Previous Lesson -- Next Lesson
c) Lisekwa ya Lazare (Yoane 11:34-44)
YOANE 11:38-40
38 Yesu, akómaki lisusu kolela na kati na ye moko, akómaki na lilita. Ezalaki libulu, mpe batyaki libanga liboso na yango. 39 Yesu alobaki ete: “Bolongola libanga.” Marta, ndeko mwasi ya moto oyo akufi, alobaki na ye ete: “Nkolo, na ntango oyo nsolo mabe ezali, mpo alali kuna mikolo minei.” 40 Yesu alobaki na ye: “Nayebisaki yo te ete soki ondimi, okomona nkembo ya Nzambe?”
Nzinga nzinga ya Yelusaleme, bato bazalaki kokunda bakufi na bango na eteni oyo eyemami na libanga, mpe batyaki libanga moko monene ya zolongano na ekuke. Ezalaki na likoki ya kobalusa libanga oyo mosika mpo na kofungola lisusu lilita.
Batyaki Lazalo na moko ya mabulu yango. Yesu apusanaki penepene mpe amonaki nsɔmɔ ya liwa na bilongi nyonso. Na liwa amonaki nkanda ya Nzambe oyo emonisami na basumuki nyonso, lokola nde Nzambe apesi bato ya bomoi na maboko ya mobebisi. Kasi Mozalisi alingi te liwa ya bato ya bomoi, kasi boyamboli mpe kobongwana na bango na bomoi.
Yesu apesaki mitindo ete bálongola libanga oyo ekangaki esika ya kokɔta na lilita. Bato bakamwaki mpo kosimba ebembe ekobebisa yo na boumeli ya mikolo mingi. Kopɔla esilaki kobanda nsima ya mikolo minei. Marta atelemeli na ndenge ya semba na kolobaka ete, "Nkolo, ezali malamu te kotungisa moto mosusu oyo akufi, azali na nsolo mabe." Marta, kondima na yo ezali wapi? Owutaki koyambola ete Yesu azalaki Mwana ya Nzambe mpe Masiya mpe azalaki na likoki ya kosekwisa bakufi. Likambo ya liwa mpe elilingi ya lilita ekangaki miso na ye mpe ayebaki te nini Nkolo na ye alingaki.
Nzokande, alendisaki kondima na ye mpe alendisaki elikya na ye mpo na koleka makoki ya moto. Asengaki bondimi mobimba oyo ebongi na emonaneli ya nkembo ya Nzambe. Yesu alobaki te, “Ndima mpe okomona ngai nazali kosala likamwisi monene.” Asakolaki na bayekoli na ye ete bokono ya Lazare ezalaki ya liwa te, kasi mpo na nkembo ya Nzambe (Yoane 11:4). Yesu ayebaki oyo asengelaki kosala soki totaleli boyokani na ye na mokano ya Tata na ye. Alukaki kobalola likebi na ye uta na liwa ya nsomo kino na nkembo ya Nzambe, oyo emonisami na kondima. Mokano na ye ezalaki lokumu na ye te kasi nkembo ya Tata na ye.
Bobele bongo, Klisto alobi na bino, “Soki bondimi, bokomona nkembo ya Nzambe.” Talá mosika na mikakatano mpe mimekano na yo. Kozala obsédé te na culpabilité na yo, na ba maladie na yo, pe tala Yesu, ndima présence na ye, omitika epayi na ye lokola muana na maboko ya mama na ye. Tika ete azala na nzela na ye; alingaka yo.
YOANE 11:41-42
41 Bongo balongolaki libanga yango. Mpe Yesu atombolaki miso mpe alobaki ete: “Tata, napesi yo matɔndi mpo oyoki ngai.” 42 Mpo na ngai, nayebaki ete boyokaka ngai ntango nyonso; kasi nalobaki mpo na ebele ya bato oyo batɛlɛmaki pembeni na ngai, mpo bándima ete yo nde otindaki ngai.
Ndenge Marta atyelaki maloba ya Yesu eyokani na kondima na ye na etinda yango. Apesaki baninga na ye malako ete bálongola libanga yango. Tension emataki na kati ya ebele ya bato. Yesu akokɔta na lilita mpe akozwa nzoto ya molingami na mabɔkɔ na ye to akosala nini?
Kasi Yesu atɛlɛmaki na kimya liboso ya lilita. Atombolaki miso na ye na libondeli mpe alobaki na mongongo makasi. Awa tozali na moko ya mabondeli ya Yesu. Abengaki Nzambe Tata na ye. Apesaki Tata matondo mpo ete bomoi na ye mobimba ezalaki bosantu mpe losambo ya Botata ya Nzambe. Apesaki Nzambe matɔndi liboso mpo na eyano na ye. Ntango bato mosusu bazalaki kolela, Yesu abondelaki. Asɛngaki Tata na ye azongisa moninga na ye na bomoi, elembo ya bomoi ya bonzambe oyo ezali kolonga liwa. Tata andimaki mpe apesaki ye bokonzi ya kobikisa moto oyo azwi mpasi na nsɔmɔ ya liwa. Yesu andimaki ete Nzambe akoyanola na mabondeli na ye, likambo ya kokamwa te, mpamba te azalaki koyoka mongongo ya Tata na ye ntango nyonso. Yesu abondelaki bomoi na ye mobimba, kasi awa abondeli na mongongo makasi mpo bato bákanga ntina ya mabombami oyo ekobima liboso ya miso na bango. Apesaki matondo na Tata oyo ayanolaki ntango nyonso mabondeli na ye. Lisumu moko te ekabolaki bango, epekiseli moko te etelemaki kati na bango. Mwana azali kotingama te na bolingi na ye moko, azali kosenga ata lokumu moko te mpo na ye moko to bokonzi ya nguya mpo na bolamu na ye moko. Botondi ya Tata esalaka na kati ya Mwana. Botata na ye esekwisi Lazare uta na bakufi. Yesu ayambolaki nyonso wana na miso ya bato, mpo bato báyeba ete Tata nde atindaki bango Mwana. Na yango, lisekwa ya Lazare ekómaki kokumisa Tata, elembo ya likamwisi ya bomoko ya Bosato.
YOANE 11:43-44
43 Tango alobi boye, agangaki na mongongo makasi ete: “Lazalo, bimá!” 44 Mpe mowei abimaki, akangaki mabɔkɔ mpe makolo na bilamba ya lini, mpe elongi na ye ezingami na eloko ya kosukola. Yesu alobaki na bango ete: “Bófungola ye mpe bótika ye akende.”
Tango kaka Yesu agangaki "Lazalo, bima!", mokufi a azongisi (nzokande bakufi na bosembo bayokaka eloko te). Bomoto ya moto esukaka na liwa te. Nkombo ya mondimi nyonso ekomami na lola. Libiangi ya Mozalisi, mongongo ya Mosikoli, mpe kotingama ya Molimo ya bomoi ekoti na biteni ya nse ya liwa. Ndenge moko mpe, Molimo Mosantu abandaki na molili, yambo ya kokela molongo na mobulu.
Lazalo amesanaki koyoka mongongo ya Yesu mpe kotosa ye. Na lilita mpe ayokaki mpe atosaki na kondima. Mobeko ya bomoi ya Klisto esopanaki kati na ye; Motema na ye ebandaki kobeta, miso na ye efungwamaki mpe binama na ye eninganaki.
Na nsima, eteni ya mibale ya likamwisi esalemaki, mpamba te Lazare azipamaki na bilamba ya lini. Ebembe yango ezalaki lokola nsɛlɛlɛ oyo ezali na kati ya chrysalis, oyo ezalaki kokoka koyoka eloko moko te. Akokaki koningisa mabɔkɔ na ye te mpo na kolongola bansinga na motó na ye, yango wana Yesu apesaki bango mitindo ete báfungola ye.
Bato nyonso bakamwaki ntango bamonaki elongi ya Lazare oyo ezalaki mpɛmbɛ; azalaki koningana atako ba bandage na ye. Bato nyonso batalaki ye na miso ntango azalaki kopusana penepene na Yesu.
Lazalo alekaki na kati ya ebele ya bato mpo na kozonga na ndako. Yoane ayebisi biso eloko moko te mpo na baoyo bafukamaki liboso ya Yesu, to mpe na ntina ya mpisoli ya esengo mpe ya koyambana. Akokanisi mpe te lisekwa oyo na kokamatama ya bandimi na Yesu na koya na ye ya mibale. Nyonso wana ezalaki na ntina ya mibale. Yoane azali kosala elilingi ya Yesu, mopesi ya bomoi, liboso ya miso na biso, mpo ete tokoka kondima mpe kozwa bomoi ya seko. Yoane, mosakoli ya nsango malamu, azalaki na kati ya ebele ya bato. Na kondima amonaki nkembo ya Nzambe na kati ya Mwana, mpo ayokaki mongongo ya Klisto mpe amikitisi na nguya na ye. Osekwaki uta na bakufi na nzela ya kondima na Klisto?
LOSAMBO: Nkolo Yesu, merci ndenge osekwisi Lazare na kombo ya Tata na yo. Osekwi mpe uta na bakufi. Totondi yo mpo na bomoi na yo kati na biso. Na nzela ya kondima tosekwi elongo na bino. Tosengi bino bosekwisa bakufi ya ekolo na biso pe bomema bato oyo bazangi kondima na bino pe ba sangana na bino po bazua bomoyi ya seko.
MOTUNA:
- Ndenge nini nkembo ya Nzambe emonanaki na lisekwa ya Lazalo?