Waters of Life

Biblical Studies in Multiple Languages

Search in "Lingala":
Home -- Lingala -- Tracts -- Tract 07 (The LORD comforts you!)
This page in: -- Armenian -- Baoule -- Burmese -- Chinese -- Dagbani? -- Dioula -- English -- French -- German? -- Greek -- Hausa -- Hebrew -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Japanese -- Korean? -- LINGALA -- Maranao -- Nepali? -- Peul? -- Somali -- Spanish -- Sundanese -- Telugu -- Thai? -- Turkish -- Twi -- Uzbek -- Yoruba

Previous Tract -- Next Tract

BA TRACTES - Nsango mikuse ya Biblia mpo na kokabolama

TRACTE 07 -- Nzambe akobondisa bino!


Soki toyebaki munene ya komilela mpe ebale ya pisoli oyo etondi mokili, mbele totungisami, tobwaki elikia mpe tosiliki. Ata bongo, buku Kondimana ya Kala mpe ya Sika izali kopesa kopesa kobondisama ya solo mpe izali kosunga biso kati na molili. Nkolo na ngolu nyoso apesa maloba etonda na elikia epai ya mosakoli Isaya: “Lokola moto oyo abondisami na mama na ye, ngai mpe nde nakobondisi bino ” (Isaya 66:13). Nzambe na nguya nyoso asala bolingo lokola mama mpe kimia lokola elembo ya boboto na ye.Oyo alingi koyeba mwa ndambo ya kobondisama ya Nzambe akoki kotala mama oyo azali kolinga mwana na ye.

Mama oyo amemi mwana na libumu na ye, akobota ye na pasi, yango mwana azali moko ya nzoto na ye moko. Azali komiyoka mobateli na ye, akokengele ye, akobatela ye butu na moi, akoleisa ye soki azali nzala, akosukola ye mbala na mbala na mokolo moko, akoyamba ye, akosakana na ye mpe kolakisa ye kosolola ata azali kososolo te. Akotika mwana na ye ye moko te, mpo apesamelaki ye na Nzambe ye moko. Mama amonisaka bolamu nyoso na ye mpe bolingo na ye epai ya mwana na ye.

Bongo tango akokola, akosombela ye bilamba mpe sapato, akosukola ye, akobongisa esika alalaka, mpe akopona kelasi ya malamu mpo na kotangisa ye. Soki kelasi esili, akosunga ye na makambo bateyaki ye na kelasi. Soki mwana na ye asali mabe, akopamela ye mpe akopesa ye etumbu, wana azali na elikia komona ye kokola malamu. Akokebisa ye na bangi, kosala pite, kosangana na milimo mabe, mpe bondoki. Akomeka kolukela ye baninga malamu. Ye moko akozala ndakisa malamu mpo na mwana na ye.

Mwana akoyeba été akoki kozonga na ndako ata asali mabe. Akoyambola mabe na ye epai ya mama na ye mpe mama akoyoka yango mpe akobomba yango na motema na ye. Mama akoteya mwana kondima Nzambe mpe bonene na Nzambe. Emonani été mama malamu alembaka te.


Kobondisa ya kimia ya Nzambe

Bolingo ya mama, motema mawa na ye, koyika piko na yempe motema molai na ye izali kolakisa bolingo mpe kobondima na Nzambe. Azali na bolingo mpo na baye banso bazali kobongwana epai na ye. Azali kolendisa biso: “ Ezali ngai, ezali ngai nazali kobondisa bino ” (Isaya 51:12). Mozalisi mpe mokonzi ya mokili azali kondima na nzila ya mosakoli na ye mpe na bato na ye, ata tango bakangamaki, azalaki pene kobondisa bango mpe kosunga bango, bobele été babongwana epai na ye mpe bamikitisa na mobeko na ye. Oyo na nguya nyoso asepeli kosunga mpe kolendisa. Mpo na yango, soki ozali na makambo, kobomba yango mpo na yo moko te, kasi yeisa yango epai na Nkolo mpe okomona été akoki kosala makambo ya minene soki opesi elikia na ye.

Mozalisi akela biso mpe apesa biso bomoi, nguya, mayele, boyebi, nzotu mpe molimo. Tozali mabanga oyo ezangi bomoi te, too mpe matiti oyo eyokaka te, kasi bato ya bosomi na motema, mayele mpe bwanya. Nzambe oyo ayabaka nyoso ayebi makoki na biso mpe bolembu na biso. Ayebi makambo makoyela biso mpe alingi été tosala misala oyo alengela mpo na biso. (Ba Efese 2:10). Azali na mwango malamu mpo na yo. Azali kobatela yo, ata koleka baboti na yo. Alingi tango nyoso bolamu na yo.

Akotika yo moko kati na kobanga te, komitungisa mpe kozanga kososolo, kasi akobatela yo mpe akolakisa yo kobandela: “Pesa biso lelo bilei ya mokolo na mokolo” (Matai 6:11). Kobosana te été afungoli ekuke ya matea liboso na yo. Ayebi liboso nani akozala moninga malamu mpo na yo. Azali kokeba na yo mpe kobatela yo na lokuta mpe mayele mabe ya satana. Zala na mayele mpe omipesa na Nzambe Tata mpo été atambwisa yo malamu.

Kobeba ya mokili ezali kosenga esambiseli ya Nzambe. Nzambe mosantu akolinga kobeba na biso te, kasi atinda mwana na Malia mpo na kozongisa biso na bondeko na ye. Azali kobianga moto na moto kobongola motema mpe koya epai na ye na nzela ya kondima lisiko na Yesu mpo na masumu ya bato.

“Mpo été Nzambe alingaki mokili na motindo boye été apesi mwana na likinda na ye été moto na moto oyo akondima ya abebisama te kasi été azala na bomoi ya seko.” (Yoane 3:15-16)

Lokola mama azali kosukola mwana mbala na mbalana mokolo moko, ezali mpe bongo mpo na Nzambe Mosantu alingi apetola bino, abulisa bino mpe abongisa bino. Nzambe na mawa mpe na ngolu asepeli asunga yo, ata na tango ya kaka. Azali pene kolimbisa bino masumu na bino, soki boye na yango epai na ye. Azali pene kolimbisa masumu na bino, ata oyo ebombama, soki oyei na yango epai na ye.Alingi yo, mpe alingi kosolola na yo bino mibale mpe azali kozila obelema na ye. Tango nini okopesa ye matondi mpo na bolingo na ye, koyeisa epai na ye makambo na yo oyo ebombama mpe koyekola kotambola kati na kotosa ye mpe kosala mokano na ye ? Akoyamba yo maboko polele.

Mwango ya oyo Aleki Likolo ekei mosika. Alingi kozwa yo mpe akomisa yo moko na bana na yo. Alingi atondisa yo na Molimo na ye mpo été okoma mwana na ye ya mobali too ya mwasi ya molimo. Bolingo ya Nzambe eleki mayele na biso. Alingi apesa bomoi ya seko na nzoto ya kokufa. Yaka epai na ye, luka ye mpe okozwa mpo été alaki yango.: “Bokoluka ngai, mpe bokozwa ngai, soki bokoluka ngai mitema na bino mobimba” (Yilimia 29:13)


Kobondima na Yesu

“Esengo na basokemi na molimo, mpo été bakobondisama!” (Matai : 5:4) Yesu ayei kati na mokili oyo ya pasi elongo na bolingo ya bo Nzambe, atondi na mawa .Ayokaki mawa na bato balembi, bazali koyengayenga lokola ba mpate oyo bazangi mokengeli. (Matai 9:36). Abenga bayekoli na ye balanda ye sanga na kozwa bango lokola bato na mosala na ye. Azalaki ndakisa mpo na bango mpe akambi bango na pete. Tango Yoane mpe ndeko na ye balingaki kobondela mpo été moto euta likolo ezikisa baye baboyaki koyamba bango, Yesu apameli bango mpe alobi,: “Boyebi molimo nini azali kosala kati na bino te.” (Luka 9:55)

Tango Petelo awanganaki Nkolo na ye, ata eyebisamaki kiboso, alelaki na bololo na motema. Sima ya lisekwa na Nkolo, Mwana na Malia akendaka kokutana na ye, alimbisa ye mpe abondisa ye abianga ye été basala elongo.

Tango Yuda mokabi na Nkolo ateki yee na bayini na ye na lipwepwa, Lorsque Juda le traître livra son Maître à ses ennemis par un baiser, Yesu alakeli ye mabe te mpe apameli ye te, kasi atuni ye: “Moninga na ngai oyei kosala nini? Na kopwepwa nde akabi mwana na moto?” (Luka 22:48; Matai 26:50)

Yesu azali bolingo na Nzambe. Azalaki na boboto lokola Tata na ye oyo azali na likolo (Luka 6:36). Bikamwa na ye ya kobokisa bato ezalaki elembo ya mawa na ye mpo na babola mpe babeli. Tango amoni mwasi mokufeli mobali azali kokenda kokunda mwana na ye moko, atemisi bango asekwisi mwana na ye mpe apesi ye na mama na ye.

Tango bato na mbala nzomi oyo bazalaki na ngonga ya kobelema na bato oyo bazalaki nzoto malamu te, bayoki été Yesu akoleka wana, babiangi ye mpe batuni ye abikisa bango. Abengana bango te, kasi abikisa bango na bokonzi ya liloba na ye. Tango akutana na moto ya milimo mabe, milimo mabe kati na yhe mibandi koganga na komilela. Akimaki libiso na bango te, kasi akangolaki moto ya milimo mabe na liloba na ye ya nguya.

Yesu apekisa mopepe mpo na kopekisa mpo été bayekoli bazinda te. Alelisa bato 5'000 oyo bazalaki na nzala bobele na mapa mitano mpe mbisi mibale. Alimbisa masumu ya mokakatali oyo bakitisaka ya na moto ya ndako. Apamoli bana mpe alendisi ndeko ya Lazalo: “Nalobeli yo te te été soki ondimi , okomona kembo na Nzambe?” (Yoane 11:40)

Yesu alingaki banto nyoso, ata baye bayinaki ye. Ayebaki masumu ya bato mpe ayebaki été bazalaki na makoki ya komibikisa bango moko te. Amemi likolo na ye masumu ya bato mpe azwi esika na bango, lokola Mosakoli Yisaya alobaka: “Na bongo, minyoko na biso amemi yango, mpe akumbi pasi na biso; mpe tokanisi été bapesi ye etumbu, Nzambe abeti ye, asambwi. Kasi azokisami mpo na masumu na biso, anyokolami mpo na masumu na biso; etumbu oyo epesi biso kimia ekwei likolo na ye,mpe na mapipi na yen de biso tobikisami. Tozalaki kotelengana lokola bampate, moto na moto kolanda nzila na ye; mpe Nzambe ekweisi likolo na ye mabe na biso nyoso.” (Yisaya 53:4-6)

Mwana na Mlia asilisa lisiko ya bato nyoso mpe atemisi sembo oyo endimami na miso ya Nzambe. Alongisi biso, na nzila ya liwa na ye, kozwa Molimo ya kobondisa ya Nzambe.


Koya na Molimo Mosantu likolo na bayekoli na Yesu

Ye oyo akofungola motema na ye na bolingo na Nzambe mpe na mawa na Yesu mpe andimi lisiko na ye, akozwa Molimo na Nzambe ya kobondisa, oyo ezali mpe Molimo ya bosembo. Yesu alakaki na bayekoli na ye liboso ya liwa na ye: “nakobondela Tata, mpe akopesa bino mosungi mosusu, mpo été afanda libela na bino, Molimo ya bosembo, oyo mokili akoki koyamba yango te, mpo été azali komona yango te mpe ayebi yango te, kasi bino, boyebi yango, mpo été azali koumela na bino ” (Yoane 14:16-26; 15:26-27; 16:7-14). Molimo ya kobondisa ezali elaka monene ya Tata. Apesami, na kombo na Yesu, epai na ye oyo akotuna (Luka 11:13).

Molimo azali komonisa biso makambo likolo na Nzambe, Tata na biso na molimo, likolo na biso moko mpe likolo na mikolo mizali koya. Azali kofungola miso na biso ya motema koyeba bosolo ya molimo, kolendisa kondima na biso mpe kopesa biso elikia ya libela. Azali mosambeli na biso mokolo ya esambiseli mpe mobondisi na biso tango tondimisami na makanisi na biso.

Molimo ya sembo azali kokamba biso tango nyoso ya bomoi na biso, lokola toma Polo azali koloba: “mpo été baye banso bakambami na Molimo na Nzambe bazali bana na Nzambe.” (Baloma 8:14)

Molimo xana ya kobondisa azali kosunga biso na tango ya mabe, ya kaka mpe ya kokweya. Azali kopesa biso elikia mpe kimia, azali kobatela biso na mabe mpe kokangola biso na motambo ya liwa. Molimo yango ezali kopusa biso kobika bomoi ya mayele mpe kolonga masumu soki tobwaki yango mpe toyini yango. Molimo na Nzambe azali Mosantu. Alingi kobulisa biso, kondimisa biso koyambola masumu epai ya Nzambe mpe komema biso na bosembo na ye, na bopeto na ye mpe kozongisa na bondeko.

Mobondisi na molimo amikumisaka te kasi akumisaka Mwana ya Malia, mosikoli na biso, mpe azali kosunga biso kososolo bilembo ya bolingo na ye. Molimo ya Nzambe, oyo ezali bomoi ya seko kati na ye, mpe nguya ikozanga kosala mokolo moko te. Azali kobondisa biso, kolonga na liwa na bomoi na biso mpe azali kati na biso mpo na libela.

Molimo wana ya kobondisa ezali kati na bayekoli na Yesu mpo été bandimeli Yesu mpe lisiko na ye. Molimo yango ezali kobongola bizaleli na bango mpo été bolingo, bolamu mpe kosala malamu ya Nzambe ezali komona kati na bango. Mobondisi wana azali kosunga biso kopanza liloba na Nzambe mpe kosalela bato na mawa. Azali kotondisa biso na Nzembo mpe masanjoli mpe boyebi. Mobondisi ya mawa alingi azalisa biso babondisi, lokola toma Polo alobi: “Nzambe apambolama, Tata na Nkolo na biso Yesu Klisto, Tata ya bato ya mawa mpe Nzambe ya kobondisama nyoso, oyo azali kobondisa biso kati na bakaka nyoso, mpo été, nakobondisama na biso kouta na Nzambe, tokoki kobondisa baye bazwami na mikakatano” (2 Bakoliti 1:3-4) Molimo na Nzambe ebongolaka na mbala moko te makambo ya bomoi ya moto, kasi azali kobongola biso liboso na nzila ya siko na Klisto. Motema na biso ezali likolo kozila Mobikisi na biso mpo été alingi biso banda ebandeli. Azali kopesa biso nguya ya ngolu na ye na nzila ya makomi ya Sango Malamu. Ye nani akotanga maloba ya Klisto, azali kobatela yango mpe azali kosala lokola elobi, akopambolama kati na yango mpe akozala na esengo.

Osili kobikela kobondisama ya Nzambe? Soki olingi koyeba lisusu mingi likolo bosolo ya Molimo ya kobondisama, tokotindela yo pamba Sango Malamu na Yesu elongo na mikanda ya koyekola mpe ya mabondeli mpo esunga yo kozwa kimia elongo na Nzambe na kati ya molili.

Bobondisa baye bazali kozinga bino: soki mwa mokanda oyo epesi yo elikia ya sika, pesa yango epai ya baye bazali koluka kimia elongo na Nzambe, mpo été ango mpe bango mpe babondisama. Yebisa biso motuya ya mikanda oyo okanisi kokabola. Kobosana te kokoma polele esika ofandaka.

WATERS OF LIFE
P.O. BOX 60 05 13
70305 STUTTGART
GERMANY

Internet: www.waters-of-life.net
Internet: www.waters-of-life.org
e-mail: info@waters-of-life.net

www.Waters-of-Life.net

Page last modified on July 07, 2023, at 04:38 PM | powered by PmWiki (pmwiki-2.3.3)