Waters of LifeBiblical Studies in Multiple Languages |
|
|
Home Bible Treasures Afrikaans |
This page in: -- Afrikaans -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Azeri -- Bengali -- Bulgarian -- Cebuano -- Chinese -- English -- Ewe -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hebrew -- Hindi -- Igbo -- [Indonesian.BkNt06RoCh009 | Indonesian]] -- Javanese -- Kiswahili -- LINGALA -- Malayalam -- Polish -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Turkish -- Ukrainian -- Urdu? -- Yiddish -- Yoruba
Previous Lesson -- Next Lesson BALOMA - Mokonzi Azali Bosemnbo Na Biso
Boyekoli Ya Mokanda Ya Polo Epai Ya Baloma
Prologue: Mbote, Losambo Ya Merci Mpe “Boyembe Ya Nzambe” Lokola Slogan Ya Mokanda Oyo Epeli Baloma (Baloma 1:1-17)
c) Bosembo Ya Bonzambe Ebongwanaka Te Mpe Ekokisami Kati Na Biso Ntango Nyonso Oyo Kondima Etikali Kati Na Biso (Baloma 1:16-17)BALOMA 1:17 Bosembo ya Nzambe ezali likambo moko ya mindɔndɔmindɔndɔ ya teoloji. Yango emonisi ete boklisto ezali lingomba ya likolólikoló te. Toyebi ete bosantu ya bonzambe ezali kokweisa mosumuki, mpe ete lifuti ya masumu ezali liwa, mpe ete moto moko te azali moyengebene liboso ya Nzambe. Ezali mawa komona ete bana nyonso ya Adama babongi na liwa. Nzambe azali kaka Nzambe mosantu te mpe mosambisi ya bosembo, kasi azali mpe Tata ya mawa, ya bokabi, ya bolingo, mpe ya motema molai mingi epai ya bato ya masumu. Mokano na ye ezali ete basumuki bazala na bomoi mpe bakufa te. Yango wana Nzambe, na ntina ya bosantu mpe bosolo na ye, akoki te kolimbisa moto nyonso oyo alingi mpe ntango nyonso oyo alingi, atako azali na mposa ya kolimbisa na bonsomi nyonso epai ya bato nyonso, mpo ezali bosantu ya bonzambe nde elimboli ntina na ye. Mpe eyano ya likambo oyo ezali mbeka oyo epesami pona lisumu ya bomoto. Kopesa mbeka ya banyama ezali eloko oyo ekoki kozwa esika na yango; yango epesami na esika ya mosumuki. Mpe lokola ezali na mbeka ya nyama to ya moto te oyo ekoki kokokisa masengi ya bosembo ya bonzambe, Mwana ya Nzambe ya seko azwaki nzoto ya mosuni na ntango etiamaki mpo na kokufa na ekulusu mpo na masumu na biso mpe kokokisa masengi ya bosembo ya bonzambe mpo na biso. Na nzela ya liwa na ye na ekulusu, amikabi masumu na biso mpe alongisaki biso liboso ya Nzambe. Bolongi na biso ezali te motó ya likambo ya Mokanda epai ya Baloma; motó ya likambo ya mokanda yango ezali bosembo oyo euti na Nzambe. Ndenge nini Nzambe mosantu oyo eleki monene akoki kotikala sembo atako tozali kolongisama, biso basumuki? Yesu Klisto azali eyano kaka moko na motuna oyo. Mpe soki baoyo bazali kotosa Mibeko ya Mose bazali kofinga ekulusu, kolobaka ete, “Soki mosumuki nyonso akoki kolongisama na nzela ya kondima na liwa ya bomikabi ya Yesu Klisto, boye eloko moko te ekoki kopekisa biso kosala masumu mosusu, soki kaka ngolu ya moto oyo babakamaki na ekulusu ezali kolongisa biso na ndenge ya automatique,” eyano ya Ntoma na Bapakano ezali polele: Kondima ya boklisto ezali bobele kondima te; ezali boyokani na Nkolo Yesu, po nguya na ye esala na botau na biso ya bomoto. Azali kobimisa kati na biso mbuma ya Molimo na ye. Kolanda Yesu ezali lokola monyololo, monyololo ya bondimi, oyo bokangami na yango ezali bomekoli ya bondimi—kondima etondi na botondi mpe bolingo mpo na Yesu, oyo azali kolongisa, kosantisaka, mpe kokoka biso. Tokoki te kozwa lobiko na nzela ya misala na biso ya malamu, kasi tomifungoli mobimba na ngolu. Mosumuki oyo alongisami akozala na bomoi kaka na kondima, akokola na kondima, mpe oyo amimonaka te lokola moyengebene liboso ya Nzambe mpo na makoki na ye moko. Mpo kaka Yesu nde alongisaka mosumuki, abatelaka ye, mpe azali kosantisa ye mokemoke na nzela ya misala ya Molimo na ye. Mpe boye emonani ete bobele Nzambe ya bosembo nde alimbisaka masumu na biso mokolo na mokolo mpe asantisaka biso. Tozali ya ye mpe tozali kobika mpo na nkembo na ye. Motuna ya bosembo oyo euti na Nzambe ezalaki kotungisa bato ya Bayuda. Baboyaki ngolu na kotiaka ntembe na bosembo ya bonzambe oyo emonisami na Nsango Elamu. Mingi kati na bango bandimaki ete Yesu asengeli kobaka ye na ekulusu, mpe bongo bazangaki ntina ya lisolo na bango ya lobiko. Batelemeli Molimo Mosantu na koboya koyoka mongongo ya Molimo ya Nzambe, oyo elendisaki bango na boyamboli mpe bondimi. Na nse ya kilo ya bosolo oyo ya mawa, Polo mpe bantoma mosusu bamitunaki: "Ndenge nini Nzambe akoki kotikala sembo, lokola aponaki bakitani ya Abalayama mpe asalaki kondimana na bango? Nzokande lelo tozali komona Nzambe koyeisa mitema na bango makasi mpe koboya bango mpo ete baboyi kofungola mitema na bango epai ya Molimo na ye. Nzambe alongi te?" Paulo ayanoli na maloba oyo: “Mosika na yango!Alimboli eyano ya Biblia na Baloma 9-11 mpo na kolongisa Bayuda te kasi kaka mpo na komonisa bosembo ya Nzambe.Azalaki na molende mpo na bonzambe, bosantu mpe boyengebene ya Tata ya Nkolo na biso Yesu Klisto. Baoyo banso bazwi bondimi ya solo mpe bamipesi na bokambi ya Molimo Mosantu babongwanaka na bozongisi sika ya makanisi na bango mpe bakoki kozala na bomoi ya bosantu elongo na bato banso balongisami ya kondimana ya sika. Bomoi ya boklisto ezali kaka te mpo na mateya ya bato to ya kobanga Nzambe, kasi eleki yango mpo na kobenda bolingo ya Nzambe mpe nguya ya lobiko na ye ya mokili mobimba epai ya baoyo nyonso bandimaka Mwana ya Nzambe ya seko. Bizaleli ya boklisto esantisaka nkombo ya Tata mpe emonisaka boyengebene na ye. Emoniseli ya bosembo ya Nzambe ezali motó ya likambo ya Mokanda epai ya Baloma. LOSAMBO: O Nzambe ya seko, Tata, Mwana, mpe Molimo Mosantu na biso! To kumambeli yo, mpo obendaka biso Na kondima na biso ya solo, olongi biso na bonsomi, osantisaka biso mokolo na mokolo, mpe okambaka biso na banzela ya bosembo. Bozali sembo mpe bokotikala ntango nyonso bosembo, ata soki biso banso tososoli te ba mouvements ya ba peuples na histoire ya mokili mobimba. Bulisa biso mobimba mpe longola batikali ya masumu na misala mpe maloba na biso, mpo ete tokoka kozala masanzoli, nsolo kitoko kati na bato banso. MOTUNA:
|