Previous Lesson -- Next Lesson
2. Bosembo Ya Nzambe Ekokokisama Kati Na Biso Na Nzela Ya Kondima Na Klisto (Baloma 3:27-31)
BALOMA 3:27-28
27 Bongo komikumisa ezali wapi? Esili kotyama mosika. Na mobeko nini? Na misala? Te, kasi na mobeko ya kondima. 28 Pamba té tozali koloba ete moto alongisami na nzela ya kondima longola se misala ya Mibeko.
Bolongi ya mokili mpe boyokani na biso na Nzambe ekokisamaki libosoliboso na ekulusu. Kasi ekoki kosalema te na bato longola se na nzela ya kondima. Totangi liloba "kondima" mbala libwa na milongo 21 kino 31 mpo ntoma atatoli mpo na yo ete bolongisami na yo ekokisami kaka na nzela ya kondima na yo ya bomoi.
Etinda yango emonisi mbongwana mpenza kati na bindimeli ya mangomba mpe ya filozofi ndenge na ndenge mpamba te Nzambe alimbisi masumu ya bato nyonso kozanga kopesa bango etumbu. Na boye, mibeko ya mokili oyo etongami na milende, mbano, bolingo, mpe kotosa mibeko ekweyi mosika mpo ete Nzambe asikoli biso na bonsomi, amemi biso na eleko ya ngolu na ye, mpe asikoli biso na elakeli mabe ya mobeko. Atako kokila bilei, kopesa mabonza, kobanga Nzambe, mpe milende na yo, okotikala mosumuki soki ondimi makila ya Klisto te mpe boyengebene na ye na nzela ya bondimi mpe botondi. Ozali na bokonzi te to boboto te na boyengebene oyo ya bule mpo ete ozwi yango lokola likabo uta na Nzambe oyo alongisaki yo mobimba. Mpo na bosembo mpe bolamu na yo te, kasi mpo makila ya Klisto epɛtolaki yo na kati na yo. Ngolu ezali monene mpenza!
Kondima ngolu oyo na botondi mpe bomoko na makabo na Ye elakisi bondimi. Klisto oyo abakamaki na ekulusu azali likabo ya Nzambe epai na biso basumuki, oyo kati na ye Mozalisi ayei epai na bino mpe apetoli bino na komipesa epai na bino, mosumuki oyo alongisami. Bokangama na Klisto na kosambela mpe kozala na bondimi kati na Ye, mpe nguya ya bosembo na Ye ekobakisama kati na bino. Pesa Ye bomoi na yo lokola botondi mpo na bolingo na Ye.
Kondima elongisaka mosumuki, ebongoli makanisi ya bato, mpe esukisaka komilongisa mpe komisikola, mpe na bizaleli ya lolendo, mpo na nzela ya Klisto toyebi ete tozali bazoba, bato mabe, babebisi, mpe bato ya mawa. Tozali na lobiko te longola se na loboko ya Nzambe ya mawa. Na yango otongami te likolo ya bonkoko moko te, mateya ya likolo, to bolingo ya ekolo oyo ezali na ndelo, mpo ete moto oyo abikisaki yo ezali libota na yo te, makoki na yo te, to batalanta na yo te, kasi kondima na yo na Klisto. Kanga yo moko na Mwana ya Nzambe, omipesa na ye na kati ya kondimana ya sika, pamba te bomoi na yo kozanga ye etikali kokufa na masumu. Kasi na kati na ye bokosantisama mpenza, mpe boyengebene na bino ekoumela libela. Ezali na nzela mosusu te ya kosepelisa Nzambe longola se na makila ya Klisto mpe kotikala kati na ye. Nzambe atie boyengebene na ye likolo na bino; ndimela ye, pamba te bondimi kaka nde epesaka yo eteni na makoki nyonso ya mapamboli ya Klisto mpe ya makasi na ye.
BALOMA 3:29-31
29 To Nzambe azali kaka Nzambe ya Bayuda? Azali mpe Nzambe ya bapakano te? Ɛɛ, ezali mpe bongo mpo na bato ya bikólo mosusu, 30 mpamba te Nzambe azali kaka moko, oyo akolóngisa bato oyo bakatami ngenga na nzela ya kondima mpe bato oyo bakatamaki ngenga te na nzela ya kondima yango. 31 Bongo tolongoli Mibeko na nzela ya kondima oyo? Ata moke te! Kasi, tozali nde kotosa mibeko.
Polo akomaki mokanda oyo ya kotyola epai ya lingomba ya Loma. Nsima ya kolimbola kolongisama na mokuse mpe na makasi, ayokaki mingongo oyo ezalaki kotɛmɛlana na kati na ye.
Sikawa Baela basilaki koloba, “Soki liwa ya Klisto ezali kolakisa bosembo ya Nzambe na bolimbisi ya masumu ya bato na nse ya mobeko, oyo babosanaki, boye ekulusu elakisi eloko te mpo na bango, mpe tolongolami na mwango.”
Polo ayanolaki bango ete: “Kasi Nzambe alimbisi masumu ya mabota nyonso, Nzambe azali moko te mpo na Bayuda mpe mosusu mpo na bapakano, mpo Nzambe azali moko, Yesu alongisaki bato oyo bakatamaki ngenga mpe baoyo bakatamaki ngenga te na nzela ya liwa na ye na ekulusu, mpo na kondima na bango.”
Bongo Bayuda mosusu bagangaki ete: “Yango ekoki kosalema te! Mpo bato ya bikólo mosusu balongisami na likambo oyo, longola kaka kokatama ngenga mpe mibeko.
Paulo ayanolaki bato wana ya molende, alobi: “Ezala mosika na ngai nabongola emoniseli ya Mibeko. Mpe tozali konyata ete mobeko ebongisami mpo na mbeka ya Nzambe. Ya solo, ekulusu ebomaka masengi manso ya mobeko kati na biso.
Na etumba ya Polo na ba extrémistes mpe ba neutre na ngambo mibale, tososoli ete bandimi banso te basimbaki bosembo mpe bonene ya Nzambe mpo ete babangaka Nsango Malamu ete bato banso bakolongama na kondima. Bato moke nde bapusanaka penepene na bonsomi ya baklisto, oyo etongami te na mibeko, na bokeseni ya mposo, to na bokangami nyonso ya bato, kasi bobele na kondima na biso, oyo elakisi ete mitema na biso ekangami na Yesu, mpe ete tozali kotyela Ye oyo alingi biso mingi banda kala.
LOSAMBO: Tata, totondi yo mpo osikola biso na komilongisa mpe olongi biso na nguya ya Klisto. Tango tomitali biso moko, tososoli ete tozali basumuki, kasi tango tozali kotala epai ya Mwana na yo, tozali kokuta bosembo na biso, oyo epesameli biso. Bikisa biso na losambo na biso ya lokuta, mpo tóluka te komilongisa na misala ya bato, kasi oyo Mwana na yo asaleli biso ekoki mpo na biso. Ndima biso lokola masanzoli ya botondi libela.
MOTUNA:
- Mpo na nini tozali kolongisama kaka na kondima, kasi na misala na biso ya malamu te?
Pamba té tozali koloba ete moto alongisami na nzela ya kondima longola se misala ya Mibeko.
(Baloma 3:28)