Waters of Life

Biblical Studies in Multiple Languages

Search in "Lingala":
Home -- Lingala -- John - 079 (The Father glorified amid the tumult)
This page in: -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Bengali -- Burmese -- Cebuano -- Chinese -- Dioula? -- English -- Ewe -- Farsi? -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Javanese -- Kiswahili -- Kyrgyz -- LINGALA - Malayalam -- Peul -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Thai -- Turkish -- Twi -- Urdu -- Uyghur? -- Uzbek -- Vietnamese -- Wolof -- Yiddish -- Yoruba

Previous Lesson -- Next Lesson

YOANE - Pole Epeli Kati Na Molili
Koyekola Sango Malamu Na Yesu Oyo Yoane Akomi
ETENI YA 3 - Pole Epeli Kati Na Lisanga Ya Batoma (Yoane 11:55 - 17:26)
A - Ebandeli Ya Poso Ya Pasika (Yoane 11:55 - 12:50)

4. Tata akumisaki na tango ya mobulu ya kati (Yoane 12:27-36)


YOANE 12:27-28
27 Sikawa molimo na ngai etungisami. Mpe nakoloba nini? Tata, bikisa ngai na ngonga oyo? Kasi yango wana nakomi na ngonga oyo. 28 Tata, kumisa nkombo na yo! Mpe mongongo moko eutaki na likoló: Napesi yango nkembo, mpe nakokumisa yango lisusu.

Yesu anyokwamaki na moboko ya bomoto na ye. Azali Mokonzi ya bomoi, kasi amikitisaki kino na liwa. Azali Nkolo ya Bakonzi, kasi atikaki zabolo, nkolo ya Hadès, ameka ye na nguya na ye nyonso. Yesu amemaki na bolingi na biso masumu na biso, mpo na kozika na esika na biso na milinga ya nkanda ya Nzambe. Azali Mwana, elongo na Tata na ye uta seko. Pona lobiko na biso Tata na ye apesaki ye, po tozala na bomoko na ye na ngolu. Moto moko te akoki mpenza kososola mpasi mpe mpasi ya Mwana mpe Tata. Bomoko ya Bosato enyokwamaki mpo na bosikoli na biso.

Nzoto ya Klisto ekokaki te kotelemela mpasi wana ya nsomo. Agangaki ete: “Tata, bikisa ngai na ngonga oyo.” Na nsima ayokaki polele eyano ya Molimo na motema na ye: "Obotamaki mpo na ngonga oyo. Ngonga oyo ezali mokano ya seko. Bokeli nyonso mpe Tata bazali kozela ntango oyo bato bakoyokana na Nzambe, bozalisi na Mozalisi. Mwango ya lobiko ekokokisama na ntango wana mobimba."

Bongo Yesu agangaki ete: “Tata, kumisa nkombo na yo!” Mwana ayokaki mongongo ya mosuni te. Abondelaki na boyokani na Molimo Mosantu: “Nkombo na yo esantisama. Mpo ete mokili eyeba ete ozali Nzambe ya nsɔmɔ te, ya mosika, mpe nazali-kopesa-likebe-moko te, kasi Tata ya bolingo, oyo amipesi na kati ya Mwana mpo na kobikisa bato mabe mpe baoyo bazali kokufa.”

Nzambe akakatanaki te mpo na koyanola na libondeli ya Mwana na ye: "Nakumisi nkombo na ngai kati na yo. Ozali Mwana na ngai ya botosi mpe ya komikitisa. Ye oyo azali komona yo azali komona ngai. Yo ozali molingami na ngai, nasepelaka na yo. Nazali na esengo mosusu te bobele komona yo omemi ekulusu. Okufi na esika ya bato, mpe na liwa na yo, nakomonisa ntina ya nkembo na ngai na kati ya mipepe makasi." ya bomoi bozali kosakola ndimbola ya nkembo mpe ya bosantu ya solo.

Mongongo ya lola ekobaki: “Nakokumisa lisusu nkombo na ngai ntango okobima na lilita mpe okomata epai na ngai mpo na kofanda na nkembo. Bongo okotinda Molimo na ngai likolo ya balingami na yo. Nkombo na ngai ya lola ekokumisama na mbotama ya sika ya bana ebele na nzela ya Molimo Mosantu. Bozali na bango ezali kokumisa ngai; etamboli na bango ya malamu ezali kosantisa ngai. Liwa na yo na ekulusu ekopesa nzela na ba kobotama ya bana ya Nzambe.

YOANE 12:29-33
29 Ebele ya bato oyo batɛlɛmaki pembeni mpe bayokaki yango balobaki ete nkake ezali konguluma. Basusu balobi: “Anzelu moko alobaki na ye.” 30 Yesu alobaki: "Mongongo oyo ebimi mpo na ngai te, Ezali mpo na yo. 31 Sikoyo esambiselo ya mokili oyo ezali, sikoyo mokonzi ya mokili oyo akobwakama libanda. 32 Mpe tango bakotombola Ngai longwa na mabele, nakobenda bato nyonso epai na Ngai. 33 Yesu alobaki bongo mpo na kolakisa lolenge ya kufa oyo asengeli kokufa.
Ebele ya bato bayebaki te ete Yesu azalaki koloba na Nzambe, kasi bakanisaki ete ezali lokito ya nkake. Bazalaki na makoki te ya kososola ete Nzambe azali bolingo, to mpe koyoka mongongo na ye ya malembe, to mpe koyeba ete na nzela ya emoniseli ya nkembo ya Nzambe kati na Mwana na ye, kosambisama ya mokili ebandaki.

Satana abungisaki bokangami na ye na baombo na ye na ngonga oyo Klisto atombolamaki na ekulusu mpo na kopesa biso bomoi na nzela ya liwa na ye. Moto ya Mabe alongolamaki nguya na ye na komikitisa ya Mwana na bolingi ya Tata. Yesu abengaki zabolo mokonzi ya mokili oyo, kotalela mpo mokili mobimba ezalaki na nse ya bokonzi na ye. Lokola Yesu akutanaki na likambo wana ya mpasi, akakatanaki te, kasi abɛtaki Satana na mopanga ya bosembo na ye, mpe abɛtaki ye likámá oyo ebomaki ye. Tozali sikoyo bana ya bonsomi na kombo ya Yesu.

Tobendami na ekulusu na ye. Satana ayinaka Yesu mingi na boye ete atikaki ye akufa na mabele to na mbeto na ye te, kasi akangaki ye na nzete ya nsoni. Kasi lokola nyoka oyo atombolamaki na esobe na tango ya Moize etatolaki na nsuka ya etumbu ya Nzambe mpo na bandimi, ndenge moko ekulusu ememi bosambisi nyonso likolo ya mapeka ya Klisto. Nzambe azali ko condamner te ba oyo batalaka ba ekulusu. Kondima na biso na Klisto ebaka biso na ekulusu elongo na ye mpe esangisaka biso na liwa na ye. Tokufi mpo na masumu mpe tozali na bomoi mpo na boyengebene.

Bomoko na biso na Klisto esangisaka biso na nguya mpe nkembo na ye. Alongi masumu mpe liwa na bosantu, mpe lisusu akobenda biso epai na ye mpe akokamba biso na nkembo na ye. Baoyo nyonso batyelaka ye motema bakokufa ata moke te, kasi bakozwa bomoi ya seko.

YOANE 12:34
34 Ebele ya bato bazongiselaki ye ete: “Toyoki na Mibeko ete Kristo azali kotikala libela; Bongo ndenge nini olobi ete: ‘Mwana ya Moto asengeli kotombolama?’ Mwana ya Moto oyo azali nani?

Bayuda balukaki kotinda Yesu na makasi apesa bango elembeteli oyo ebongi mpe ya polele mpo báluka koyeba bosolo na ye te. Bayebaki ndimbola ya teoloji ya mokanda ya Danyele, mokapo 7, esika Masiya abengami Mwana ya Moto mpe Mosambisi ya mokili. Kasi balingaki kaka koyoka epai na ye bondimisi ya Bomwana ya bonzambe. Basalaki yango mpo na kondima te, mpamba te soki emonanaki ete azali moto oyo alobi ete azali, bakopesa ye kaka bindimeli moko ya likolólikoló. Kati na bango ezalaki na bato oyo bazalaki na makanisi mabe, oyo bazalaki na mposa ya kokanga ye na motambo na kofundaka ye ete azali kofinga Nzambe soki alobi polele ete azali Mwana ya Moto. Yesu amimonisaka te epai ya baluki na ndenge ya mayele, kasi nde epai ya bandimi ya sembo oyo bayanolaka na Molimo Mosantu mpe bayambolaka ete Mwana ya Moto azali Mwana ya Nzambe, yambo ya kozwa bilembeteli ya ntina.

YOANE 12:35
35 Yesu alobaki na bango ete: “Mwinda ezali elongo na bino mpo na mwa ntango mosusu.” Tambola ntango ozali na pole, mpo molili ezwa yo te. Ye oyo atambolaka na molili ayebi te esika azali kokende.

Yesu azali Pole ya mokili, kososolaka ete pole esengaka ndimbola ya sikisiki te. Ezali kososolama mpo ete bato mpamba bakoki komona pole mpe kokesenisa yango na molili. Na moyi, okoki kosala mobembo, kotambola to kopota mbangu. Na butu, moto moko te akoki kosala. Wana moi ezali kongɛnga, ntango ekoki mpo na kosala mpe kozala na molende. Yesu ayebisaki Bayuda ete batikali na ntango moke mpo na kokota na bokonzi na ye ya Pole, soki balingi. Tango oyo esengaka mokano, komikitisa mpe koyika mpiko.

Nzokande, moto oyo aboyi pole atikali na molili mpe azali komona nzela na ye te. Yesu asilaki kosakola epai ya Bayuda ete bakoyengayenga na molili, kozanga nzela, kozanga mokano to kozanga elikya. Esengeli te kobulunganisa molili oyo na molili ya mosuni oyo ezali libanda na biso. Oyo ezali molili ya kati, oyo ebimisami na elimo mabe kati na moto. Na nse ya bopusi na bango, moto akómaka molili mingi. Mpe soki atosaka Klisto te, na nsuka akolonga na molili. Oyebi ntina oyo bikólo mosusu ya “boklisto” ekómi liziba ya molili na mokili oyo? Bato nyonso te oyo bamibengi “baklisto” nde bapesaki bomoi na bango epai ya Klisto. Baklisto oyo bazongisami sika bazali moke. Molili ezali koyangela bato nyonso oyo bakotaka na bokonzi ya pole te. Okozala na makoki te ya kozwa mapamboli ya nsango malamu uta na baboti na yo na ndenge ya automatique. Ezali na yo kondima, koyanola, mpe komitika epai ya Klisto.

YOANE 12:36
36 Ntango bozali na pole, bóndima pole, mpo bózala bana ya pole. Yesu alobaki makambo wana, mpe akei mpe amibombaki liboso na bango.

Bomoko na biso na Klisto na nzela ya bondimi ekobongola biso mpenza. Nsango Malamu epalanganisi kongɛnga ya nkembo ya Nzambe, oyo ezali na nguya mingi koleka kongɛnga ya atomike. Kasi ntango ba kongenga ya biloko ya likolo ebebisaka, ko ngenga ya Klisto ekeli bomoi ya seko kati na biso, na boye ete mondimi akoma mwana ya pole mpe mwinda mpo na bato mingi. Klisto alingi azua yo na maboko na ye, atondi na bosolo, bopeto pe bolingo. Azali kobenga yo otika molili na yo, okota na pole na Ye ya kokamwa mpe ozala mosantu.

Apesaki liteya yango liboso ya kokɔta na Yelusaleme. Azwaki bokonzi na makasi te, abundisaki Baloma to Elode te. Etumba na ye esilaki mpe kosambisama ya mokili ekómaki pene. Pole engɛngaka na molili; bandimi bakobika mpe baye bazangi kondima bakobunga. Matata kati na likoló mpe mabelé ekómi na nsuka na yango. Nzambe atindaka bato na makasi te ete bándima. Okomi mwana ya pole to otikali moombo ya molili?

LOSAMBO: Totondi yo Nkolo Yesu mpo omimonisi lokola Pole ya mokili. Benda biso na ba rayons ya ngolu na yo, sala biso mawa. Bobalusa miso na biso mosika na mbongo, bokonzi, mpe malonga ya mokili mpo ete tokoka kolanda Yo na mosala mpe kotikala sembo epai na Yo lokola bana ya pole na Yo.

MOTUNA:

  1. Kokoma mwana ya pole elingi koloba nini?

www.Waters-of-Life.net

Page last modified on December 23, 2025, at 09:05 AM | powered by PmWiki (pmwiki-2.3.3)