Waters of Life

Biblical Studies in Multiple Languages

Search in "Lingala":
Home -- Lingala -- John - 030 (Jesus leads his disciples to see the ready harvest)
This page in: -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Bengali -- Burmese -- Cebuano -- Chinese -- Dioula -- English -- Ewe -- Farsi? -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Javanese -- Kiswahili -- Kyrgyz -- LINGALA - Malayalam -- Peul -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Thai -- Turkish -- Twi -- Urdu -- Uyghur? -- Uzbek -- Vietnamese -- Wolof -- Yiddish -- Yoruba

Previous Lesson -- Next Lesson

YOANE - Pole Epeli Kati Na Molili
Koyekola Sango Malamu Na Yesu Oyo Yoane Akomi
ETENI YA 1 - Kongengela Ya Pole Ya Bomoi (Yoane 1:1 - 4:54)
C - Mobembo Ya Liboso Na Yesu Na Yesulame (Yoane 2:13 - 4:54) -- Lasambo Ya Solo Ezali Nini?
4. Yesu na Samaria (Yoane 4:1–42)

b) Yesu akambaka bayekoli na ye mpo na komona mbuma oyo eteli (Yoane 4:27-38)


YOANE 4:27-30
27 Bongo bayekoli na ye bayaki mpe bakamwaki ndenge azalaki kosolola na mwasi moko. Nzokande moto moko te alobi: Ozali kotuna nini? Soki mpe : Ozali kosolola na ye makambo nini? 28 Bongo mwasi yango atikaki nzungu na ye ya mai mpe akɔtaki na engumba, 29 mpe alobaki na mibali ete: “Bóya kotala mobali moko oyo ayebisaki ngai makambo nyonso oyo nasalaki. Oyo ekoki kozala Klisto te? 30 Babimaki na engumba mpe bayaki epai na ye.

Ntango bazalaki kolobela likambo yango, bayekoli bautaki na mboka bakómaki na bilei oyo bautaki kosomba. Bakamwaki komona Yesu ye moko elongo na mwasi, mpe mwasi Mosamalia na ntango wana. Kasi moko te kati na bango azwaki mpiko ya kotuna ye mituna mpo ete ayokaki bozali ya Klisto. Ntango bamonaki elongi ya mwasi yango, basosolaki ete Klisto asalaki likamwisi. Esengo ya koyeba Mobikisi na ye ezalaki kongenga uta na ye.

Mwasi yango atikaki molangi na ye ya mpamba. Apesaki Yesu eloko ya komɛla te, atako asilisaki mposa na ye ya mai na kolimbisaka ye. Akómaki liziba ya mai ya bomoi mpo na bato mingi. Akimaki mbangu na mboka mpe ayebisaki bato makambo ya Klisto. Monɔkɔ na ye, oyo kala ezalaki liziba ya maloba ya mpambampamba, ezalaki sikawa liziba ya mai ya pɛto oyo ezalaki kotatola Klisto. Abendaki bato ya mboka na ye epai ya Mobikisi, kotatolaka ete abimisaki masumu na ye. Koyokaka confession oyo, ba villageois ba deviner que eloko moko ya inhabituel esalemaki, mosala ya Nzambe na muasi oyo. Lokola bazalaki na mposa makasi ya koyeba sekele na ye, bakimaki mbangu tii na libulu epai Yesu azalaki kopema elongo na bayekoli na ye.

Oyo ezali ndakisa ya oyo esalemaka ntango Klisto azali kosala kati na baoyo bazali kolanda Ye. Tokabola pe na baninga pe ba voisins na biso nsango oyo ete Klisto aye kobikisa biso. Na nsima, bakozala na mposa ya kozwa matomba na mai oyo ya bomoi oyo Molimo Mosantu akopesa bango. Okómi liziba ya bomoi mpo na bato oyo bazali zingazinga na yo? Soki te, yambolá masumu na yo epai ya Yesu, tiká bomoi na yo epai na Ye. Akopetola mpe akosantisa yo, mpe okozala lipamboli mpo na bato mingi​—lokola ekómelaki mosali ekobo oyo asakolaki epai na bato oyo bazalaki zingazinga na ye.

LOSAMBO: Nkolo Yesu, natondi yo po oluki ngai pe oyebi ngai. Naleki mwasi wana ya Samalia te. Limbisa masumu na ngai. Pesa ngai likabo ya Nzambe oyo ngai pe tika namona Tata ya lola. Tondisa motema na ngai na Molimo Mosantu mpo nakoma moto ya litomba mpe bomoi na ngai ekokoma elakiseli ya losambo na eyano na ngolu na yo. Bikisa mibali mingi mpe benda bango epai na yo moko. Oboyaka baoyo bayaka epai na yo te.

MOTUNA:

  1. Ndenge nini tokoki kosopama mai ya bomoi?

www.Waters-of-Life.net

Page last modified on December 11, 2025, at 02:18 AM | powered by PmWiki (pmwiki-2.3.3)