Previous Lesson -- Next Lesson
3. Mokili ezali koyina Klisto na bayekoli na ye (Yoane 15:18 – 16:3)
YOANE 15:26-27
26 Kasi ntango Mosungi akoya, oyo nakotinda epai na bino uta na Tata, kutu Molimo ya bosolo, oyo euti na Tata, akotatola mpo na ngai: 27 mpe bino mpe bokopesa litatoli, pamba te bozalaki elongo na ngai uta ebandeli.
Kosala ya BoNzambe misantu ya bosantu ezalaki nini na koyina ya mokili mpe na ekulusu ya Mwana ya Nzambe? Ezalaki mpo na kotinda Molimo Mosantu. Koya ya Molimo etikali likamwisi ata lelo. Boyei na ye elakisi bokoti ya Nzambe na mokili, pamba té auti na Tata pe azali na boyokani elongo na ye. Molimo asambisaka mabe na mokili mpe abendaka bato epai ya bosantu ya Nzambe, wana azali kobimisa masumu na bango. Asalisaka bayekoli kofanda na komikitisa mpe komiboya, nzokande mokili ekangami na lolendo, motó makasi mpe bokosi. Ye azali liboso Molimo ya solo, azali kopamela bato ya mokili mpo na mabe na bango.
Bobele na ntango yango, abɔndisaka bayekoli na koyebisa bango ete Yesu azali Mwana ya Nzambe, oyo akokisaka lobiko na bango. Molimo ya libɔndisi azali kotatola Yesu elongo na molimo na biso, mpo ete tokoka komona Tata na bolingo ya Mwana. Soki Molimo Mosantu azali te, tokoki kosimba kondima ya solo te. Elongo na bandimi banso tondimi ete tokoki te kotia motema na Klisto Yesu Nkolo na biso na makasi mpe makoki na bisomei, mpe tokoki te koya epai na ye longola se na Molimo na ye, oyo abengi biso na nsango malamu mpe apesi biso makabo na ye, asantisaka biso na nzela ya bondimi ya sembo. Abengi bakristu banso, asangisi bango, afulaka bango pe akomisi bango basantu na kati ya Klisto. Abatelaka bango ngwi kati na kondima. Molimo Mosantu epesaka nguya na litatoli na biso. Kotia motema te na bososoli to mayele na yo moko soki olingi kolakisa Klisto epai ya basusu. Mipesa mobimba na Molimo ya mayele. Yoka maloba na ye mpo oyeba ndenge ya kokumisa Yesu. Koyoka malamu mongongo ya Molimo ntango ozali kotatola ekosala ete ozala ntoma ya Nkolo ya malamu.
Klisto abengaki bantoma na ye zomi na moko mpo na kopesa ye litatoli, ezalaki libaku malamu. Bayekoli yango bazalaki batatoli na miso ya libiangi ya Yesu awa na mabele na lisolo ya bato. Bapesaki litatoli ya makambo oyo bamonaki, bayokaki mpe basimbaki. Maloba na bango emonisaki ntina ya kozala ya Nzambe awa na mabele. Kondima na biso etongami na litatoli oyo. Yesu akomaki buku to mokanda te, kasi atiaki nde nsango na ye ya lobiko na maboko ya Molimo Mosantu, mpe etamboli ya bayekoli na ye etatoli mpe nsango na ye. Molimo ya bosolo akokosa te, kasi na monoko ya bayekoli na ye akomonisa nguya ya bolingo ya Klisto na mokili ya maladi. Yesu ye moko alobaki na bantoma na ye ete: “Bokozwa nguya ntango Molimo Mosantu akoya likoló na bino, mpe bokozala batatoli na ngai.”
LOSAMBO: Tosambeli yo, Mwana na Nzambe, Mosantu, ozali moko na Tata mpe na Molimo Mosantu, mpe otiki biso bitike te, kasi otindi Molimo na yo ya bosolo mpo na kopesa litatoli. Mpo ete tósantisama.
MOTUNA:
- Ndenge nini Nzambe azali kokutana na mokili oyo ebaka Klisto na ekulusu?