Previous Lesson -- Next Lesson
2. Motɛki afundami mpe atungisami (Yoane 13:18-32)
YOANE 13:18-19
18 Nazali kolobela bino nyonso te; Nayebi ba oyo naponaki. Kasi mpo ete Makomami ekokisama: Moto oyo azali kolya limpa elongo na ngai atomboli litindi na ye liboso na ngai. 19 Kobanda sikoyo, nazali koyebisa bino liboso ete likambo yango esalema, mpo ete ntango ekosalema, bóndima ete ngai nazali ye.
Yudasi azalaki na bomoi ya mawa, azalaki kosepela te na komikitisa mpe mosala. Aponaka mobulu, bokonzi mpe bokosi. Alingaki kotyola Yesu. Ekoki kozala ete azalaki na elikya ya kotinda Klisto na makasi azwa bokonzi. Na motema na ye azalaki monguna, alingaki konyata Yesu mpe kokana koboma ye. Alongaki te koyeba ntina ya bolingo. Azalaki na lolendo nzokande Yesu azalaki na komikitisa. Yuda atondaki na lolendo, bokonzi mpe mobulu, nzokande Yesu aponaki kotikala mosaleli ya komikitisa mpe ya boboto.
Yesu azalaki kobongisa bayekoli na ye mpo na ngonga ya kotɛka, mpo bátya ntembe te na Nkolo na ye, ata soki asengelaki kopesama epai ya bapakano. Azali Nkolo Yemei, kotatolaka liboso ngonga na Ye ya bolembu, komibenga: “Nazali.” Nzambe asalelaki kaka maloba wana mpo na komimonisa epai ya Moize na kati ya nzete oyo ezali kozika. Alingaki kondimisa kondima ya bayekoli na ye na nzela ya bondimisi ya boye na ntina ya bonzambe na ye mpe bongo kopekisa bango kokweya na ntembe mpe komekama.
YOANE 13:20
20 Ya solo, solo, nazali koloba na bino ete, moto nyonso oyo akoyamba moto oyo natindi, ayambaka ngai, mpe moto nyonso oyo akoyamba ngai, ayambaka moto oyo atindaki ngai.
Yesu alongolaki bayekoli na ye na bobangi mpo na kokangama mpe liwa na ye. Etinda apesaki bango mpe bozali na ye ekobatela bango. Yesu atindi bayekoli na ye mpe akei elongo na bango. Basali na ye bakendaka na kombo na bango moko te, kasi na kombo ya Nkolo na bango. Oyo akoyamba yango azuaka Bosato Mosantu. Oyo andimi maloba na bango akomi muana ya Nzambe. Mission oyo ezali pasi mpo esengaka komipesa, bolingo mpo na banguna, persévérance na pauvreté mpe esengo na makambo nyoso nionso. Atako bongo, bayebi ete Nzambe afandaka kati na bango. Bisika nyonso oyo bakendaka, akendaka elongo na bango. Molimo na Ye azali kokamba bango esika alingi bango basalela, engebene na miango na Ye, mpo ete mosala na Ye ekokisama.
LOSAMBO: Nkolo Yesu Klisto, sunga ngai nasosola ete nakoki kotikala kati na Yo te soki nakoma mosaleli na Yo te. Nalingi ete ozala ntango nyonso ndakisa ya bomoi na ngai, ete natikala na komikitisa na makita mpe mosali na kati ya libota na ngai. Kopesa ngai nzela te na kopesa Satana esika na motema na ngai. Salisa ngai kaka te mpo na kolobela mosala, kasi mpo na kosalela yango na makasi mpe mayele na yo.
MOTUNA:
- Liteya nini tozwi na ndakisa ya Klisto?