Waters of Life

Biblical Studies in Multiple Languages

Search in "Lingala":
Home -- Lingala -- Tracts -- Tract 02 (God, be Merciful to Me a Sinner!)
This page in: -- Armenian -- Baoule -- Burmese -- Chinese -- Dagbani? -- Dioula -- English -- French -- German? -- Greek -- Hausa -- Hebrew -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Japanese -- Korean -- LINGALA -- Maranao -- Nepali? -- Peul? -- Somali -- Spanish -- Sundanese -- Telugu -- Thai -- Turkish? -- Twi -- Uzbek -- Yoruba

Previous Tract -- Next Tract

BA TRACTES - Nsango mikuse ya Biblia mpo na kokabolama

TRACTE 02 -- He NZAMBE, yokela ngai mawa ngai moto na masumu


Natango akendaki kotala libota moko, motei moko ya lolanda azalaki kotanga maloba na Nzambe wana ezalaki ye kolekisa misapi likolo ya maloba. Baye bazalaki koyoka ye bazalaki kokamwa motindo azalaki kotanga na bolembu. Kotala na miso, bazalaki kolanda misapi na ye kokukola mikanda na tango azalaki kososlo malamu. Motei mokufi miso aponaki lisapo ya kitoko oy elekaka na ndako ya losambo ya mboka na bango.

“Bato mibale bazalaki kokenda na ndako ya losambo kosambela; moko azalaki mofalisai mpe mosusu mokongoli na mpako. Mofalisai atelemi, abandi kobondela boye kati na ye moko : ‘He Nzambe, napesi yo matondi mpo nzambi nazali lokola bato mosusu te, oyo bazali baibi, bazanga bosembo, bato ya ekobo, too b akongoli na mpako. Nakilaka bilei mbala mibale na poso moko, napesaka moko na zomi ya bozwi na ngai.’ Mokongoli na mpako atelemi mosika, akokokaki ata kotombola miso likolo te, kasi abetaki tolo na ye, alobaki: ‘He Nzambe, yokela ngai mawa,nazali moto na masumuis .’” (Luka 18:10-13).

Motei atiki kotea mpe atuni bato bazalaki wana: “Tomituna motuna oyo :Nazali nani ? Nazali lokola moto oyo alobi asalaka mabe te too mokongoli na mpako oyo ayebaki mabe na ye mpe azalaki na litatoli ya moyibi ? Moyengebene azali ndakisa ya mboka na biso oyo elobaka été esali ekobo te, eyibi te, oyo asalaka moto mabe te, kasi alandi na molongo mibeko ya losambo, akilaka mbala mibale na mposo moko, apesaka makabo ya mawa mpe asungaka bato na mawa?”

Bato nyoso bazalaki kimia kasi moklo moko azalaki wana azwi maloba: “Nzambe azwa lokumu, moto wana akoki kobelema na Nkolo tango nyoso oyo akolinga elongo na mabondeli ya solo mpe kosunga bato ya mawa mpe babola. Kasi mosambeli wana amikumisi mpe akumisi misala na ye o esika akumisa Nzambe mpo na misala malamu na ye. Motindo ya kosambela boye nzanga na koyeba Nzambe, ezali lolelondo.”

Motei mokufi miso andimi eyano ya mokolo wana mpe abakisi: “Bato ya kosambela na lolendo mpe kokumisa motindo ya kosambela na bango bazali koyeisa mitema mpe milimo na bango makasi. Bayebaka bosembo na Nzambe te mpe bandimaka motindo na bango te, ata bayebi maloba na Nzambe na mayele. Ezali lokola motindo ya kosambela oyo ezangi kobanga Nzambe ezali mabe mpe ezangi bolingo. Baye bazali kosambela na komikumisa bakomaka bato ya nzombo. Bakokaki komituna ‘ Mabondeli na ngai mazali kokenda epai ya Nzambe too epai na ngai moko? Boye nazali kokanisa na Nkolo mpe boye nazali nazali kokumisa ye, too boye nazali kokumisa bonene na ngai kati na bato?’Elenge mobali moko atuni na mokufi miso: “Mpo na nini tobondelaka? Ezali na litomba kati na kobondela? Nani ayokaka maloba na biso?”

Mokufeli miso azongisi na kimia: “ Moto oyo azali komona malamu amonaka koleka ebimelo na tango? Lokola akokkoka komona te, akokanisa été mokili ezali lokola libungutulu; Ezali motindo yango tango tozali kobenga na Allo Allo na mokili ya mpoto, na mboka Caire kino Paris too na Casablanca kino Tokyo, tozali kondima été tozali koyoka mongongo ya moto oyo tozali kobenga, ata tomoni elilingi na ye te. Na motuya boni mondimi azali kozila été Oyo na Nguya Nyoso ayoka mabondeli na ye, ayanola na bituneli na ye mpe matondi oyo euti kati na motema ya komikitisa mpe ya bolingo!”

Motei alandeli makanisi na ye. Alobi na libondeli ya mokongoli na mpako mpe alobi: Nzambe amemi mokongoli na mpako kotuna bolimbisi mpo na mabe na ye mpe abongwana epai na ye. Alandi mongongo kati na motema na ye mpe abondeli epai ya epai na oyo ya Ngolu nyoso. Mabondeli na ye elakisi été azalaki kondima na lokumu ,mpe nguya mpe été Nzambe azali, mpo été abiangi ye ‘ Nzambe’, boyebaka été Nzambe azali moko na nguya, na maloba mpe na molimo. Mokongoli na mpako abongoli motema ayoki bosantu na oyo aleki na mawa – kondima na mawa na ye na eteni mosusu, mpe kobanga esambiseli ya suka na eteni mosusu. Azalaki kotenga tenga kati na malamu,na Nzambe mpe bosembo na ye. Azalaki kobanga été Nkolo na ye akweisa ye na tina na bosembo mpe atinda ye na lifelo te – kasi na tango yango, akangemi na kondima, na ngolu na oyo aleki bulée. Akanisaki été boboto na Nzambe eleki esambiseli na ye mpe été oyo na Nguya nyoso, na bolingo na ye, alimbisi masumu na ye. Mpo na yango, asimbi loboko ya mosambisi ya mawa wana azali kosenga bolimbisi. Tinqa wana angangi: ‘Ha Nzambe na ngai, yokelangai mawa, nazali moto na masumu!’ ”.

Mokufi miso alimboli lisusu likambo ya kobongola motema mpe abakisi: “Moyibi ayamboli été asalaki bobele lisumu te, kasi akomaki moto ya mbindo, moto ya kanyaka mpe abwakamaki na Nzambe. Liboso ya Mosantu, motindo na ye ebimi polele. Na miso ya Nkolo, likambo ya malamu ezalaki epai na ye te, akomaki moto ya masumu ya mawa.”

Motei akobaki: “ Bato mingi bazali komikosa likolo na motindo na bango penza mpe bakanisi été batosaka bango mpe bazali sembo. Kasi ye oyo okomitia na pole na Nzambe akomona été mbala moko été moyengene azali te bobele Nzambe! Tika mokongoli na mpako oyo abongoli motema apambwama mpo été akomi moto ya mayele; Asosoli motindo na ye, abongwani epai ya mosalisi na ye, asengi ngolu na ye, ayamboli bomoi ya kanyaka na ye mpe azwi mawa mpe ngolu na Nzambe. Nkolo aboyaka te ye oyo abongoli motema, oyo alingi été motema na ye ebongwana mpe asepeli kobongola bizaleli na ye, azali kolikia kozwa makani ya motema ya sika. Nkolo akopesa ye lisiko mpe akopesa ye kolimbisama ya masumu kouta na ye moko elongo na moko mpe elonga oyo,ebongisami mpo na baye babongoli mitema."

Motei atuni baye bazalaki wana: “Bokolinga koyeba suka na makambo na Yesu, mwana na Maria, kokokana na moto oyo akanisi azali malamu mpe moyibi oyo abongoli motema?” Afungoli Sango Malamu, abandi kotamwisa misapi na ye kolanda mikanda mpe atangi maloba na Nkolo Yesu:

“Nalobeli bino, mokongoli na mpako azongi na ndako na ye alongisami, kokokana na oyo mosusu. Mpo été oyo akomitombola akokitisama, mpe oyo akomikitisa akotombolama.” (Luka 18:14).

Bandeko batangi,
boyoka mitema na bino. Motindo ya kosambela na bino ekokisi posa na bino, bosepeli na misala malamu an bino mpe mpe bosepeli na bizaleli na bino? Too bazali komikitisa liboso ya Nzambe mosantu, koyoka soni na oyo bosala na bomoi na bino? Boyeba été oyo akosala lolendo kati na ye mpe akokanisa été azali monene akokweya solo. Kasi ye oyo akobongola motema, akobonwana epai na Nkolo na ye mpe ayamboli masumu na ye, akozwa bolimbisi mpe elonga kouta na lisiko na Nkolo na ye mpe boboto na ye.

Libondeli ya kobongola motema
Bondela na biso elongo libondeli ya Davidi, tango ayambolaki lisumu na ye tango Nkolo asambisaki ye mpo na misala ya soni asalaki kosala ekobo na mwasi mosusu mpe mpe kotinda koboma mobali na ye.

“Hé Nzambe! Yokela ngai mawa kati na bolamu na yo; uta na bonene na mawa na yo, simbisa bikweli na ngai; sukola ngai mobimba na mabunga na ngai mpe petola ngai na lisumu na ngai. Mpo été nayebi mabunga na ngai, mpe lisumu na ngai ezali polele liboso na yo. Nasumuki liboso na yo, mpe nasali oyo ezali mabe na miso na yo, yo ozali sembo na likambo lilobi yo mpe ekateli na yo ezali mpeto. Tala na botami kati na bokeseni mpe mama na ngai azwaki zemi kati na lisumu. Tala, yo olingi été solo ezala kati na motema, yebisa ngai boyengene kati na ngai. Petola ngai na isope, mpe nakozala mpeto, sukola ngai mpe nakozala pee lokola mpembe. Yokisa ngai kosepela mpe esngo été mikwa mibuki yo mizwa esengo lisusu. Longola elongi na yo na masumu na ngai mpe panza bokeseni na ngai nyoso. Hé Nzambe! Zalisela ngai motema na mpeto mpe mpe pesa ngai molimo na sika na boyengebene kati na ngai. Bwaka ngai mosika na elongi na yo tempe longwela ngai Molimo na yo na bulé te. Nzongisela ngai esengo na kobikisa na yo mpe kanga ngai na molimo na kondimana! Bongo na koteya nzela na yo epai na baoyo bakopengwaka yango, mpe bato na masumu bakobutwa epai na yo. Hé Nzambe, sikola ngai na ekweli na makila masopani, Nzambe na kobika na ngai ; mpe lolemo na ngai ekokumisa boyengene na yo. Hé Nkolo, zipola bibebu na ngai mpe monoko na ngai ekosakola lokumu na yo. Soki olingaki mbeka mbele napesi yo yango, nde yo okosepelaka na makabo ya kotumbama te. Makabo mazali malamu na miso ya Nzambe izali molimo motutami ; hé Nzambe, yo okoboya motema motutami mùpe na mawa te (Nzembo 51:1-17)


Yekola Liloba na Nzambe

Soki olngi koyekola koleka likolo ya Bosantu na Nzambe mpe bolingo na ye oyo etonda ngolu, komela biso mpe tokotindela yo Sango Malamu na Yesu pamba elongo na bilimbweli mpe mabondeli.


Kabola sango Malamu ya lobiko na bayebani na yo

Soli mwa buku oyo esungi yo mpe olingi okabola na basusu, tokozala na esengo kotindela yo mwa ndambo. Komela biso, kobosana kokoma polele esika na yo te

WATERS OF LIFE
P.O. BOX 60 05 13
70305 STUTTGART
GERMANY

Internet: www.waters-of-life.net
Internet: www.waters-of-life.org
e-mail: info@waters-of-life.net

www.Waters-of-Life.net

Page last modified on July 07, 2023, at 03:15 PM | powered by PmWiki (pmwiki-2.3.3)