Waters of Life

Biblical Studies in Multiple Languages

Search in "Lingala":
Home -- Lingala -- John - 017 (The first six disciples)
This page in: -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Bengali -- Burmese -- Cebuano -- Chinese -- Dioula -- English -- Ewe -- Farsi? -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Javanese -- Kiswahili -- Kyrgyz -- LINGALA - Malayalam -- Peul -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Thai -- Turkish -- Twi -- Urdu -- Uyghur? -- Uzbek -- Vietnamese -- Wolof -- Yiddish -- Yoruba

Previous Lesson -- Next Lesson

YOANE - Pole Epeli Kati Na Molili
Koyekola Sango Malamu Na Yesu Oyo Yoane Akomi
ETENI YA 1 - Kongengela Ya Pole Ya Bomoi (Yoane 1:1 - 4:54)
B - Kristo Akambaka Bayekoli Na Ye Kobanda Na Kobongola Mitema Kino Na Esengo Ya Libala (Yoane 1:19 - 2:12)

3. Bayekoli motoba ya liboso (Yoane 1:35-51)


YOANE 1:40-42
40 Andalea, ndeko ya Simona Petelo, azalaki moko na kati ya bato mibale oyo bayokaki maloba ya Yoane mpe balandaki Yesu. 41 Azalaki moto ya liboso oyo ayaki kokutana na ndeko na ye Simona mpe alobaki na ye: 'Tomoni Mesia, (elingi koloba Klisto). 42 Bongo amemaki ye epai ya Yesu. Yesu atalaki ye mpe alobaki: 'Yo ozali Simona, mwana ya Jona. Kombo na yo Kefa, (elingi koloba Libanga).

Andalea, nkulutu ya Petelo azalaki mobomi - mbisi oyo autaki na Betesaida na libongo ya mai ya mbu ya Galilai. Akei na Lingomba ya Yoane Mobatisi mpo na kozwa bolimbisi ya masumu na ye mpe koya ya Masia. Andelea andimi litatoli ya Yesu mpe alandaki Yee. Motema na ye ezalaki na esengo; Akokaki te kobomba bokundoli na ye mpe akendaki koloba yango elongo na ndeko na ye, kasi na bapaya te. Bongo Andelea alobi na ye ete: "Tomoni Klisto oyo alakamaki, Mobikisi mpe Nkolo, Mwana-Mpate ya Nzambe." Ekoki kozala ete Petelo azalaki na ntembe. Kasi Andelea andimisaki ye. Sima na nyoso, Petelo akendaki elongo na Yesu oyo azalaki na mwa tembe.

Ntango Petelo akɔtaki na ndako, Yesu abengaki ye na nkombo. Atángaki makanisi na ye. Apesaki yango nkombo ya sika "Libanga". Yesu ayebaki makambo nyonso oyo etali bomoi ya ntoma Petelo mpe bomoi na ye ya lelo mpe bomoi na ye ya mikolo ezali koya, mpe bomoi na ye ya esengo. Yesu ayebi mitema ya bato oyo bazali na mposa na ye. Petetelo akangaki ntina mpe atikaki mbala moko kotala Nkolo. Yesu abongolaki makambo na bomoi na Petelo muke muke kokomisa yee libanga ya tina. Nakati na Klisto, akómaki moboko ya lingomba. Na elimbweli mosusu, Andelea akomaki moyekoli ya nguya.

Moyekoli mosusu azalaki mpe nzila mpo na ndeko na ye: Yoane amemaki ndeko na ye Yakobo epai ya Yesu. Atako abombaki bankombo yango mibale na Sango Malamu na ye, elembo ya bopɔlɔ. Na nsima, Andelea ná Yoane bazalaki bayekoli mibale ya liboso oyo bakendaki kokutana na Yesu.

Kitoko ya milongo ya tanga wana ya ebandeli ezali kokokana – ebandeli ya tango ya sika. Bandimi yango bazalaki na mitema minene te, bamemaki bandeko na bango epai ya Klisto. Na ntango wana, bazalaki te kotambola na banzela minene mpe banzela mpo na kokóma basakoli, kasi bazalaki nde kotya makasi na bango na baboti na bango mpe komema bango na Klisto. Bazalaki te kolanda bato ya ntembe to bato ya politiki, kasi bazalaki koluka baoyo bazalaki na mposa ya Nzambe, na mitema mitutami mpe kobongola motema.

Na ndenge yango, tozali koyekola ndenge ya koyebisa nsango malamu ya boboto, na molende koleka ndelo te, kasi na esengo oyo etali boyokani na biso na Yesu. Bayekoli wana ya liboso bakɔtaki na biteyelo ya koyekola makambo ya Nzambe te. Bakomaki mpe masolo ya bomoi na bango te, kasi bapesaki litatoli na maloba oyo ekómelaki bango. Tango bamonaki Yesu, basimbi ye na lobɔkɔ mpe batyeli ye motema. Boyokani wana ya penepene nde ezalaki epai wapi bokonzi na bango ebandaki. Okutanaka na Yesu ntango omonaki Sango Malamu? Osilá kokamba baninga na yo malamu epai ya Klisto mpe na kondima makasi?

LOSAMBO: Nkolo Yesu, totɔ́ndi yo mpo na esengo ya mitema na biso. Na boboto nyonso, komema biso na komema basusu epai na yo. Pesá biso mposa ya kosakola nsango malamu na bolingo. Limbisa kobanga mpe kobangabanga, mpo ete tópesa litatoli na nkombo na yo na mpiko.

MOTUNA:

  1. Ndenge nini bayekoli ya liboso bapalanganisaki nkombo ya Yesu?

www.Waters-of-Life.net

Page last modified on December 09, 2025, at 04:02 AM | powered by PmWiki (pmwiki-2.3.3)