Previous Lesson -- Next Lesson
2. Komonana ya Yesu epai ya bayekoli na shambre ya likoló (Yoane 20:19-23)
YOANE 20:19
19 Na mpokwa ya mokolo wana, lokola mokolo ya liboso ya pɔsɔ, baporte ekangamaki epai bayekoli bayanganaki mpo na kobanga Bayuda, Yesu ayaki mpe atɛlɛmaki na katikati mpe alobaki na bango ete: “Kimya ezala na bino.”
Na eteni ya ndako oyo ekangamaki, bayekoli oyo babangaki balobelaki makambo oyo euti kosalema. Bayebaki ete lilita yango ezalaki mpamba. Basi ba bandimi sango wana pe ba ange balobi asekwaki. Maria Magadalena asakolaki ete amonaki ye. Nsango yango ekamwisaki bayekoli ya Yesu. Moto oyo akufaki azalaki na bomoi, kasi abimelaki bango te! Kasi bazalaki kolala ntango bakangaki Yesu, mpe moto moko te atikalaki elongo na ye na ntango ya kosambisa ye to na ekulusu, longola kaka Yoane ná basi. Bakitisaki ye na ekulusu te, mpe bapakolaki ye mafuta te. Bazalaki kobanga Bayuda, bakanisaki ete monyoko ekobanda ntango kaka fɛti esili. Mpo na bantina wana, bamikangamaki na shambre, balɛmbaki mpenza nzoto.
Bazwaki masolo ya basi yango na lisɛki te mpe bamilobaki ete: "Tolandaki Yesu, tozelaki ete alonga mpe akómisa biso baministre na ye. Nyonso elongaki te; Tokonyokwama mpe tokobomama." Bazalaki na elikya te.
Atako bazalaki na kondima te mpe bazalaki na bololo, Yesu abimaki kati na bango. Ayaki te mpo na elikia mpe bolingo na bango, to mpo ete ayokaki mawa mpo na ezalela na bango ya makanisi, kasi mpo na komonisa ngolu na ye liboso ya kozanga bosembo na bango.
Emonaneli yango ezalaki ya likamwisi. Bakufi bazalaki na bomoi, oyo baboyamaki azalaki na bonsomi. Nkunda to ekuke moko te ekokaki kopekisa ye azala na kati ya baponami na ye. Amilakisaki na nzoto epai na bango lokola moto nyonso. Bayokaki yango, bamonaki yango mpe bakokaki kutu kosimba yango. Bobele na ntango yango, azalaki elimo, azalaki na likoki ya koleka na bifelo mpe na baporte. Bomoi na ye ya sika ezali kolakisa biso nini tokozala soki tofandi kati na Ye. Nzoto na ye ya lisekwa ezali elikia na biso.
Oyo nde libɔndisi! Moto oyo asekwi aboyaki bayekoli na ye te mpo na bolɛmbu na bango, kasi alobaki na bango na mbote ya elekeli ete: “Kimya ezala na bino!” Mbote wana elakisi ete na liwa na ye ayokanisaki mokili na Nzambe. Kimya ebandaki kopalangana longwa na likoló kino na mabelé, mpe eleko ya sika ebandaki, oyo Klisto amemaki. Ezali likambo na biso mpo na kopona soki tokondima yango to tokoboya yango. Moto azali na mokumba ya lobiko na ye. Oyo ayamboli mpe andimi Yesu azali kokabola lipamboli na ye. Ye oyo azali kosangana na Mokonzi ya Kimya alongisami na mbeka na ye oyo ekeseni na mosusu nyonso, lokola Paulo alobi: “Lokola tolongi na kondima, tozali na kimya na Nzambe na nzela ya Nkolo na biso Yesu Klisto.”
LOSAMBO: Nkolo Yesu Klisto, asekwi na bakufi, Mokonzi ya Kimya, tofukami liboso na yo na esengo mpe na botondi, mpo oyaki kosambisa to kopesa biso etumbu te, kasi mpo na kolakisa biso ngolu na yo mpe kobikisa biso na kozanga elikya mpe na kozanga kondima, mpo na kopesa biso kimia na yo mpe kozongisa boyokani na biso na Nzambe. Lobiko na yo ezali mbuma ya milende na biso te, kasi likabo ya ngolu. Salisa baninga na biso mpe banguna na biso mpo na koyeba ngolu na yo; mpo ete bakoka koyamba bino mpe kotikala na bonguna na Nzambe mosantu te.
MOTUNA:
- Ndimbola nini ya fraze ya liboso oyo Yesu alobelaki bayekoli na ye nsima ya lisekwa na ye?