Waters of Life

Biblical Studies in Multiple Languages

Search in "Lingala":
Home -- Lingala -- John - 003 (The word before incarnation)
This page in: -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Bengali -- Burmese -- Cebuano -- Chinese -- Dioula -- English -- Ewe -- Farsi? -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Javanese -- Kiswahili -- Kyrgyz -- LINGALA - Malayalam -- Peul -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Thai -- Turkish -- Twi -- Urdu -- Uyghur -- Uzbek -- Vietnamese -- Wolof -- Yiddish -- Yoruba

Previous Lesson -- Next Lesson

YOANE - Pole Epeli Kati Na Molili
Koyekola Sango Malamu Na Yesu Oyo Yoane Akomi
ETENI YA 1 - Kongengela Ya Pole Ya Bomoi (Yoane 1:1 - 4:54)
A - Liloba Ya Nzambe Ekomi Kati Na Yesu (Yoane 1:1-18)

1. Bonzambe mpe mosala Ya Liloba ya Nzambe Liboso ya kofanda kati ya moto (Yoane 1:1-5)


YOANE 1:2-4
2 Na ebandeli azalaki elongo na Nzambe. 3 Biloko nyonso bisalemaki na nzela na ye, + mpe eloko moko te esalemá kozanga ye. 4 Bomoi ezalaki kati na ye, mpe bomoi ezalaki pole ya bato.

Klisto azalaki na bomoi uta na ye moko te, kasi ntango nyonso mpo na Nzambe. Amikabolaki te na Tata na ye, kasi azalaki ntango nyonso kokambema na ye, kofanda elongo na ye mpe kofanda kati na ye. Ezaleli wana ya Klisto oyo atalelaki mingimingi “Tata na ye” ezalaki na ntina mingi mpo na Yoane na boye ete azongelaki yango. Bomoko wana ya libela kati na Klisto mpe Tata na ye ezali sekele ya Bosato Bosantu. Tondimi te ete banzambe misato moko moko na ndenge na ye, bakabwani moko na mosusu. Kasi tondimi Nzambe moko, oyo atondi na bolingo. Sikawa Nkolo azali kofanda ye moko te, kasi Mwana na ye azali ntango nyonso elongo na ye, azali kofanda elongo na ye na boyokani moko. Soki moto akutanaki na bolingo ya Nzambe te na koyambaka Molimo Mosantu na kati ya motema na ye, akozala na makoki te ya kosimba bosolo ya ntina ya Nzambe. Bolingo ya bonzambe ezali oyo esangisaka Tata, Mwana mpe Molimo Mosantu na Nzambe moko.

Na ebandeli, tango Nzambe akelaki mokili, asalaki yango ye moko te to na kimia te, kasi apesaki yango bomoi na nzela ya Liloba na ye. Lokola Klisto azalaki Liloba ya Nzambe, mokili ekelamaki na nzela na ye. Yango elakisi ete Klisto azali kaka Mobikisi, Mobundi mpe Mosikoli te, kasi mpe Mozalisi. Lokola eloko moko te esalemaka kozanga été azala na kati, ye nde azali ko kotala nyonso. Epambolami motema oyo ezali kososola mpe kosimba été Klisto azali nani! Boyebi ya sika nyonso ya boyekoli ya makambo ya mikolo oyo, bizalisami nyoso ya mike mike ya ebandeli ya nzoto, ya minzoto ezali eloko mosusu te kaka komonisa ya komikitisa ya nkembo ya Klisto pe nguya na Ye. Mongongo na yo, misisa na yo, lolenge ya nzoto na yo, mpe kobeta ya motema na yo ezali, kati na makambo mosusu, makabo oyo Klisto apesaka yo. Okanisaka kopesa ye matɔndi?

Biloko nyonso bikelamaki longola se Nzambe, Liloba na Ye mpe Molimo na Ye. Ye moko azali na bomoi ya seko mpe mosantu. Lokola Nzambe azali na bomoi kati na Ye moko, ndenge moko mpe Klisto azali liziba ya bomoi ya solo, mopesi ya bomoi, oyo abikisaka biso na liwa, na ngambo mpe na lisumu, mpe apesi biso bomoi na Ye ya seko. Bomoi oyo ya bonzambe kati na Klisto elongi liwa. Abimaki na lilita na nguya ya bomoi na ye ya bonzambe. Klisto azali kaka Mozalisi te, kasi azali kati na ye moko liziba ya bomoi. Ntango nyonso oyo azali mosantu, akokufa soko moke te. Lisumu moko te ezwami epai na Nzambe to epai na Mwana na ye, mpe azali na bomoi libela. Tomoni makanisi mingi na ntina ya bomoi ya Klisto na mikapo ya Nsango Malamu ya Yoane. Bomoi oyo ezali moko ya miboko ya motindo ya kosala na ye.

Pole ya moi epesaka bomoi na etando ya mokili mpe etando ya likolo biso mabele. Kasi na Klisto, likambo oyo ekeseni ezali solo: bomoi na ye ezali liziba mpo ete pole mpe bozongisi sika oyo tozali kokutana na yango epai na ye ezongisaka elikia na biso sika. Lingomba na biso ezali lingomba ya mobeko ya liwa mpe ya kosambisama te, kasi Sango ya bomoyi, ya pole mpe ya elikia. Lisekwa ya Klisto uta na bakufi elongoli kozanga elikya nyonso. Molimo Mosantu oyo afandi kati na biso akomisi biso basangoli na bomoi ya Nzambe.

Mokili ezali molili mpo na masumu, kasi Klisto azali bolingo na pole. Molili ezali te, mabe te, mabe ezali te kati na ye. Yango wana Klisto abimi na nkembo na ye mobimba. Azali kongɛnga mingi koleka pole. Nzokande Yoane abandi te na kopesaka ntina na nkembo ya kongenga ya Klisto, kasi azali kopesa ntina na makasi mpe bomoi na ye. Mpo boyebi ya bosantu ya Klisto ebimisaka biso polele, esambisaka biso, mpe ebebisaka biso. Epai mosusu, ndenge oyo moto amonaka bomoi na ye epesaka biso bomoi. Komanyola na ntina na Klisto ebɔndisaka biso mpe ezongisaka biso sika.

Yesu azali mwinda ya bato. Azali kongenga mpo na ye moko te mpe azali kokumisa nkombo na ye te. Kasi, engɛngaka mpo na bosepeli na biso. Tozali maziba ya pole te, kasi ya molili. Bato banso bazali bato mabe, kasi Klisto azali kongɛngisa biso mpo ete tokoka koyeba Ye mpe toyeba ezalela na biso ya masumu. Na nzela ya Nsango Malamu na ye tosekwa uta na bakufi mpe tokoti na bomoi ya seko. Klisto abendaka biso mpe abengi biso na pole ya bomoi na ye mpo na kotika ezalela na biso ya kozanga elikya. Topusana penepene na ye na ekateli mpe na elikya.

LOSAMBO: Nkolo Yesu, tofukami liboso na yo po Tata, Molimo Mosantu pe yo bozali moko. Okeli mokili na boyokani na Tata. Opesaki ngai bomoi. Limbisa ngai masumu na ngai mpe ngɛngisa ngai na Molimo Mosantu na yo mpo nazala na bomoi ya solo, tika molili na ngai mpe na belema penepene na pole ya bomoi na yo ya seko.

MOTUNA:

  1. Bizaleli 6 ya Klisto oyo Yoane azali kolakisa na ebandeli ya nsango malamu na ye ezali nini?

www.Waters-of-Life.net

Page last modified on December 09, 2025, at 02:55 AM | powered by PmWiki (pmwiki-2.3.3)