Beteleme ezalaki ebandeli ya bomoi na ye te, mpamba te azalaki elongo na Tata banda ebandeli mpe azalaki liboso ete mokili ekelama. Klisto azali seko, ndenge Tata azali seko; ezali kobongwana te kaka lokola Liloba ya Nzambe.

Yoane amonisi biso boyokani ya bomoko kati na Klisto mpe Tata na ye. Akabwanaki na ye te. Na bokeseni na liloba oyo ebimaka na monoko na biso mpe ebungaki na mopepe. Klisto atikali elongo na Nzambe mpe afandi kati na ye. Liloba "elongo na Nzambe" elakisi na lokota na Baela ete liloba ekendaki epai ya Nzambe, ekota na kati na ye. Yango wana, Klisto azalaki ntango nyonso kotambwisama epai ya Nzambe. Oyo ezali ezaleli ya baye banso babotami na Molimo Mosantu. Mpo été ye nde liziba ya bolingo. Mpe bolingo elukaka bosomi te, kasi etikalaka kokambama epai euti na yango mpe etikalaka kati na yango.

Nzambe akelaki Klisto na liloba na ye te, lokola bikelamu mosusu. Kasi Mwana ye moko azali Liloba oyo azali kokela mpe atondi na bokonzi ya Tata na ye. Na nsuka ya verset oyo ya liboso tozali kokuta esakola ya mokano ete Liloba azalaki Nzambe Ye moko. Mosakoli asosolisi biso été Klisto azali Nzambe, abotami na Nzambe, pole abotami na pole, Nzambe ya solo abotami na Nzambe ya solo, abotami mpe akelami te, na moko elongo na Tata, ya seko, ya nguya, ya mosantu mpe ya mawa. Moto nyonso oyo andimi ete Klisto azali Liloba ya Nzambe akondimela maloba oyo etali bonzambe na ye.

LOSAMBO: Nkolo Yesu Klisto, tofukami liboso na yo mpo ete ozalaki elongo na Tata banda kala. Ntango nyonso okamabami na ye. Salisa biso tózala tozala na nse ya bokonzi na biso moko te, kasi tómipesa epai ya Nzambe mpe tótikala na bolingo na ye. Totondi yo, Nkolo Yesu, mpo na Sango Malamu na yo oyei epai na biso na maloba ya kososola, kobimisela biso bokonzi na yo mpo ete tokoka kondima yango na nzela ya Liloba na yo.

MOTUNA:

  1. Liloba ya ntina na molongo ya liboso ya kotanga ya liboso ya Yoane 1 ezali nini mpe ndimbola na yango ezali nini?

www.Waters-of-Life.net

Page last modified on December 09, 2025, at 02:55 AM | powered by PmWiki (pmwiki-2.3.3)