Waters of Life

Biblical Studies in Multiple Languages

Search in "Lingala":
Home -- Lingala -- Romans - 064 (The Sanctification of your Life)
This page in: -- Afrikaans -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Azeri -- Bengali -- Bulgarian -- Cebuano -- Chinese -- English -- Ewe -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hebrew -- Hindi -- Igbo -- [Indonesian.BkNt06RoCh064 | Indonesian]] -- Javanese -- Kiswahili -- LINGALA -- Malayalam -- Polish -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish? -- Tamil -- Telugu -- Turkish -- Ukrainian -- Urdu? -- Yiddish -- Yoruba

Previous Lesson -- Next Lesson

BALOMA - Mokonzi Azali Bosemnbo Na Biso
Boyekoli Ya Mokanda Ya Polo Epai Ya Baloma
ETENI YA 3 - Bosembo Ya Nzambe Emonani Na Bomoi Ya Ba Ndimi Na Klisto (Baloma 12:1 - 15:13)

1. Bosantu ya bomoyi na yo esili na kotosaka bomoi na yo mobimba na maboko ya Nzambe (Baloma 12:1-2)


BALOMA 12:2
2 Bólanda ndakisa ya mokili oyo te, kasi bóbongwana na nzela ya kozongisa makanisi na bino sika. Na nsima, okozala na likoki ya komeka mpe kondima nini mokano ya Nzambe ezali​—bolingi na ye ya malamu, ya kosepelisa mpe ya kokoka.

Polo akanisaki te ete bandimi ya lingomba ya Loma bamipesa na molimo mpe na bosolo na bomoko ya Bosato Bosantu, kasi atia nde etumba ya molimo na lolenge nyonso ya masumu. Etumba oyo ya molimo elakisi te kozwa lobiko, pamba te Klisto abikisi yo, kasi Nkolo na yo alingi kolakisa bosembo na ye na nzela ya bosantu ya bomoi na yo.

Mpo na kosantisama ya bomoi na yo, Paulo alakisaki mayele ya kotonga:

a) Kobanda sikoyo, ko vivre na bokebi te lokola basusu, mpe kosala makasi te mpo na lokumu, mbongo, kosangisa nzoto, mpe bisengo, kasi nde kozwa bizaleli ya Yesu mpe lolenge ya bomoi ya bantoma na nzela ya mayele mpe misala na yo.
b) Nkolo apesi yo mbongwana ya makanisi mpo na kosalela mibeko oyo. Mokano na yo ekozala kaka te ya kozala na bomoi ya bomengo mpe ya kitoko, kasi lisusu kozala na makanisi ya Nzambe, mpo ete Molimo ya ngolu akoka kosantisa motema mpe bolingi na yo.
c) Esengeli oyeba mokano ya Nzambe mpe ososola oyo alingi epai na yo mpo na kokokisa mikano na ye mpe koboya oyo ye aboyi. Mpo na kokoma na bokoli oyo ya molimo na boyebi, osengeli kotanga Biblia mbala mingi mpe koluka toli, bokambi, mpe pole ya Tata na yo ya Lola mpo na kosepelisa Ye solo.
d) Polo alobi kaka boye: Sala malamu. Koloba kaka malamu te, kasi tyá yango na mosala na kopesaka ntango mpe mbongo na yo. Yekola epai ya Nzambe oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe, mpe kokesenisa yango na bomoi na yo. Zwá mayele na nzela ya Biblia, mpe tika Molimo Mosantu akamba yo na makambo nyonso oyo esepelisaka Nzambe
e) Salá makasi mpo na kozala na bomoi ya kokoka na molimo. Mobeko oyo elingi koloba te ete ozali na makoki ya komisala ya kokoka, yango wana senga Yesu atondisa bozangi na yo, mpo ete nyonso oyo osalaka mpo na Ye ezala ya kokoka, ya mbala moko, mpe ya solo. Yango esalemaka na nzela ya likabo ya bomoko ya Molimo Mosantu kati na yo, soki osengi yango.
f) Mpe soki obandi kozala na bomoi boye, okofanda elongo na Nzambe, mpe Molimo ya Nzambe akosala na botau na yo. Na nsima, okokóma moto ya esengo, na botondi epai ya Yesu mpo na mbeka na Ye likoló ya Golgota.

LOSAMBO: Tata na Lola, limbisa biso soki tofandaki na moimi, tomilinga mingi koleka Yo. Bobongola mikano na biso mpo ete tokoka kozala na bomoi na losambo ya solo ya molimo, nsima ya koyeba ete Yesu alimbisaki biso masumu na biso nyonso na ekulusu, mpe ete Molimo Mosantu na Yo akomi makasi na biso. Salisa biso, Nkolo, tolinga Yo na komipesaka bomoi na biso epai na Yo libela.

MOTUNA:

  1. Nini ezali ba degrés ya bomoi ya bosantu na bandimi na Yesu Klisto?

www.Waters-of-Life.net

Page last modified on October 29, 2026, at 11:56 AM | powered by PmWiki (pmwiki-2.3.3)