Previous Lesson -- Next Lesson
2. Komonana ya Yesu epai ya bayekoli na shambre ya likoló (Yoane 20:19-23)
YOANE 20:20
20 Mpe esili koloba boye, alakisaki bango maboko na ye mpe mopanzi na ye. Bayekoli basepelaki mingi ntango bamonaki Nkolo.
Lisekwa ya Klisto ezali elembeteli oyo emonisi ete boyokani na Nzambe ekokisami. Nzambe atikaki Mwana na ye na lilita te, aboyaki ye te mpo na masumu oyo amemaki na esika na biso. Klisto, moto oyo asali eloko te, andimaki komipesa mbeka; Abimaki na lilita na molongi mpe azali kofanda na boyokani ya kokoka elongo na Tata na ye. Lisusu, andimaki ekulusu, asalaki eloko mosusu te bobele mokano ya Tata na ye. Ekulusu ezalaki ntina ya koya na ye mpe nzela ya kosikola mokili. Bongo ndenge nini bato mosusu bakoki koloba ete Yesu akufaki na ekulusu te?
Klisto amonisaki ete azalaki elimo te to elimo oyo ebombami te. Alakisaki bango bampota ya nsuki na mabɔkɔ na ye, bakisa mpe mopanzi na ye epai mopanga etɔbɔlaki ye. Bamonaki mpe bandimaki ete oyo azalaki elongo na bango azalaki nzambe ya mopaya te, kasi Ye oyo Babakamaki na Ekulusu. Mwana na Mpate ya Nzambe azali molongi oyo alongi liwa.
Moke moke, bayekoli basosolaki ete Yesu azalaki molimo to elili te, kasi azalaki moto ya solo oyo azalaki na kati na bango. Bomoi na bango ya sika epesaki bango esengo monene. Ezali mpo na bolamu na biso nde tondimi mpe tososoli ete Yesu azali Nkolo na bomoi, asekwi uta na bakufi. Tozali bitike oyo basundolami te. Ndeko na biso na bomoko na Tata na ye mpe na Molimo Mosantu azali koyangela molɔ́ngɔ́ libela.
Esengo ya bayekoli ekolaki nsima ya elonga ya Klisto na liwa. Banda wana, akómi elikya ya bomoi mpo na biso oyo tozali kokufa. Lilita ya polele ezali nsuka na biso te, kasi bomoi na ye ezali ya biso. Lokola ye oyo abongi na nkembo alobaki: “Ngai nazali Lisekwa mpe Bomoi. Moto oyo andimi ngai, atako akufi, akozala na bomoi.Mpe moto nyonso oyo azali na bomoi mpe akondimela ngai akokufa soko moke te.”
Ntango bayekoli bamonaki ete Yesu alimbisaka masumu, basepelaki lisusu mingi. Afutaki masumu na biso. Na yango, tozali na kimya na Nzambe na nzela ya bampota na ye.
Ozali kokabola esengo na bango na mokolo ya Pasika? Ofukami liboso ya Mosekwi, lokola azali wana, apesi yo elikya mpe azali ko garantir bolimbisi na yo? Yesu azali na bomoi mpe esengo efandi kati na biso. Apostolo Paulo alobi na Eklezia: “Bósepela na Nkolo ntango nyonso. Bolamu na bino eyebana na Nzambe.Nkolo akoya kala.”
LOSAMBO: Nkolo Yesu, tozali kokumisa yo pe totondi yo po yo moko nde ozali elikia na biso. Opesaki ntina na bomoi na biso. Bampota na yo elongisi biso. Bokonzi na yo eya mpo ete bato mingi basekwa na bakufi mpe bazala na bomoi mpo na kokumisa lisekwa na yo.
MOTUNA:
- Mpo na nini bayekoli basepelaki?