Previous Lesson -- Next Lesson
3. Botondi ya Nzambe emonanaki na bomoto (Yoane 1:14-18)
YOANE 1:15-16
15 Yoane apesaki litatoli na ntina na ye mpe agangaki ete: “Oyo nde nalobaki na ntina na ye: ‘Moto oyo akoya nsima na ngai aleki ngai, mpo azalaki liboso na ngai.” 16 Mpe biso nyoso litondi na ye, mpe ngolu likolo ya ngolu.
Mobatisi asakolaki na mongongo makasi ete Klisto, oyo ayaki nsima na ye, azalaki liboso na ye, libanda ya mabota ya bankɔkɔ ya ntango. Na esakweli oyo Mobatisi andimisaki Yesu azalaka uta tango na tango. Apesaki litatoli na bosolo ete Klisto azali likolo ya etando, ntango mpe libebi, Nzambe oyo azali na nsuka te mpe azali kobeba te.
Na esobe, Mobatisi anyokwamaki mpo na komona bonene ya lisumu ya bato. Ateyaki bango boyamboli mpo na bolimbisi ya masumu. Kasi ntango amonaki Yesu, motema na ye esepelaki, mpo ete Klisto abotamaki lokola moto ya seko, atondi na bosolo, mpe liwa ezalaki na nguya te likolo na ye. Esengo ya moto mpe ya kobotama na Yesu euti na komonana ya bomoi ya seko ya Nzambe na nzoto ya moto. Boye elonga ya bomoi likolo ya liwa ebandaki, pamba te kati na ye lisumu oyo ememaka na liwa esilaki.
Kotala bozindo ya ngolu oyo, Mobatisi akumisaki mpe asanjolaki botondi ya Nzambe oyo azalaki kati na Klisto. Ntoma Polo asilaki koyambola ete: “Mpo kati na ye bonzambe nyoso ezalaki. Ozali na makambo nyonso na kati na ye.” Yoane alobeli bosolo yango na mokuse na maloba na ye: “Biso nyonso tozwi litondi na ye, mpe ngolu likolo na ngɔlu.”
Litondi oyo ya Klisto ezali nini mpe tozwi nini epai na ye? Soki bokanisa elimbweli ya Yoane na ntina ya bomoto ya Klisto na milongo oyo eleki, bokoyeba bonene ya bomoto na Ye mpe bokosimba lolenge nini ebele ya ngolu na Ye ekomaka epai na biso mokolo na mokolo.
Klisto azali Liloba ya Nzambe oyo euti na Tata, lokola maloba ewuti na monoko ya moto. Azali motema ya mozindo ya Nzambe mpe ya bolingi na ye, ya ntina na ye mpe ya esengo na ye. Lokola liloba ya Sango Malamu ekomi epai na biso, ekoti na makanisi na biso mpe ebongoli bolingi na biso, Klisto akoti na mitema na biso mpe abongoli biso engebene na bolamu na ye. Oyo ezali ngolu moko ya kokamwa te?
Klisto azali Bomoi ya Nzambe : bato ya mayele ya mokili bakoki kotonga bandako, kotonga ba gbagba mpe ba bombe, kasi moko te akoki kokela bomoi ya seko. Baboti bazali na mokumba ya kopesa bana na bango bomoi oyo Nzambe apesi bango. Yango ezali ngolu te? Mpe lokola bomoi ya mabele eleki, Klisto atindi Molimo na ye moko oyo ezali bomoi ya seko epai ya bandimi. Baklisto nyonso bakabolaka bomoi ya Nzambe mpe bakokufa ata mokolo moko te. Yango ezali ngolu te?
Klisto azali Pole ya mokili. Azali molongi likolo ya molili mpe mokeli ya pole na butu ya molili. Apesi elikya na mokili ya molili, atindi nguya na ye na mokili oyo ezali kolela na mpasi na yango. Pole ya Klisto ezali na makoki ya kobengana molili ya mokili. Na politiki mpe na esika ya mosala, na libota mpe na lingomba, baoyo bandimaka Ye bazwaka makasi mpo na kotikala sembo mpe sembo. Ezali ngolu moko nsima na mosusu te?
Yesu azali Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Botondi ya nguya ya Nzambe efandi kati na ye. Makamwisi na ye ezalaki bilembo oyo emonisaki bokonzi na ye. Lisekwa na ye uta na bakufi emonisaki nguya ya bomoi na ye likoló na liwa. Na nzoto, alongaki nguya ya mokili mpe mabele ya kobenda biloko mpe atambolaki likoló ya mai. Na mampa mitano mpe mbisi mibale aleisaki mpe atondisaki bato 5 000. Ayebi kutu motángo ya nsuki na motó na yo. Okofukama liboso ya ngolu na Ye oyo ezali komibanzabanza mpo na yo?
Olingi koyeba makambo mingi na ntina ya botondi ya Klisto? Mokili ezali ya ye. Biloko mpe bomengo, miniti nyonso ya bomoi na yo ezali ya Ye. Yo pe ozali ya ye. Ye nde akela yo pe Ye nde abatelaka yo. Klisto azali nkolo ya biloko nyonso. Apesi bino bizaleli na Ye po tobatela yango pona Ye. Misuni na yo, makanisi na yo mpe baboti na yo ezali makabo Nkolo na yo apesi yo. Okopesa ye matɔndi mpo na ngolu na ye?
Likambo ya kokamwa na ntina ya bomoto mpe kobotama na Yesu ezali ete litondi ya boNzambe ekomaki mosuni kati na mwana. Likamwisi oyo ya malamu esakolamaki na Yisaya mibu 700 yambo ya kokokisama na yango na lisungi ya Molimo Mosantu: “Mpo ete mwana abotami mpo na biso, mwana mobali apesameli biso: mpe boyangeli ekozala na lipeka na ye. Nkombo na ye ekobengama Moto ya kokamwa, Mopesi toli, Nzambe ya nguya, Tata ya seko, Mokonzi ya kimia» (Yisaya 9:6). Likambo ya mawa, makanisi ya bato ezali motau mpo na kososola ete Nzambe kati na Klisto azongisaki kati na moto elilingi ya peto oyo moto azalaki na yango na ebandeli ya kozalisama. Yesu azali na nkembo, na bwanya, azali mopesi toli oyo apemami malamu, Nzambe ya seko na nguya. Bizaleli mpe makabo nyonso ya Nzambe ezalaki kati na mwana oyo azalaki na elyelo ya bibwɛlɛ. Osili kososola ngolu ya kokamwa oyo Nzambe apesi biso na koya epai na biso kati na Yesu? Tokoki koloba ete: Nzambe azali elongo na biso!
Klisto alingi te kobomba bizaleli na ye ya malamu mpo na ye moko. Soki te alingaki kotikala na likoló. Ayaki na mokili na biso, akomaki mosuni mpe azwaki lolenge na biso ya komikitisa mpo na kofungola nzela ya lola mpo na biso, mpo na koyokanisa biso na Tata na ye mpe kotondisa biso na kotonda na ye. Ndenge moko mpe, Polo atatoli ete mokano ya Nzambe ezali bozali ya botondi na ye na Eklezia. Tanga Baefese 1:23, 4:10 na Bakolose 2:10, nde bokokambama pona kosanzola Nzambe pe kokumisa ngolu ya Nkolo na yo. Kotikala na mawa te na masumu na yo, kasi fungola motema na yo mpo na kotonda ya Klisto. Bópusana penepene na mwana oyo azali na elyelo ya bibwɛlɛ, mpe mapamboli mingi ekosopana likoló na yo. Akosala yo liziba ya ngolu mpo na baye bazali nzinganzinga na yo.
LOSAMBO: Nkolo Yesu, ozali Mwana na Nzambe. Bolingo, nguya mpe bosolo ezali kati na yo. Tofukami liboso na yo mpe tozali kosepela mpo otikalaki mosika na biso te, kasi ofandaki na kati na biso. Olingi biso. Okomi moto pe osikoli biso. Totondi bino mpo na kopesa biso ngolu mpo na ngolu.
MOTUNA:
- Tolingi koloba nini na kotonda na bonzambe ya Klisto?