Previous Lesson -- Next Lesson
2. Mobatisi abongisaka nzela mpo na Klisto (Yoane 1:6-13)
YOANE 1:9-10
9 Pole wana ezalaki mwinda ya solo, oyo engɛngisaka moto nyonso oyo akoya na mokili. 10 Azalaki na mokili, pe mokili esalamaki na nzela na ye, pe mokili eyebaki ye te.
Klisto azali mwinda ya solo ya mokili. Bikeke eleki Molimo Mosantu asakolaki koya na Ye na nzela ya basakoli. Mikanda ya Kondimana ya Kala esakoli mbala na mbala koya ya Klisto na kati ya molɔ́ngɔ́ na biso. Mosakoli Yisaya alobi boye: “Talá, molili ekozipa mokili, mpe molili makasi mabota; kasi Yahweh akotelema likolo na bino, mpe nkembo na ye ekobima likolo na bino” (Yisaya 60:2).
Na Yoane 1:9-10 liloba “mokili” ezongelami mbala minei. Mpo na mosakoli ya nsango malamu Yoane, ndimbola ya liloba oyo ezali pene na ndimbola ya molili, mpo akomi ete: «Mokili mobimba ezali na nguya ya moto mabe» (1 Yoane 5:19).
Na ebandeli mokili ezalaki mabe te, po Nzambe akela yango malamu. Kitoko mpe bolamu na ye etondaki na molɔ́ngɔ́ mobimba. “Nzambe amonaki nyonso oyo asalaki, mpe, tala, ezalaki malamu mingi” (Genese 1:31). Nzambe akelaki moto na elilingi na ye, mpe nkembo na ye epesamaki na bankɔkɔ ya moto, oyo bazalaki komonisa pole ya Mozalisi lokola talatala.
Kasi mpo na lolendo bakómaki bato mabe mpe batomboki. Batikaki kondimana na bango na Nzambe mpe bamifungweli molimo ya molili. Komilongola na Nzambe esalaka ntango nyonso moto mabe, lokola Davidi ayebaki yango na Nzembo 14:1 : “Zoba alobi na motema na ye ete, Nzambe azali te. Basili kobeba, basali misala ya nsɔni; Moto moko te azali kosala malamu."
Nzokande, Yoane, mosakoli ya nsango malamu, atatolaki ete Klisto ayaki na mokili oyo ya mabe kaka ntango moi ezali kobima, moke moke kobengana molili oyo ezalaki liboso na yango. Pole ya Klisto ekota na mokili na biso te lokola mwinda ya kozipa miso. Akɔtaki na boboto, kongɛngisaka bato nyonso. Ayaki lokola mosambisi mpe mobomi te, kasi lokola Mobikisi mpe Mosikoli. Bato nyonso basengeli kongɛngisama na Klisto. Soki likambo yango ezali te, bakotikala na molili. Klisto azali mwinda ya solo mpe moto mosusu te. Ye oyo andimi pole na ye na nzela ya Nsango Malamu akobongola bizaleli na ye, akokoma malamu mpe akongengela basusu.
Tómeka kokanga ntina ya liloba oyo: “Mozalisi ayaki na mokili na ye.” Nkolo ndako akɔtaki na esika na ye, mpe mokonzi apusanaki pene na bato na ye. Nani akolamuka mpe akomilengela mpo na koya na ye? Nani akoyekola solo na ntina na koya na ye mpe mikano na ye? Nani andimi kotika mikano ya mpamba ya mokili oyo mpo na koyamba Nzambe oyo azali koya? Nani akososola ntango oyo ya mbongwana mpe oyo ekokani na mosusu te na ntango, oyo Nzambe akoya na boumeli na yango?
Na mbala moko Nkolo azalaki kati na basumuki. Ayaki na bososoli mpe na kimya. Alingaki te ko éblouir mokili na bonene, nguya mpe nkembo na ye. Amonisaki nde komikitisa na ye, bolingo na ye mpe solo na ye. Banda ebandeli ya bozalisi, lolendo nde esalaki ete moto akwea. Mpo na oyo etali Satana, alingaki kozala makasi, nkembo mpe mayele, lokola Nzambe. Na nsima, Klisto Mozwi-ya-Nguya-Nyonso abotamaki. Mwana oyo azalaki kolɛmba nzoto mpe ya komikitisa alaliki na elyelo ya bibwɛlɛ. Na komikitisa, boboto mpe botosi na ye alongaki elonga. Akitaki na tii na nse ya moto mpo na kotombola moko na moko mpe kobikisa bango nyonso.
Boyoka, bino banso mibali! Nsima ya Ssango Malamu oyo, na mawa nyonso toyebi ete mokili eyebi pole te mpe esosolaka yango te. Bato bayebaki te ete Mwana ya Nzambe apusanaki penepene na bango mpe azalaki kati na bango. Batikalaki lokola bato ya lolanda mpe bato ya logboma, ata bato ya mayele ya mokili na bango, ba boyekoli ya mokili ndenge na ndenge na bango. Bayebaki te ete Nzambe ye moko atɛlɛmaki liboso na bango. Bayebaki Mozalisi na bango te mpe bandimaki Mobikisi mpe Mosambisi na bango te.
Na bosolo oyo ya mpasi tokoki kobimisa boyebi moko ya ntina na bokonzi ya Nzambe: tokoki te kososola Nzambe na mayele mpe makoki na biso ya bomoto. Nyonso oyo toyekolaka na ntina ya bolingo ya Klisto ezali ngolu mpe likabo ya solo uta na Nzambe, mpo ezali Molimo Mosantu oyo abengi biso na nsango malamu. Azali kongɛngisa biso na makabo na ye, mpe azali kobatela biso na bondimi ya solo. Na yango tosengeli koyambola mpe kozala na kondimi te na mayele ya makanisi na biso, to mpe mayoki ya molimo na biso. Biso nyonso tosengeli komifungola mpo na pole ya solo, kaka ndenge bafololo efungwamaka mpo na kongɛnga ya moi. Na ndenge wana, kondima na Klisto ekela boyebi ya solo. Ebandeli oyo ya kondima euti na biso te, kasi ezali mosala ya Molimo ya Nkolo na baoyo nyonso bazali kotosa ye.
LOSAMBO: Totondi yo, Nkolo Yesu, mpo oyei na mokili. Oyaki te mpo na kosambisa to kozongisa mabe, kasi mpo na kongɛngisa mpe kobikisa bato nyonso. Tozali ba kufi miso mpe bato ya magboma. Limbisa biso masumu na biso pe pesa biso motema ya botosi. Fungola miso na biso tomona yo. Fungola milimo na biso na kongenga ya pole na yo ya malembe mpo ete tokoka kofanda na nguya ya Molimo Mosantu na yo.
MOTUNA:
- Boyokani nini ezali kati na Klisto Pole na mokili ya molili?