Waters of Life

Biblical Studies in Multiple Languages

Search in "Lingala":
Home -- Lingala -- Romans - 055 (The Aggravation of the Offense of the Israelite People)
This page in: -- Afrikaans -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Azeri -- Bengali -- Bulgarian -- Cebuano -- Chinese -- English -- Ewe -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hebrew -- Hindi -- Igbo -- [Indonesian.BkNt06RoCh055 | Indonesian]] -- Javanese -- Kiswahili -- LINGALA -- Malayalam -- Polish -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Turkish -- Ukrainian -- Urdu? -- Yiddish -- Yoruba

Previous Lesson -- Next Lesson

BALOMA - Mokonzi Azali Bosemnbo Na Biso
Boyekoli Ya Mokanda Ya Polo Epai Ya Baloma
ETENI YA 2 - Bosembo Ya Nzambe Ezali Makasi, Ata Sima Koya Mitema Ya Bana Ya Yakobo, Koponama Na Ye (Baloma 9:1-11:36)
4. Bosembo ya Nzambe ezwamaka na kondima kaka, kasi na kotosa mibeko te (Baloma 9:30 - 10:21)

b) Kobakisama Ya Ngambo Ya Bayisraele, Mpo Nzambe Ayokelaki Bango Mawa Koleka Bato Mosusu Nyonso (Baloma 10:4-8)


BALOMA 10:4-8
4 Pamba té Klisto azali nsuka ya Mibeko mpo na boyengebene mpo na moto nyonso oyo andimi. 5 Mpo Moize akomaki na ntina na boyengebene oyo ezali na nzela ya Mibeko ete: “Moto oyo azali kosala makambo oyo akozala na bomoi na nzela na yango.” 6 Kasi boyengebene oyo eyaka na nzela ya kondima elobi boye: “Koloba te na motema na yo ete: ‘Nani akomata na likoló?’ (elingi koloba, mpo na kokita na Klisto) 7 to ‘Nani akokita na libulu mozindo?’ (elingi koloba kotombola Klisto uta na bakufi).” 8 Elobi nini? “Liloba ezali pene na yo, ezali na monɔkɔ na yo mpe na motema na yo.” Mpe oyo ezali nsango oyo tozali kosakola na ntina ya bondimi.

Paulo atatolaki ete mokano ya nsuka ya mobeko ezali Yesu Klisto; ye nde nzela, solo, mpe bomoi. Mpe moto moko te akoya epai ya Tata longola se na nzela na ye (Yoane 14:6).

Klisto akokisaki masengami ya mobeko na bozindo na bosikisiki mpe na komipesa. Na bongo, akómaki etinda na biso. Soki tozali komikokanisa na ye, tokomona ete tozali kaka bato ya kanyaka. Yango etali Bayuda mpe bakristu, mpo bato banso basali masumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe, mpe moto nyonso azali ya kokoka te na bolingo mpe na bosolo (Levitike 18:5; Baloma 3:23).

Na tango wana kaka, Yesu, na nzela ya liwa na ye ya bomikabi, ayokanisaki mokili mobimba na Nzambe mosantu (2 Bakolinti 5:18-21). Klisto asilisaki mobeko ya kala mpe akokisaki yango na ndenge ya kokoka. Azali lingomba na biso ya sika, mpe kati na ye tozali komona mobeko ya ngolu. Uta liwa na ye ya bomikabi, bosolo ya sika ekokisami mpo ete tokoka kozwa kolongisama na biso na ngolu mpe kozala na bomoi ya seko. Klisto azali boyengebene na biso (Yisaya 45:24; Yilimia 23:6, 33:16). Moto nyonso oyo akondimela ye akolongama mobimba (Yoane 3:18; Bagalatia 3:24-25). Mpe moto nyonso oyo akobombama epai na ye akokweisama te.

Nkolo alobi kati na Mibeko ya Moize: “Moto oyo akotosa mibeko na ngai akozala na bomoi.” Kasi moto moko te abateli mibeko nyonso ya Nzambe longola kaka Yesu. Mpe na yango, moto moko te akozala na bomoi ya seko ye moko. Yango wana Bayuda balukaka, na mabondeli na bango, na kokila bilei, na misala malamu, mpe na elikya, kokitanya Masiya oyo alakamaki uta na lola mpo na kobikisa bango na nkanda ya Nzambe. Atako Masiya ya solo, oyo akitaki na bolingo na ye moko, baboyaka koyoka nsango na ye to kopusana penepene na ye. Bosembo na bondimi esengi te Masiya ya sika akita uta na lola to asekwa uta na bakufi, pamba te Klisto ayaki epai na biso (Luka 2:11), mpe asekwaki uta na bakufi (Matié 28:5-6). Liloba ya Bomoi ekomi na matoyi ya bato mingi. Mpe Nsango Elamu oyo esakolami etondi na bokonzi ya Klisto, mpe oyo akoyoka yango mpe akondimela Ye akozwa lipamboli na Ye na motema na bango, mpe oyo akosakola yango akokuta yango na mbɛbu na bango. Tozali na bozwi mingi koleka ndenge tokanisaka; ebongi kokabola bilei oyo ya molimo elongo na basusu, mpo ete bamindimaka ete bazali minene mpe makasi, nzokande na bosolo bazali ya ntango mokuse mpe bakufi na lisumu.

LOSAMBO: Tata na Lola, tofukami liboso na Yo mpo ete otindaki Mwana na Yo se moko mpo na kokokisa mobeko na yo mpe kolongola lisumu ya mokili mpe kosala bomikabi mpo na biso. Lokola liwa na Ye ya bomikabi ya mokili mobimba, mobeko ekoki kofunda biso te. Yesu asukisaki bokonzi ya mibeko pe akotisaki biso na bokonzi ya ngolu.

MITUNA:

  1. Tina ya slogan ya Paulo (Klisto azali suka ya mibeko) ezali nini?
  2. Mpo na nini Bayuda bazali kozela na mposa makasi koya ya Masiya na bango?

www.Waters-of-Life.net

Page last modified on October 26, 2026, at 12:46 PM | powered by PmWiki (pmwiki-2.3.3)