Waters of Life

Biblical Studies in Multiple Languages

Search in "Lingala":
Home -- Lingala -- Tracts -- Tract 04 (Peace to You!)
This page in: -- Armenian -- Baoule -- Burmese -- Chinese -- Dagbani? -- Dioula -- English -- French -- German? -- Greek -- Hausa -- Hebrew -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Japanese -- Korean -- LINGALA -- Maranao -- Nepali? -- Peul? -- Somali -- Spanish -- Sundanese -- Telugu -- Thai -- Turkish -- Twi -- Uzbek -- Yoruba

Previous Tract -- Next Tract

BA TRACTES - Nsango mikuse ya Biblia mpo na kokabolama

TRACTE 04 -- Kimia ezala na bino


Tozali kobika na tango ya mobulu. Bpmbe izali kosopana, bitumba bizali kobima bipai na bipai, malali mabe ezali kobundisa mboka, mimbongo mizali kozinda mpe nzala, kobanga mpe kozanga elikia eleki bato. Mingi na bato bazali lisusu na elikia ya kimia mpe molongo te.

Klisto akebisi biso mpo na mikolo mikoya: “Bokoyoka sango ya bitumba mpe lokito ya botumba: bobanga te, mpo été makambo nyoso wana esengeli makoma …” (Matai 24:6).

Na buku ya Emoniseli, totanga été kimia elongwi na mokili (Emoniseli 6:4). Eleki mibu 2’700, Nzambe alobaka na mosakoli Isaya: “Kimia ezali te mpo na batomboki” (Esaïe 48:22; 57:21).


Banani batomboki?

Bato mingi bakanisi été bazali malamu koleka bamosusu mpo été bazali na bizaleli malamu. Ekoki kozala été bayekoli malamu mpe bazali kolonga na makambo na bango koleka mingi na biso. Bato mosusu bakanisi été misala malamu na bango ezali kozimisa misala mabe basali mpe Kilo ya misala na bango ekomata mpo na bango na tango ya esambiseli ya suka. Loklola bazali komikosa! Tango tozali komikokanisa na Nzambe, ezali kokweya. Moto nani oyo akomikokanisa na Nzambe mpe na mawa ya bosantu na ye akozala liboso na ye lokola moto ya lolendo mpe motema munene. Ozali komikokanisa na nani?

Na mikolo ya lelo, bato mingi bazali kobuka mibeko ya Nzambe mpo été bamesani kosala masumu.

Amonaki été mabe ya bato ekomaki munene na mokoli, mpe été makanisi nyoso kati na motema na bango ezalaki tango nyoso na nzila ya mabe. ( Genese 6:5)

Mosakoli Dawidi alobi : “Banso babungi, banso babebi;" (Banzembo 14:3; Barome 3:10-12).

Lelo, mabe ezali kosalema polele, soni te, na kimia te, mpe na kokanisa te. Mokili na biso ekokani na Sodomo na gomola mpe biso tozali kati na ya! Tozali kolingisa masumu, mpe kanda ya Nzambe sima ekopela likolo na biso nyoso. “Nzambe azali kotemela bato ya lolendo, kasi azali na ngolu epai na baye bakomikitisa” (Yakobo 4:6,)


Kimia ekouta na Nzambe

Yawé na Ngolu amonisaka na Mosakoli Yisaya koboptama na mwana moko na likinda oyo akozala mobondisi malamu mpe Nkolo na kimia. Bokonzi ya molimo ekozala ya libela (Yisaya 9:6-7).Tango mwana na Malia abotami na Beteleme, ba anzelu basepeli mpe bayembi: “Kembo na Nzambe na bisika bileki likolo mpe kimia na mokili kati na bato oyo bandimi ye!” (Luka 2:14)

Ata libonza ya pamba oyo, bobele ndambo ya bato nde bazwi kimia yango ya Nzambe mpe bazali kobikela malamu ya ngolu yango. Kasi, kimia ya libela ya Nzambe etondi bato nyoso oyo bandimi bilaka na ye mpe bandimi ye.

Sima ya lisekwa na ye, Klisto abimeli bayekoli na ye, babangaki mpe alendisi bango: “Kimia ezala na bino!”. (Yoane 20:19, 21, 26)

Na motindi ya mbote wana, Mwana ya Malia apesa kimia ya libela, kimia elongo na Nzambe oyo ezwami na nzila ya lisiko na ye, uta na esakweli: “Solo akumbi pasi na biso mpe amemi mawa na biso ;nde totangi été apesameli etumbu été abetami na Nzambe mpe anyokolami. Kasi azokisami mpo na masumu na biso, atutami mpo na mabe na biso ; etumbu oyo eyeiseli biso kimia etiami epai na ye mpe na mapipi na ye, biso tobikisami. Biso nyoso topengwi lokola bampate ; tongwani moto na moto na nzela na ye moko ; mpe Yawé atieli ye masumu na biso nyoso” (Yisaya 53:4-6)

Klisto abongisi bondeko na biso na Nzambe na nzila ya lisiko ya pasi mpe asombi mpo na biso kimia ya Nzambe mpo na ye.

Mwana na Malia azali kondimisa bino na makasi te kimia ya molimo, azali kondimisa bino ,yango na makasi te ; kasi azali kotalisela bino yango mpo été bopona yango mpe boyamba yango na motema polele mpe kondima bosomi na bino.


Kondima kimia

Klisto alendisaka bayekoli na ye boye : “Nazali kotikela bino kimia, nazali kopesa bino kimia na ngai. Nazali kopesa bino lokola mokili epesaka te. Tika été mitema na bino mitumolana te mpe milelalela te.” (Yoane 14:27)

Mokonzi ya kimia akopesa kimia ya molimo na ye epai na baye bayambi liloba na ye. Oyo akoyamba molimo na kimia akobongwana kokoma “mwana mobalo too mwana mwasi ya kimia”. Ntoma Polo andimi yango: “Na bongo, esili biso kolonga na nzila ya kondima, tozali na kimia liboso na Nzambe mpo na Nkolo na biso Yesu.” (Baloma 5:1).

Bato mingi oyo bazali koluka bazwi Molimo na kimia oyo efandi na Klisto na mitema na bango. Tozali kolendisa bino kotuna epai ya Nzambe akokisa bilaka na ye kati na bino, likolo na mbeka na Klisto oyo apesi kimia na ye na ye oyo akondima maloba na ye mpe akozwa na ye makabo oyo elakama.

Molimo ya kimia ezali kondimisa yo kopetolama ya molimo na yo mpe motema na lokuta nyoso mpe mbindo. Azali kopesa elikia ya, kolimbisama ya masumu uta na lisiko ya Klisto. Molimo yango epambolami, akoumela kati na bino mpo na kozongisa bino bondeko na Nzambe kati na Klisto, oyo ekozalisa mpe kozongisa kati na bino kimia ya libela.


Tika basali na kimia bapambolama

Molimo Mosantu akolisi, kati na bayekoli na Klisto, bolingo, esengo, kimia ya libela, bolamu, kokanga motema, motema alamu, bosembo motema pete kokanga motema (Bagatia 5:22-23). Bokanisi te été mitema na bino misepeli kozala na lolenge wana? Bomoi ya molimo peto ezali posa na yo mpe elikia oyo ebombami oyo ozali kokanisa.

Nzambe na kimia alingi abongola yo na liziba ya kimia kati esiki oyo ebebi. Oyo azwi kimia ya bo Nzambe akoki kokabola yango. Oyo azwi bolimbisi ya masumu na ye akoki kolimbisa baye basali ye mabe. Klisto alingi kopesa kimia na ye kati na libota na yo, na kelasi na yo, na esika na yo na mosala. Kozala na lolendo te na misala na yo ya molimo, mpo été Mwana na Malia akokomisa yo moto ya bopolo mpe kimia lokola azalaki na bomoi kati na biso. Klisto asalisi bato malamu mpe bato mabe. Oyo akolanda nzila na ye akokoma moto ya lolendo te kasi akotikala mosali na lolenge na ye.

Ntoma Polo asakolaki limpamboli na Nkolo oyo ezalaki mpe mpo na bino, tango oyo bozali kosalela ye kati na esengo: “Kimi aya Nzambe, oyo ezali koleka boyebi nyoso, ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino kati na Yesu Klisto.” (Bafilipi 4:7)


Olingi kozwa kimia ya Nzambe?

Soki ,otuni biso, tokobanda kotindela yo Sango Malamu elongo na Mabondeli nous vous enverrons l’Evangile de Christ avec des prières oyo ekobanda kosunga yo été otikala ngwi kati na kimia na Nzambe.


Sakola sango Malamu ya kimia Elongo na Nzambe nzinga nzinga na yo

Klisto asukisaki mateya na ye boye: “Nalobeli bino makambo oyo, mpo été bozwa kimia kati na ngai. Bokozwa mobulu kati na mokili ; bozala na nguya, nalonga liwa” (Yoane 16:33).

Sima ya kotanga soki otutisami na maloba ya mwa buku oyo, mpe osepeli kopesa na bandeko mosusu mpe baye bayebi naino kimia ya Nzambe te, komela biso mpe tokotindela yo ndambo ya buku. Koma polele esika ofandaka.

WATERS OF LIFE
P.O. BOX 60 05 13
70305 STUTTGART
GERMANY

Internet: www.waters-of-life.net
Internet: www.waters-of-life.org
e-mail: info@waters-of-life.net

www.Waters-of-Life.net

Page last modified on July 07, 2023, at 03:58 PM | powered by PmWiki (pmwiki-2.3.3)