Waters of Life

Biblical Studies in Multiple Languages

Search in "Lingala":
Home -- Lingala -- John - 004 (The word before incarnation)
This page in: -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Bengali -- Burmese -- Cebuano -- Chinese -- Dioula -- English -- Ewe -- Farsi? -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Javanese -- Kiswahili -- Kyrgyz -- LINGALA - Malayalam -- Peul -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Thai -- Turkish -- Twi -- Urdu -- Uyghur -- Uzbek -- Vietnamese -- Wolof -- Yiddish -- Yoruba

Previous Lesson -- Next Lesson?

YOANE - Pole Epeli Kati Na Molili
Koyekola Sango Malamu Na Yesu Oyo Yoane Akomi
ETENI YA 1 - Kongengela Ya Pole Ya Bomoi (Yoane 1:1 - 4:54)
A - Liloba Ya Nzambe Ekomi Kati Na Yesu (Yoane 1:1-18)

1. Bonzambe mpe mosala Ya Liloba ya Nzambe Liboso ya kofanda kati ya moto (Yoane 1:1-5)


YOANE 1:5
5 Pole engɛngaka na molili, mpe molili elongaki yango te.

Nyonso ezali pole pe peto epai ya Nzambe. Epai oyo azali kosala nguya na ye, eloko moko te ezali molili. Nyonso ezali polele, semba, ya solo mpe ya bule. Bosɔtɔ ezwa esika moko te pene na ye. Molimo Mosantu azali peto mpe pole ya Nkolo engɛngaka na mobulu te kasi na malembe. Ezali kobɔndisa mpe kobikisa.

Miinda ya pole ya Klisto ekangami kaka na likoló te. Batɔbɔlaka molili mpe bapesaka lobiko. Ezali ngolu ya kokamwa koyeba ete Klisto azali kongenga lelo na katikati ya molili. Asundolaka bato oyo babungi te, kasi asikolaka bango mpe azali kongɛngisa bango.

Esengeli toyeba bozali kati ya mokili ya molili oyo ezali kotelemela mokili ya pole. Toyebi mpenza te ndenge nini molili yango ebimaki. Yoane, mosakoli ya nsango malamu, ayebisaki biso sekele yango te. Alingaki ete tóyeba pole kozanga kofanda na molili. Bato nyonso mpe bikelamu nyonso bakweyi na molili mpe mokili mobimba efandi na nse ya bokonzi ya mabe.

Mbala mosusu ozali komituna: Soki Klisto akelaki molɔ́ngɔ́ na boyokani na Nzambe mpe lokola eloko moko ya malamu, ndenge nini molili elongaki kokɔta na kati? Nzambe akela bato na elilingi na ye, ndenge nini to bebisa kembo na ye lelo?

Yoane alobeli kombo ya Satana te, Satana oyo azangaki kotosi Nkolo mpe amekaki koboma mwinda na ye. Azali ntango nyonso kotɛmɛla Klisto. Yango wana, abungisaki pole oyo bapesaki ye. Satana akómaki na lolendo mpe alukaki bonene kokokana na Nzambe. Alingaki komata likolo na ye mpo na kolonga ye. Oyo ndenge akomaki mokonzi ya molili.

Ndeko ya bolingo, tina ya vie na yo eza nini? Ozali koluka bonene, lokumu pe kokokisa ba posa na yo moko libanda na Nzambe? Soki ezali bongo, boye ozali moko ya baoyo bazali na molili, lokola kati ya Mabe. Lokola atikalaki ye moko te, abendaki milimo ya bato epai na ye. Tala bilongi ya batu boleki na balabala. Omoni pole to molili na miso na bango? Mitema na bango emonisaka esengo ya Nzambe to mawa ya Satana?

Moto ya Mabe ayinaka Nzambe mpo pole na Ye mosantu ezali kokweisa ye. Alingi te pole ebimisa botomboki na ye. Abombi mpe ameki kolonga Klisto mpe baoyo bazali kolanda pole na ye. Motɛki oyo akoki te kokanga motema na mwinda ya Nkolo mpe ayinaka yango. Abombaka elongi na ye na nko mpe na yango akoki kososola pole te. Likambo ya kobangisa ezali ete milio ya bato bamonaka te moi ya Klisto lokola ezali kongenga na butu ya masumu na bango. Biso banso toyebi moi. Ntina ya kolimbola yango ezali te. Ezali wana, ezali kongɛnga, ezali kongɛnga mpe ezali kongɛnga. Moto nyonso ayebi ete azali liziba ya bomoi.

Mibali mpe basi mingi bazangaka kososola nkembo ya Klisto mpe nguya na Ye mpo ete balingi te koluka kososola yango. Makanisi ya kobungisa nzela ekangaka bango miso lokola ezipelo ya monene mpe esalaka ete baboya nsango ya solo oyo etali bonzambe ya Klisto. Kutu, baboyaka kondima masumu na bango moko. Balingi te kopusana penepene na pole mpe balingaka kotikala na molili. Bamiwanganaka te to bayambolaka masumu na bango te. Bakómaka bato ya lolendo mpe ya lofundo. Batikali bakufi miso na ngolu ya pole ya Klisto. Molili ezali kotɛmɛla pole, kasi pole etɔbɔlaka yango na nzela ya bolingo. Ozali wapi? Na pole ya Nkolo to na molili ya Mabe?

KOBONDELA: O Nkolo, ozali mwinda ya mokili. Nalandi yo na kondima mpe na bolingo na yo. Natambolaka na molili te, kasi nazwi pole ya bomoi. Natondi yo mpo ete otiki ngai moko te, na bobangi ya molili mpe nkanda ya Nzambe, kasi obengi ngai na kati ya pole na yo ya kongenga. Engɛngisa baoyo bazali zingazinga na ngai oyo bamonaka yo te atako ozali kongɛnga zingazinga na bango. Nkolo, yokela ngai mawa mpe tondisa ngai na mwinda na yo!

MOTUNA:

  1. Bokeseni nini ezali kati na pole mpe molili na ndimbola ya molimo ya liloba?

Bato oyo bazalaki kotambola kati na molili bamoni pole makasi ;
ba-oyo bazalaki kovanda kati na mokili ya bakufi,
pole engengeli bango.
(Ezayi 9:1)

www.Waters-of-Life.net

Page last modified on December 08, 2025, at 07:19 AM | powered by PmWiki (pmwiki-2.3.3)