Waters of Life

Biblical Studies in Multiple Languages

Search in "Lingala":
Home -- Lingala -- Romans - 037 (Deliverance to the Service of Christ)
This page in: -- Afrikaans -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Azeri -- Bengali -- Bulgarian -- Cebuano -- Chinese -- English -- Ewe -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hebrew -- Hindi -- Igbo -- [Indonesian.BkNt06RoCh037 | Indonesian]] -- Javanese -- Kiswahili -- LINGALA -- Malayalam -- Polish -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Turkish -- Ukrainian -- Urdu? -- Yiddish -- Yoruba

Previous Lesson -- Next Lesson

BALOMA - Mokonzi Azali Bosemnbo Na Biso
Boyekoli Ya Mokanda Ya Polo Epai Ya Baloma
ETENI YA 1 - Bosembo Ya Nzambe Esikoli Ba Sumuki Nionso Mpe Ezo Sikila Pe Kobulisa Bato Nionso Baye Bandimi Yesu Klisto (Baloma 1:18 - 8:39)
D - Nguya Ya Nzambe Ebimisi Biso Na Nguya Ya Masumu (Baloma 6:1 - 8:27)

3. Kozala Na Bonsomi Na Mibeko Epesaka Biso Bonsomi Ya Kosalela Klisto (Baloma 7:1-6)


ROMANS 7:1-6
1 To boyebi te, bandeko mibali mpe basi—mpo nazali koloba na baoyo bayebi Mibeko—ete Mibeko ezali na bokonzi likoló na moto bobele ntango nyonso oyo moto yango azali na bomoi? 2 Na ndakisa, na mibeko, mwasi oyo abalá akangamaka na mobali na ye ntango nyonso oyo mobali na ye azali na bomoi. Kasi soki mobali na ye akufi, alongolami na mobeko oyo ekangaki ye na ye. 3 Bongo, soki ntango mobali na ye azali naino na bomoi abalaki mobali mosusu, babengaka ye mwasi ya ekobo. Kasi soki mobali na ye akufi, abimi na mibeko mpe azali ekobo te soki abalaki mobali mosusu. 4 Bobele bongo, bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi, bino mpe bokufaki mpo na Mibeko na nzela ya nzoto ya Kristo, mpo bózala ya moto mosusu, oyo asekwi na bakufi, mpo tóbota mbuma mpo na Nzambe. 5 Pamba té tango tozalaki na nzoto, bamposa ya masumu oyo Mibeko elamusaki ezalaki kosala na binama na biso, yango wana tobotaki mbuma mpo na liwa. 6 Kasi sikawa tobimi na Mibeko, tokufi na oyo ekangaki biso na bokangami, boye tosalelaka na nzela ya sika ya Molimo kasi na nzela ya kala ya mobeko oyo ekomami te.

Ntoma yango alingaki ete bandeko yango, bandimi ya Bayuda, bándima mateya na ye na ntina na liwa na bango ya elimo mpe lisekwa na bango kati na Klisto. Kasi Paulo ayebaki mpe ete asengelaki kolimbola polele ezaleli na ye epai ya mibeko, mpamba te bamonaki kati na yango emoniseli ya Nzambe mpe nsuka ya masakola nyonso, mpe kokokisama ya mokano ya Nzambe oyo epesamaki na Moize.

Polo ayebisaki bango ete: Bino boteyaka mobeko mpe bolingaka yango bokangami na yango lokola mobali ná mwasi bokangami na kondimana ya libala. Lokola molongani moko asikolami na kondimana ya libala na liwa ya mosusu, ndenge moko yo mpe osikolami na mobeko na nzela ya liwa na yo kati na Klisto. Nzoto na ye oyo ekundamaki ekómaki nzoto na yo, mpe sikoyo mobeko ezali na bokonzi likoló na yo te.

Klisto asekwi uta na bakufi, mpe bozali na bonsomi, boponi Nkolo na bomoi, mpo na kokota na kondimana ya sika elongo na Mwana ya Nzambe. Kondimana ya kala ezalaki kondimana ya liwa mpo na kosambisa oyo etiamaki na mobeko. Kasi sikoyo bozali na boyokani elongo na Nkolo na bomoi, mpe mbuma ya Molimo na ye ezali komonana kati na bino: bolingo, esengo, kimia, motema molai, boyengebene, bopeto, bosembo, boboto, mpe komikitisa, elongo na bizaleli nyonso ya Yesu: botondi, bosolo, bopeto, mpe bosepeli.

Nzambe azali kozela komonana ya mbuma ya Mwana na ye na bomoi na yo, mpo ete Klisto akufaki mpe asekwaki mpe asopaki Molimo na ye likoló na bato, mpo ete bato mingi bábota mbuma mingi. Mpe lokola mosali ya vinyo alɛmbi ntango azali kozela ete mbuma etela, ndenge moko mpe Nzambe azali na lotomo kati na yo.

Liboso ya Klisto, bato bazalaki baombo ya mobeko, na boye ete bamposa nyonso ya nzoto ebimisamaki na pole, mpo ete bipekiseli ya mobeko etindaka bato básala mabe. Mibeko ememi biso na kobota mbuma ya liwa mingi koleka, mpo ete mobeko ememi biso kaka te na kobuka mobeko, kasi ezali mpe kokweisa biso kozanga mawa.

Kasi na kati ya Klisto tokufi na masengami nyonso ya Mibeko, mpo ete Klisto akokisaki mobeko na masengami na yango nyonso na nzela ya liwa na ye. Lokola tokufi mpo na bisomei na nzela ya kondima na ye oyo babakamaki na ekulusu, yango wana tokufi na mokanda ya emoniseli ya liboso. Na tango wana kaka, Mwana ya Nzambe abengi biso na boyokani ya sika oyo etongami likolo ya molimo ya malamu koleka, noki tokoki kokosama na mokanda ya mobeko, kasi tosalela Nzambe na nguya ya Molimo na ye. Kobanda sikoyo, bomoi na biso ezali lisusu na likama te na bipekiseli, kasi tozali na bomoi na libiangi ya bolingo na bomoi ya esengo na nguya ya kimia ya Nzambe. Elimo ya kondimana ya sika elɛmbaka te to ekómaka mobange te, mpamba te ezali Nzambe ye moko, oyo azali na nsuka te, mpe oyo mayele na ye, bolamu na ye, boboto na ye, elikia na ye, mpe nguya na ye ezangi ndelo. Mipesa mobimba na bokambi ya Molimo ya Nzambe na Nsango Elamu na Ye, mpe okozwa bomengo ya molimo mpe nguya ya bonzambe, mpe okokola na komikitisa mpe boboto ya Klisto, mpo ete okufi mpe Ye azali kofanda kati na yo.

LOSAMBO: Nzambe mosantu, totondi yo mpo na kobenga biso uta na bowumbu ya mobeko na nzela ya liwa ya Klisto, oyo akokisaki bolingo mpe bosolo na bomoi na Ye mpe na ekulusu na Ye. Tozali kokumisa yo mpo ete ozali kokamba biso na kondimana ya sika mpe otondisi mitema na biso na Molimo na Yo ya kobɔndisa, mpo ete tokoka kobota mbuma na nzela ya nguya ya ngolu na Yo.

MOTUNA:

  1. Mpo na nini bandimi banso basikolami na masengami ya kondimana ya kala?

Te ! Biso tondimaka
na ngolu ya Nkolo Yesu,
ete tobiki
ndenge moko kaka na bango.

(Misala 15:11)

www.Waters-of-Life.net

Page last modified on October 21, 2026, at 03:56 AM | powered by PmWiki (pmwiki-2.3.3)