Waters of Life

Biblical Studies in Multiple Languages

Search in "Lingala":
Home -- Lingala -- John - 075 (The Jewish council sentences Jesus to death)
This page in: -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Bengali -- Burmese -- Cebuano -- Chinese -- Dioula? -- English -- Ewe -- Farsi? -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Javanese -- Kiswahili -- Kyrgyz -- LINGALA - Malayalam -- Peul -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Thai -- Turkish -- Twi -- Urdu -- Uyghur? -- Uzbek -- Vietnamese -- Wolof -- Yiddish -- Yoruba

Previous Lesson -- Next Lesson

YOANE - Pole Epeli Kati Na Molili
Koyekola Sango Malamu Na Yesu Oyo Yoane Akomi
ETENI YA 2 - Pole Engengi Kati Na Molili (Yoane 5:1 - 11:54)
C - Mobembo Ya Suka Ya Yesu Na Jerusalem (Yoane 7:1 - 11:54) Kokabola Molili Na Pole
4. Lisekwa ya Lazare mpe mbuma na yango (Yoane 10:40 – 11:54)

d) Koyangana ya banganga ya Bayuda ekateli Yesu etumbu ya liwa (Yoane 11:45-54)


YOANE 11:45
45 Bayuda mingi oyo bayaki epai ya Maria mpe bamonaki makambo oyo Yesu asalaki, bandimaki ye.

Lazalo akómaki lisusu na bomoi nsima ya liwa na ye. Azalaki kolya, komela mpe kosolola. Bato bamonaki ye na bomoi na nzela mpe na ndako. Bato mingi bakamwaki na nkembo ya Yesu mpe bayebaki ete azali Masiya, Mwana ya Nzambe na bomoi. Na yango, motángo ya bayekoli ekómaki mingi mpe bato bakimaki mbangu na ndako ya Maria mpo na komona Yesu elongo na Lazalo.

YOANE 11:46-48
46 Kasi bamosusu kati na bango bakendaki epai ya Bafalisai mpe bayebisaki bango makambo oyo Yesu asalaki. 47 Bongo banganga-nzambe bakonzi ná Bafalisai basangisaki likita moko mpe balobaki ete: “Tokosala nini?” Mpo moto oyo azali kosala makamwisi mingi. 48 Soki totiki ye asala boye, moto nyonso akondimela ye, mpe Baloma bakoya mpe bakobebisa engumba na biso mpe ekólo na biso.

Bato mosusu oyo bamonaki likamwisi yango basalaki mbangu mpo na koyebisa Bafalisai makambo nyonso. Bazalaki naino kondima yango te. Bosambisi na bango elobelami na lisese ya “moto ya bozwi,” oyo Abalayama ayanolaki ete, “Soki bayoki Mose mpe basakoli te, bakondimisama mpe te, ata moto asekwi uta na bakufi” (Luka 16:31). Molimo ya Nzambe akoki te kobongola mitema ya mabanga oyo eboyi kotia motema na Yesu, ata soki makamwisi minene esalemi liboso ya miso na bango.

Na likita ya banganga, Bafalisai bazalaki na bopusi makasi na makambo ya losambo. Lisusu, banganga-nzambe minene basengelaki kotika kotingama na bango. Basɛngaki na bandimi 70 bálobela mokakatano yango. Basadukai, oyo bawanganaki lisekwa, basepelaki na liyangani ya Banganga. Bandimi yango bazwaki ekateli te mpe babulunganaki, mpamba te Yesu asalaki lisumu moko ya sikisiki te oyo esɛngaki bákanga ye. Nzokande, bozongisi ya boklisto esalemaki kati na bato, mpe bankóto zomi ya ba pèlerins bakómaki na mboka-mokonzi mpo na Elekeli. Na ntembe oyo elandaki, basangani ya Sanedrina babengaki Yesu moto mpamba, ata moto ya Nzambe to mosakoli te. Atako bawanganaki yango, bakokaki te koboya makamwisi na ye ya nguya.

Na boumeli ya kosamba, bobangi ekómisaki molili na Sanedrina. Bazalaki kobanga ete bokonzi ya ampire ekomona likambo yango mpe ekokɔta na likambo yango. Koyangana ya ebele ya bato zingazinga ya moto oyo asalaki makamwisi na lolenge ya Masiya, ezalaki elilingi ya likama ya botomboki. Na likambo yango, Baloma bakopekisa kokɔta na tempelo, esika oyo Nzambe afandaka. Na nsima milulu ya tempelo ekotika, elongo na bambeka, mabondeli, mpe mapamboli.

YOANE 11:49-52
49 Moko na bango, Kaifa, oyo azalaki nganga-nzambe monene na mbula wana, alobaki na bango ete: 50 “Bozali kososola eloko moko te ; bozali mpe komona te ete ezali mpo na bolamu na bino soki moto moko akufi mpo na bato nyonso, mpo ete ekolo mobimba ebebisama te ?” 51 Nzokande, makambo oyo azalaki koloba na bango ewutaki na makanisi na ye moko te ; kasi lokola azalaki mokonzi ya Banganga-Nzambe na mobu wana, yango wana asakolaki ete Yesu asengelaki kokufa mpo na ekolo ya Bayuda. 52 Mpe asengelaki kokufa kaka mpo na ekolo yango te, kasi mpe mpo na kosangisa kati na libota moko, bana nyonso ya Nzambe, oyo bapalangana bipai na bipai.

Lokola nganga-nzambe monene Kayafa amonaki ete likita yango ezalaki kosila, atɛlɛmaki mpe abandaki kobundisa bakonzi ya ekólo, kofunda bango ete bayebaki makambo te mpe bakanisaki te. Lokola azalaki prezida ya Sanedrina, azalaki na lotomo ya koloba. Bapakolaki ye mafuta, elembo ya bosantu, kasi azalaki motɛmɛli ya Klisto. Asengelaki kotondisama na Molimo Mosantu, mpe Nzambe alingaki koloba na nzela na ye lokola mokonzi ya ekolo. Nzokande alandaki ba caprices na ye mpe asalaki libunga. Lokola akanisaki ete mokumba ya mosakoli ezalaki na boyokani na etɛlɛmɛlo na ye ya nganga-nzambe, azalaki kotalela bato nyonso lokola bato oyo bayebi makambo te.

Elimo oyo elobelaki na nzela ya Kayafa emonisami, mpamba te Satana alobaki kati na ye, emonani ete akangamaki na mikano ya Nzambe, kasi na bosolo atɛmɛlaki. Emonani ete ezalaki malamu koleka mpo na bato ete Mwana na Mpate ya Nzambe akufa na esika na bango, mpo ete bakoka kokima nkanda ya Nzambe mpe bazwa bomoi ya seko. Kasi molobeli ya Satana apesaki likanisi ya kosilisa likambo yango mpo na makambo ya politiki: “Tiká Yesu akufa mpo na kobikisa biso na nkanda ya Baloma.” Na esakoli oyo ya diabolique, maloba ya Klisto elongamaki, elingi koloba zabolo azali tata ya molimo ya Bayuda mingi, mpo azali moto ya lokuta mpe tata ya lokuta.

Atako makanisi wana ya mabe, Yoane amonaki ete Kaifa azalaki komonisa mokano moko ya mabe, oyo ezalaki mpenza solo ya Nzambe. Kayafa asengelaki kolakisa liwa ya Yesu lokola lisiko mpo na bato banso, kozanga koyeba ntina ya maloba na ye "ya bokonzi". Moto oyo ayebaki eloko te ezalaki Kayafa mpo ete andimaki Yesu te, atako Molimo Mosantu akambaki ye na kobimisa fraze moko na ntina ya liwa ya bomikabi ya Klisto. Alongaki te kosimba ndimbola ya maloba na ye moko, mpo alingaki mpenza kotelemela yango.

Mosakoli ya Nsango Malamu Yoane asosolaki ntina ya maloba oyo na kati ya lobiko ya mokili. Yesu akufaki te mpo na kozipa masumu ya bato na ye kaka, kasi ya bandimi ya bikolo nyonso. Baoyo banso batyelaka Ye motema bazali bana ya Nzambe, mpo na kotiaka motema na Mobikisi, bazwi bomoi ya seko elongo na bokasi mpe bizaleli na yango.

Mokano ya bondimi na biso esuka te na lobiko na biso moko, kasi ezali na mokano ya bomoko ya bana banso ya Nzambe kati na Klisto. Bolingo na ye ezali elembo mpe nguya ya boklisto. Nkombo na ye esangisaka bayekoli na ye. Ntango bazali na boyokani na motó, bakangisaka bango na bango. Tolamuka mpe tokende epai na ye. Tokokuta bandeko mibali mpe basi mingi oyo bazali mpe na kati ya libota ya Nzambe, boyokani ya penepene koleka oyo ya mokili.

YOANE 11:53-54
53 Banda mokolo wana, bazwaki ekateli ya koboma ye. 54 Yango wana Yesu atambolaki lisusu polele te na kati ya Bayuda; kasi azongaki na etuka pene na esobe, na engumba moko babengi Efalaima; mpe kuna atikalaki elongo na bayekoli ba ye.

Esakweli ya Kayafa ekamwisaki basangani mosusu ya Sanedrina oyo basungaki Yesu, kasi mingi basepelaki, bakanisaki ete Nzambe alobaki na nzela ya Kayafa mpo na kosambisa mokosi mpe kobikisa ekolo. Na boyokani, Sanedrina endimaki etumbu ya Kayafa mpe likanisi ya koboma Yesu. Mbala mosusu bato oyo bazalaki sembo mingi bamekaki koboya, kasi balongaki te. Kayafa ya mayele mabe atindaki bango bándima mwango ya koboma Yesu, na mayele nyonso mpo na kokima botomboki ya ebele ya bato.

Yesu ayokaki mwango yango mpe mbala mosusu ayebaki yango na elimo ya Nzambe. Alongwaki na esika oyo Sanedrina ezalaki koyangela mpe akendaki elongo na bayekoli na ye na Lobwaku ya Yaladene na ebimelo na tango ya Nabulu, kozelaka ngonga ya mbeka mpe lisekwa na ye.

Esika ya etumba ezalaki sikawa polele. Kowelana na ye na banganga-nzambe banda tempelo epɛtolamaki mpe matata na ye na bato oyo bayekolaka mibeko banda kobikisama na Sabata ekómaki sikawa na nsuka na yango na lisekwa ya Lazalo. Na yango, bakambi ya bato bazwaki ekateli ya koboma moto yango ya boboto nokinoki.

Pole engɛngaka na molili, mpe molili ekangaki yango te.

Ndeko ya bolingo, omoni ete Klisto azali pole? Nsango Elamu na Ye engengisi makanisi na yo mpe ezongisaki motema na yo sika? Ozali na bomoi na ye ya seko? Molimo na Ye ememi yo na boyamboli mpe koyambola masumu na yo mpe akelaki bondimi kati na yo mpo na kopambola mpe kosala yo mosantu? Fungola motema na yo mpo na kotika Molimo ya Klisto ebenda yo, otia bomoi na yo mpe lobi na yo epai na ye, mpo ete ondima te kosambisa Yesu na boyokani elongo na banguna na ye. Sangisa motango ya bayekoli mpe yekola koyeba Mosantu mpo oyambola ete: “Tomoni nkembo na ye, nkembo lokola nkembo ya Mwana se moko oyo euti na Tata.”

LOSAMBO: Nkolo Yesu Klisto, merci na Yo ete owanganaki bosolo te na ngonga ya likama; ozali ntango nyonso kokumisa Tata na yo ya likoló. Limbisa kondima na ngai ya bolembu mpe bozangi bokengi na ngai. Salisa ngai na vivre libela na communion na yo na Tata pe na salela yo sans kotika. Bomoi na ngai ekumisa yo.

MOTUNA:

  1. Mpo na nini Sanedrina ya Bayuda ebomaki Yesu?

MAKAMBO YA MITUNA - 4

Ndeko motángi,
tindela biso biyano 15 ya malamu na kati ya mituna 17 oyo ezali awa na nse. Na sima tokotindela bino ba reste ya série ya études oyo.

  1. Ndenge nini Yesu alakisaki Bayuda éte bazalaki bana ya Abraham te?
  2. Bizaleli nini ya zabolo oyo Yesu azali kolakisa biso polele?
  3. Mpo na nini Bayuda balingaki kobamba Yesu mabanga?
  4. Mpo na nini Yesu abikisaki moto oyo abotamaki miso ekufá?
  5. Mpo na nini Bayuda bawanganaki ete bakoki kobikisa moto oyo abotamaki miso ekufá?
  6. Elenge mobali oyo asosolaki nini mokemoke tango batunaki ye mituna?
  7. Kofukama liboso ya Yesu elingi koloba nini?
  8. Mapamboli nini Yesu apesi bampate na ye?
  9. Ndenge nini Yesu akómi Mobateli malamu?
  10. Ndenge nini Klisto azali kokamba etonga na ye?
  11. Ndenge nini Yesu asakolaki bonzambe na ye?
  12. Pona nini Yesu alobelaki nkembo ya Nzambe, atako Lazare akufaki?
  13. Mpo na nini Yesu alongaki mpo na kobikisa Lazare?
  14. Lelo, ndenge nini tosekwa kati na bakufi?
  15. Mpo na nini Yesu azalaki kotungisama na elimo mpe mpo na nini alelaki?
  16. Ndenge nini nkembo ya Nzambe emonanaki na lisekwa ya Lazare?
  17. Mpo na nini Sanedrina ya Bayuda ebomaki Yesu?

Tinda biyano na yo, kobosana te kokoma adresi na yo na ndenge ya kotánga na lokasa ya biyano mpe na enveloppe, na:

Waters of Life
P.O.Box 600 513
70305 Stuttgart
Germany

Internet: www.waters-of-life.net
Internet: www.waters-of-life.org
e-mail: info@waters-of-life.net

www.Waters-of-Life.net

Page last modified on December 22, 2025, at 10:19 AM | powered by PmWiki (pmwiki-2.3.3)