Waters of Life

Biblical Studies in Multiple Languages

Search in "Lingala":

Home -- Lingala -- John - 104 (Jesus intercedes for the church's unity)

This page in: -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Bengali -- Burmese -- Cebuano -- Chinese -- Dioula? -- English -- Ewe -- Farsi? -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Javanese -- Kiswahili -- Kyrgyz -- LINGALA - Malayalam -- Peul -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Thai -- Turkish -- Twi -- Urdu -- Uyghur? -- Uzbek -- Vietnamese -- Wolof? -- Yiddish -- Yoruba

Previous Lesson -- Next Lesson

YOANE - Pole Epeli Kati Na Molili
Koyekola Sango Malamu Na Yesu Oyo Yoane Akomi
ETENI YA 3 - Pole Epeli Kati Na Lisanga Ya Batoma (Yoane 11:55 - 17:26)
E - Libondeli Ya Yesu Na Liboso (Yoane 17:1-26)

4. Yesu Azali Kobondela Mpo Na Bomoko Ya Eklezia (Yoane 17:20-26)


YOANE 17:20-21
20 Nabondelaka mpe te mpo na baoyo kaka, kasi lisusu mpo na baoyo bakondimela ngai na nzela ya liloba na bango, 21 mpo bango nyonso bázala kaka moko, ndenge yo Tata ozali kati na ngai, mpe ngai na kati na yo, mpo bango mpe bázala moko kati na biso, mpo bato bándima ete yo nde otindaki ngai.

Klisto azwaki misisa na bayekoli na ye na bolingo ya Tata mpe nguya ya Molimo. Asengaki Tata na ye abatela bango na Mabe mpe asantisa bango na nzela ya Nsango Elamu liboso ya kobaka ye na ekulusu. Nsima ya kozwa bondimisi ete losambo na ye mpo na bantoma na ye mpe Eklezia ezwaki eyano, atalaki na esengo mikolo mizali koya mpe amonaki motango ya bandimi oyo bayaki na lobiko na nzela ya nsango ya bantoma na ye. Elonga ya oyo babakamaki na ekulusu likolo ya Satana mpe lisumu elendisaki bango. Ntango bazalaki kotia motema na Klisto ya bomoi, Molimo ekita na mitema na bango kosalisa bango kokabola ngolu ya bomoi ya bonzambe. Na bondimi basangisamaki na Tata mpe Mwana na bomoko ya seko.

Klisto abondelaki mpo na bandimi oyo bakondimela na nzela ya litatoli ya bantoma. Maloba na ye emonisi elikya oyo azalaki na yango na nsango na bango. Bongo bosenga na ye esimbaka biso ndenge nini? Abondelaki nde mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto na biso? Bomengo na biso? Elonga na biso? Te! Asɛngaki Tata na ye apesa biso komikitisa mpe bolingo, mpo tózala bomoko elongo na baklisto nyonso ya sembo. Tókanisa te ete toleki basusu to ete etamboli na bango ekoki kokanga motema te.

Bomoko ya bandimi ezali mokano ya Klisto; Eklezia oyo ekabwani ezali kotɛmɛla mwango na ye. Nzokande, bomoko oyo oyo Klisto alingi ekoki kotongama te na mabongisi ya lingomba, kasi etali losambo mpe Molimo likolo ya nionso. Lokola Nzambe na bosolo azali moko, ndenge moko mpe Klisto abondelaki Tata na ye ete amema bandimi banso na boyokani ya Molimo Mosantu, mpo ete bakoka kozala na libateli kati na ye. Klisto alobaki te, “Ete bazala moko kati na ngai to kati na bino,” kasi “kati na biso.” Na bongo, elakisi ete bomoko oyo ya kokoka na Tata mpe Mwana na Molimo ezali ndakisa. Alingi atombola yo na niveau na ye, po libanda ya communion na Trinité ezali na eloko mosusu te kaka lifelo.

Ntina ya kozala na bomoko elongo na Nzambe ezali te mpo na komisepelisa na molimo, kasi mpo na kopesa biso makoki ya kopesa litatoli epai ya baoyo bazali kokabwana na Nzambe. Na ngolu ya Nzambe, bakoyeba ete bakufi na lisumu, batondi na lolendo mpe baombo ya bamposa na bango. Bakoyambola mpe bakobaluka epai ya Mobikisi. Yo oyo ozali na boyokani na Tata, Mwana mpe Molimo Mosantu, okozwa makasi ya kozala na komikitisa mpe ya kolinga. Na bonsomi ya molimo okolinga baye banso bandimi mpe basepelaka na miso na bango. Elongo bokokoma batatoli ya motuya ya bolingo ya Klisto. Biso nionso tozali preuve ya bonzambe ya Moto Yesu. Soki kaka baklisto nyonso bazalaki na motema sembo, moto moko te oyo azali baklisto te alingaki kotikala na mokili. Balingaki kobendama na bolingo mpe kimia na bango, mpe kobongwana. Tóyoka lisɛngi ya Yesu mpe tózala na bomoko! Ozali na mokano ya kozala ntina ya kozanga kondima na lingomba oyo ekabwani, lokola nde nzoto ya Klisto ezali na biteni?

YOANE 17:22-23
22 Napesi bango nkembo oyo opesaki ngai, + mpo bázala moko lokola biso moko, 23 ngai na kati na bango mpe yo kati na ngai, + mpo bákóma bato ya kokoka na kati ya moto moko, + mpe mpo bato báyeba ete yo nde otindaki ngai mpe olingaki bango ndenge olingaki ngai.

Nkembo ya Yesu ezali nini? Ezali nde kongɛnga na ye mpe pole ya nkembo na ye? Te! Nkembo na ye ebombami sima ya komikitisa, motema molai mpe boboto na ye. Mbuma nyonso ya Molimo ezali kongenga ya nkembo na Ye. Yoane amonaki yango mpe atatolaki ete: “Tomoni nkembo na ye.” Azalaki kolobela kaka te mbongwana mpe lisekwa na ye, kasi mpe elya ya bibwɛlɛ mpe ekulusu. Na makambo nyonso wana nkembo ya bolingo ya bonzambe emonanaki polele, mpamba te Mwana atikaki nkembo na ye moko mpe amonisaki ntina ya nkembo na ye na kokómaki moto. Nkembo oyo, Yesu apesi biso yango. Molimo ya Tata mpe ya Mwana akiti likolo na biso.

Ntina ya likabo oyo ezali te mpo na kolendisa to kosepelisa biso, kasi ya kosangisa biso na mosala mpe na lisungi. Tosengeli koluka kokumisa basusu. Yesu asengaki Tata na ye bomoko mpe boyokani oyo ezali komonisa Bosato Bosantu, mpo na kotondisa biso na bizaleli w ana. Bolingo ya Nzambe ezali ndelo oyo Eklezia emekamaka na yango. Ezali ye nde azali kobongisa biso na elilingi na ye.

Nzambe, na botondi na ye, afandi na kati ya Eklezia (Baefese 1:23; Bakolose 2:9). Tozali na mpiko ekoki mpo na koloba maloba ya mokapo oyo: “Mpo kati na ye efandi kotonda nyonso ya Bonzambe na nzoto.Bozali na nyonso mobimba kati na ye? Litatoli oyo ya bantoma ezali elembeteli ete mabondeli ya Yesu ezwaki eyano.Tozali kosambela mpe kosanzola Nkolo mpo ete atyolaka biso te atako masumu na biso, kasi apetoli biso te mpe asantisaki biso mpe asangisaki biso na ye moko mpo na kopesa biso makoki ya kozala na bomoi na ye ya bonzambe.

Yesu azalaki kondima ete tokoki kozala bato ya kokoka na bolingo mpe na komikitisa. Tolingana mpe tokumisana! Azali na mposa ya kokoka te kati na biloko na biso, na makoki na biso, mpe na mayele na biso, kasi na motema mawa mpe bolingo na biso. Motema mawa mpe bondimi ezwaki makanisi na ye nyonso ntango alobaki, “Zalá ya kokoka, lokola Tata na yo ya likoló azali ya kokoka.” Mobeko oyo elobeli na mokuse ezaleli na ye epai ya banguna na ye. Kasi na losambo na ye ya kobondela akangaki na degré ya likolo ya bobongi nie, bomoko ya molimo na Eklezia mpe na Nzambe. Molimo ememaka te na introversion to isolement, kasi na communion na ba santu. Bomoko ya Bosato ezali ndakisa na biso. Mpe tokozala bamonisi ya Nzambe oyo babongi te na mokili soki tozali moko te. Lokola bato mokomoko bazalaki komonisa elilingi ya Nzambe na Kondimana ya Kala, ndenge moko mpe mingi koleka bandimi ya Eklezia basengeli komonisa elilingi ya Bosato Bosantu.

Kimya na kati ya Eklezia ekamwisaka bato ya mokili oyo bamonaka ete towuti na Nzambe. Babandi kososola ete Nzambe azali bolingo. Ezali te maloba mpamba to bandimbola milai nde epesaka bango mposa ya kondima. Ezali esengo na kati ya lisanga ya bana ya Nzambe nde elobaka makasi mpe malamu koleka lisukulu nyonso. Oyo ezali lolenge Molimo Mosantu asangisaki Eklezia ya liboso ya Yelusaleme na bomoko ya solo ya molimo.

LOSAMBO: Nkolo Yesu, totondi yo mpo omemi biso, oyo tobongi te, mpo na kondima yo. Tosambelaka yo mpo opetoli biso mpe obongisi biso mpo na kokoma basangani ya nzoto na yo ya molimo. Botia biso misisa na bolingo ya Bosato Bosantu. Tozali kokumisa yo, kokumisa yo, mpe kobondela yo opesa biso makasi ya kozala na bomoko ya kosalela mpe ya bomoi na kati ya lingomba na biso.

MOTUNA:

  1. Yesu asɛngaki Tata na ye nini mpo na biso?

www.Waters-of-Life.net

Page last modified on December 26, 2025, at 04:32 AM | powered by PmWiki (pmwiki-2.3.3)