Waters of Life

Biblical Studies in Multiple Languages

Search in "Lingala":
Home -- Lingala -- John - 057 (Jesus the light of the world)
This page in: -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Bengali -- Burmese -- Cebuano -- Chinese -- Dioula? -- English -- Ewe -- Farsi? -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Javanese -- Kiswahili -- Kyrgyz -- LINGALA - Malayalam -- Peul -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Thai -- Turkish -- Twi -- Urdu -- Uyghur? -- Uzbek -- Vietnamese -- Wolof -- Yiddish -- Yoruba

Previous Lesson -- Next Lesson

YOANE - Pole Epeli Kati Na Molili
Koyekola Sango Malamu Na Yesu Oyo Yoane Akomi
ETENI YA 2 - Pole Engengi Kati Na Molili (Yoane 5:1 - 11:54)
C - Mobembo Ya Suka Ya Yesu Na Jerusalem (Yoane 7:1 - 11:54) Kokabola Molili Na Pole
1. Maloba ya Yesu na Elambo ya Bahema (Yoane 7:1 – 8:59)

d) Yesu, mwinda ya mokili (Yoane 8:12-29)


YOANE 8:25-27
25 Ozali nani? Baye bisaki ye. Yesu ayanolaki bango ete: “Makambo nayebisaki bino banda na ebandeli. 26 Nazali na makambo mingi ya koloba mpo na bino mpe kosambisa na kati na bino; kasi oyo atindaki ngai azali solo, mpe makambo nayoki epai na ye nazali koloba na mokili. 27 Basosolaki te ete azalaki koloba na bango na ntina ya Tata.

Atako Yesu azalaki kotingama na bonzambe na ye, Bayuda batikaki kotuna ye ete: “Ozali nani?” Pesa biso indice moko; Ezali ko clarifier problème po to comprendre yango!” Nzokande autaki komimonisa polele lokola ekoki.

Yesu ayanolaki ete: “Banda na ebandeli nazali Nzambe ya solo; Nzokande bozali kososola maloba na ngai te. Molimo na ngai ezwi boyambi na mitema na bino te. Bozali kosepela te na bimoniseli na ngai oyo etali bankombo mpe bizaleli na ngai. Nazali Liloba ya Nzambe oyo akómi moto. Kasi bino boyokaka ngai te mpe bososoli ngai te, mpo bozali moto ya mokili ya nse, kasi ya Nzambe te. Yango wana botiki te Molimo na ngai ebongola bino. Makambo oyo nayebisaki bino mbala mingi esali ntina mingi te, mpamba te mitema na bino ekómi makasi. Mpo na yango, maloba na ngai makosambisa yo, atako nalingi yo mpe namimonisaka epai na yo. Basusu kati na bino bakoki kobanda kososola lokumu na ngai. Nalingi nabikisa yo pe napesa yo bomoyi ya sika. Nzambe azali solo, kaka ndenge ngai nazali. Kasi bosolo oyo ekobebisa bino, mpamba te boboyi likabo ya Molimo na mitema na bino.” Bayuda basosolaki te ndimbola ya kobombama ya bimoniseli wana, mpe basosolaki te ntina ya bomoko na ye na Tata. Bayokaki maloba na ye kasi basosolaki te, mpo bandimaki ye te. Kondima ya pete na Ye emonisaka na makanisi na biso bosolo na Ye oyo emonanaka yango moko.

YOANE 8:28-29
28 Yesu alobi na bango: «Ntango bokotombola Mwana ya Moto, boye bokoyeba éte ngai nazali ye, pe nasalaka eloko moko te na ngai moko, kasi ndenge Tata ateyaki ngai, nazali koloba. 29 Ye oyo atindaki ngai azali elongo na ngai; Atiki ngai ngai moko te, mpo nasalaka ntango nyonso oyo esepelisaka ye.

Yesu ayebaki ete batɛmɛli na ye mpe ata bayekoli na ye basosolaki solo te na ntina na ye. Molimo Mosantu atindamaki naino epai na bango te. Kasi azalaki na bondimisi ete kobakama na ye na ekulusu ekolongola lisumu ya mokili mpe ete bomati na ye epai ya Tata ekolandama na kosopama ya Molimo Mosantu. Na tango wana, boyebi ya nani Ye azali ekobeta makanisi ya Bayuda mpe ya bapakano. Bonzambe ya Klisto esengeli te kotalelama mosika na mosala ya Molimo Mosantu. Kokanisa na ndenge oyo ebongi ezali na ntina mingi te. Kaka kobotama ya sika nde ebimisaka kondima ya polele, kaka ndenge kondima makasi na bolamu ya Klisto ekeli kobotama ya mibale.

Klisto alobaki te ete azalaki nzambe oyo azali mpenza na lipanda, kasi asakolaki bomoko na ye ya ntina mingi na Tata lokola mpe kozanga likoki na ye ya kosala kozanga ye. Lisusu, asalaka eloko moko te ye moko. Tata asalaka kati na ye. Bolai ya komikitisa na ye ezali komonana na kondima na ye ya nkombo “Ntoma ya Nzambe” (Yoane 13:16 ). Malgré na même phrase amimonisaka lokola Maître na Nkolo.

Tata na biso azali moto ya pete te mpo na kososola, kasi Molimo Mosantu asalisaka biso. Na nzela ya lisolo ya Yoane, Yesu ayebisaki solo ya nsɔmɔ ya bomoko ya Bosato. Na nsima akobaki ete: “Tata azali ntango nyonso elongo na ngai, ata sikoyo. Atikaki ngai ata mwa ntango moko te. Mwana, na ngala na ye, atikaki Tata na ye ya likoló ata moke te to atombokelaki ye te, kasi atosaki ye na makambo nyonso. Akitaki uta na lola mpe akomaki moto, mpe amikitisi na mokano ya Tata wa ye. Abakisaki maloba moko ya kokamwa: “Ntango nyonso nasalaka oyo esepelisaka Tata.” Moto moko te akoki koloba maloba maye longola se Mwana oyo azali ntango nyonso kofanda na boyokani na Tata na ye na mobimba ya Molimo. Yesu akokisaki mobeko. Lisusu, ye moko azalaki mobeko ya kokoka ya Kondimana ya Sika. Nzokande Bayuda bazalaki kobenga ye mofingi, azalaki kotɛmɛla mibeko mpe kobungisa bato nzela, atako azalaki kaka ye moko oyo azalaki kotosa mibeko.

Oyokaka mongongo ya Molimo na maloba ya Klisto? Ozali kososola nkembo na ye mpe komikitisa na ye, bonsomi na ye mpe botosi na ye epai ya Tata? Alingi komema yo na aboyokani ya bolingo na botosi mpe bonsomi. Na bozali na ye akokamba bino na bonsomi mpe na mosala. Akozala molakisi na yo mpe okosala eloko te soki ye azali te, koluka kosepelisa ye na etamboli na yo nyonso.

LOSAMBO: Nkolo Yesu, nayoki soni mpo na motó makasi na ngai, lokuta na ngai mpe na ngambo na ngai. Limbisa mabunga na ngai. Santisa ngai mpe sunga ngai nalanda bokambi ya Molimo Mosantu na yo. Zalá motambwisi na ngai mpe molakisi na ngai; fungola motema mpe makanisi na ngai na bolingo na yo ya seko.

MOTUNA:

  1. Ndenge nini Yesu asakolaki ete azali ntango nyonso na Bosato Mosantu?

www.Waters-of-Life.net

Page last modified on December 16, 2025, at 02:49 AM | powered by PmWiki (pmwiki-2.3.3)