Waters of Life

Biblical Studies in Multiple Languages

Search in "Lingala":
Home -- Lingala -- Tracts -- Tract 03 (Bless the Lord, O My Soul!)
This page in: -- Armenian -- Baoule -- Burmese -- Chinese -- Dagbani? -- Dioula -- English -- French -- German? -- Greek -- Hausa -- Hebrew -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Japanese -- Korean -- LINGALA -- Maranao -- Nepali? -- Peul? -- Somali -- Spanish -- Sundanese -- Telugu -- Thai -- Turkish -- Twi -- Uzbek -- Yoruba

Previous Tract -- Next Tract

BA TRACTES - Nsango mikuse ya Biblia mpo na kokabolama

TRACTE 03 -- Hé Yawe, Pambola molimo na ngai


Bato mingi bazali kosala mosala makasi mpo na kobika na bango. Balingi kozwa mbongo mingi mpo na kobika mpe kolekisa ngonga na bango mpe nguya na bango mpo na kolekisa bomoi ya esengo. Kasi, mwana na Maria azali kotea biso : “Moto moko akoki koalela bakonzi mibale te. Mpo été, too akoyina moko mpe akolinga mosusu ; too akokangema na moko mpe akotika mosusu. Bokoki kosalela Nzambe mpe misolo te.” (Matthieu 6:24).

Dawidi amekaki kozwa eyano na likambo na ye kati na kokumisa Yawé. Amizalisi nye elongo na makanisi na ye mpo akoka kokangema na Yawé moko. Atikaki likanisi na ye kopengwisa ye te mpe mpe atelemaki liboso na Yawé mpe alobaki: “Molimo na ngai, sanzola Yawé, tika été motema na ngai mobimba esanzola kombo ya bulee! Molimo ngai, sanzola Yawé mpe bosana boboto na ye nyoso te. Ye oyo akolimbisaka bokeseni na yo nyoso, akobikisaka yo na malali na yo nyoso. Ye oyo akosikola bomoi na yo na kufa, akozingelaka yo na boboto mpe na bolingo.” (Psa ume 103:1-4)

Kobondela mpe kokumisa esengelaka na molende mpe mpiko. Dawidi alingaki konetola mpe kokumisa Yawé. Molimo Mosantu akomema bandimi kofungwama na nzila na Mozalisi na bango.

Kombo YAWE ekomami mbala 6'828 na kati ya ba buku ya kondimana ya kala, kasi kombo Nzambe ekomami bobele mbala 2'600 fois. Kombo Nzambe ezali “ YAWE”. Kombo yango elimboli bosembo na ye oyo ebongwanaka te. Ye moko akoki na kopesa elikia mpe koyeba lokola Dawidi andimi.

Ata bongo, makanisi mazali kobima na nse ya motema na ye, maye mazali koboya kofandisa nye na ye. Mpo na yango,mbala moko lisusu, mosakoli apesi mobeko na motema na ye na kati kokumisa Yawé. Azwi mokano été makanisi na ye matonda na koyeba mpe kokumisa Yawé. Davidi alingaki alinga Yawé na molimo na ye mpe anetola ye na bomoi na ye nyoso. Abiangi Yawé Mosantu epai wapi kokosama ezali te, mayele mabe te, kanyaka te, lisumu te. Oyo akobelema na Nzambe akozwa pole ya bosantu na ye oyo ekoti na polé misala ya mabe. Dawidi azwaki bpoyebi oyo na molimo, amikisi liboso ya Mosantu mpe akumisi ye. Bosantu ya Nzambe ezali kozipa kembo na ye, mpo été Mosantu akumisami mingi. Oyo abongwani epai na ye akobulisama na kati ya motema na ye.

Dawidi na mbala ya misatu apesi mobeko na molimo na ye kofanda nye mpe koumela kokumisa Nzambe. Mpo na yango, makanisi na ye ebulunganaki te, mazalaki komitungisa makambo ya mbongo te, too komitungisa, to mpe kotumolana oyo ezangi tina. Azwaki mokano ya kotia makanisi na ye epai na Nkolo na ba nkolo mpe Mosambisi ya bisika nyoso ya mokili mobimba.

Molimo Mosantu akambi Dawidi kopesa Yawé matondi mpo na bolamu nyoso asaleli ye. Na bomoto tobosanaka noki mapamboli ya Yawé mpe biyano na ye na mabondeli na biso. Tozali biso nyoso bilombe ya kobosana bolamu.

Mpo na kobosana te ebele ya bolamu ya bonzambe, tozali kosenga na yo kokoma na lokasa mapamboli oyo Yawé apesa yo. Na sima pesa ye matondi na motema moko. Kumisa ye mpo na mopepe kitoko mpe mai-mbula, bilei mpe bilamba- mpo – mpo na baboti, batei, bisika y aya mosala mpe ya kolala – mpo na kobatelama mpe kimia kati na mboka. Pesa ye matondi mpo na kobatelama na ye na tango ya mipepe mabe, koningana na mokili too na tango ya kosanza ya moto na ngomba. Pesa ye matondi wana ebateli ye mboka na bino na tango na nzala mpe bitumba. Koma makambo ya yo moko. Koloba loba mingi te tango ozali kopesa matondi. Mesana na kokumisa ye tango nyoso mpe kopesa ye matondi na biloko ya solo mpo été ozala na esengo mpe mpo été esengo na Yawé eumela na yo.

Apusamaki na Molimo, Dawidi été tina munene ya kopesa Nzambe matondi ezali kolimbisama ya masumu. Ata bato bazali kobika lokola bayebi te. Bazali kobomba mabe na bango mpe bazali kotambola na mawa. Bolanda ndakisa ya bango te, bobongola mitema. Boyambola masumu na bino epai ya Yawé mpe bozwa mokano ya kozongela te, mpo été bobikela na elendiseli oyo Toma Joane amonaki: “soki tolobi été tozali na masumu te, tozali komikweisa biso moko, mpe solo ezali kati na biso te. Soki tokoyambola masumu na biso, azali moyengebene mpe sembo mpo na kolimbisa biso.” (1 Jean 1:8-9)

Dawidi abikeli ngolu na Yawé oyo alimbisi masumu na ye nyoso. Apesi ye matondi mpe asosoli été Mosantu alimbisaki ye masumu na ye nyoso. Na mangomba mosusu tokozwa ngolu ya solo boye te. Kati na babuku mitano ya Mose, tokozwa maloba lokola mbele te ata kati na kondimana ya sika, mpo été Yawé alimbisaka bobele eteni ya masumu na biso te kasi apetolaka biso mobimba, alongisi biso mpe mpe apesi biso ngolu na ye na nzila ya bolingo na ye. Mpo été Klistu, na liwa na ye, alongoli, masumu na mokoli, tozali na elikia été: “na nzila ya libonza moko, ayeisi kobulisama libela mpo na baye bazali bulée mpo na libela” (Hébreux 10:14)

Klisto atatoli été ye nani akozwa kolimbisama na masumu na ye asengeli kolimbisa bayini na ye ndenge Nzambe alimbisi ye (Matthieu 6:12). Ozali na bayini ? ozali kobika na kozanga koyokana na moto ? Pona sikawa kolimbisama, soki boye te, okobungisa kolimbisama ya masumu na yo oyo ozwa pamba epai na Nzambe. Tuna na Nkolo apesa yo nguya ya kolimbisa moyini na yo mabe oyo asali yo, lokola Mozalisi asili kolimbisa yo (Matthieu 6:14).

Sima Molimo Mosantu amemi mosakoli Dawidi koyeba été kozala na nzoto malamu ezalaki likabo mosusu ya tina. Apesaki Nzambe matondi. Mbala mosusu nzoto na biso etungisamaka, mwa ba pot aya mike to oba pasi oyo esilaka te kasi ata bongo Nzambe abikisaka biso, kati na mawa na ye, azali kobikisa biso. Kozwa na pasi na monganga mpe komela kisi yango ekoki kobikisa biso te nyoso te. Lokumu ezonga epai na Oyo Aleki likolo. Yawé azali kolendisa biso boye “Nazali Yawé, oyo akobikisa yo.” (Exode 15:26)

Mwana na Malia akokisi elaka oyo.Abikisa bato ya pasi nyoso oyo baya epai na ye mpe abengana milimo mabe kati na bato. Na mikolo na biso, azali kosalela minganga mpe ba nkisi, kasi kobika ya libela ezali kouta epai na ye. Okanisa na yango ? Kobosana te kopesa Mozalisi na yo matondi na motema na yo mobimba, mpo été ezali ye azali kopesa yo nzoto malamu mpe kobika na pasi.

Mokonzi Dawidi azalki ya losambo makasi. Azalaka koyeba été mokolo moko akozala liboso na Nkolo na ye. Alengelaka kufa na ye. Ata bongo, Nkolo amonisaka ye été akobima na libulu, mpo na bosembo na ye te, kasi mpo été azalaki kondima oyo alongisaka. Moto nyoso oyo akotia elikia epai ya Klisto akobanga liwa te, etumbu ya lilita te mpo été Mwana na Malia alobi: “Nazali lisekwa mpe bomoi. Oyo akondima ngai akobika, ata akufi;mpe ye naniazali kobika mpe azali kondima ngai akokufa te. Ondimi yango ?” (Jean 11:25-26)

Mwana na Malia abimi na bomoi na lilita sima ya kolonga liwa. Alongi satana mpe amonisi bosolo ya bomoi ya seko na ye. Asunga baye nyoso balanda ye, akozwa bango na loboko na ye mpe akokatisa na bango ekuke ya liwa kokenda na bomoi ya seko.

Molimo na Yawé eyebisaki Mokonzi Dawidi été mitole ya wolo mizali biloko ya motuya awa na nse te. Mitolo na Yawé engenga mikolo nyoso. Ye oyo azwi mawa na Yawé mpe akaboli na babola mpe babeli, oyo akosunga batiolami mpe bapaya, akozwa motole ya molimo kouta na Yawé. Osila kozwa motole na mawa ya Nkolo na yo oyo apesaka na basali na ye oyo bazwa mawa na ye ? motema na yo mozali makasi lokola libanga ? To epasuki mpo été osangana na baye bazali konyokola mpe kolele? Klisto azali kokamba bino kati na mawa ya tango nyoso, bobele epai ya bayei bofandi esika moko te to baninga te, kasi mpe epai na baye bazali kobunga mpe bapakano baye bazali ata na elikia na bomoi ya lelo mpe ya likolo te. Belema na bango mpe kokamwa na elongi ya kokauka ya bango te. Bondela mpo na bango mpe kanisa na bango mpo été Yawé atinda yo osalela bango kati na sembo mpe bolingo.

Basantu oyo bayebani te balati mitole oyo emonanaka te na motu na bango. Bazwa mawa na bato ya tina te mpe bato ya babola, babondela mpo na bango, basunga bango, mpe bamoni pasi mpo bango, lokola Nkolo asalaka mpo na bango. Alobi : “Mwana na moto ayei, mpo basalela ye te, kasi asalela basusu mpe apesa bomoi na ye lokola mbeka mpo na bato ebele.” (Matthieu 20:28). Klisto azali nzela mpe ndakisa mpo na biso ; azali kopesa biso makasi mpe nguya ya kosalela ye na esengo.

Ndeko motangi,
ozali koluka mbongo ? ozala moto ya likolo? To Molimo ya Klisto ebongoli bomoto na yo mpo été otondisama na mawa na ye, olatisama na mùotole oyo emonanaka te ? Yekola na motema Nzembo 103. Zala na koyeba kososolo kati na Klisto bolingo na Nzambe oyo ezali kobongola yo elilingi na yo. Omikembisa kati na boyebi mpe masanzoli!

Soki otuni, tokotindela yo pamba Sango Malamu ya klisto elongo na mabondeli mpe mateya ya koyekola oyo ekosunga yo kokumisa mpe kopesa matondi na moteme na yo mobimba.

Lendisa basusu na nzila ya kokumisa mpe kosalela Yawé. Soki mwa buku oyo esungi yo, monisa yango na baninga na yo mpo été bango mpe bakoma basaleli na Nzambe. Komela biso mpe tokotindela yo mwa babuku ya kokabola.

Obozilaka mokanda na yo,tozali kobondela mpo na yo mpe tozali mpe kotuna yo obondela mpe m^po na biso. Kobosana kokoma polele esika ofandaka te.

WATERS OF LIFE
P.O. BOX 60 05 13
70305 STUTTGART
GERMANY

Internet: www.waters-of-life.net
Internet: www.waters-of-life.org
e-mail: info@waters-of-life.net

www.Waters-of-Life.net

Page last modified on July 07, 2023, at 03:39 PM | powered by PmWiki (pmwiki-2.3.3)