Waters of LifeBiblical Studies in Multiple Languages |
|
|
Home Bible Treasures Afrikaans |
This page in: -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Bengali -- Burmese -- Cebuano -- Chinese -- Dioula? -- English -- Ewe -- Farsi? -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Javanese -- Kiswahili -- Kyrgyz -- LINGALA - Malayalam -- Peul -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Thai -- Turkish -- Twi -- Urdu -- Uyghur? -- Uzbek -- Vietnamese -- Wolof -- Yiddish -- Yoruba
Previous Lesson -- Next Lesson YOANE - Pole Epeli Kati Na Molili
Koyekola Sango Malamu Na Yesu Oyo Yoane Akomi
ETENI YA 2 - Pole Engengi Kati Na Molili (Yoane 5:1 - 11:54)
C - Mobembo Ya Suka Ya Yesu Na Jerusalem (Yoane 7:1 - 11:54) Kokabola Molili Na Pole
1. Maloba ya Yesu na Elambo ya Bahema (Yoane 7:1 – 8:59)
b) Makanisi ndenge na ndenge na ntina ya Yesu na kati ya bato mpe na Likita oyo eleki monene (Yoane 7:14-53)YOANE 7:14-18 Yesu azalaki kobanga liwa te to minyoko ya banguna na ye te. Akobaki na mayele nyonso na nzela na ye na Yelusaleme na boyokani na mokano ya Tata na ye. Kuna amibombaki te, kasi akendaki na tempelo mpo na koteya Nsango Malamu na ye na mpiko, lokola molakisi oyo andimami. Bato bazalaki komona ete Nzambe azali koloba na bango mbala moko. Yango wana bamitunaki: wapi elenge mobali oyo azwaki makanisi ya mozindo boye ya ? Azwaki formasyo te na nganga-mayele moko ya Makomami oyo ayebani mingi. Ndenge nini mosali ya mabaya oyo azwi boyekoli te akoki koteya biso solo ya Nzambe? Yesu ayanolaki lokola nde alobi: “Ya solo, nazali na mateya mpe nazali molakisi ya solo. Kutu koleka, nazali Liloba ya Nzambe. Makanisi mpe mposa nyonso ya Nzambe ezali kati na ngai. Mateya na ngai ezali ya ngai te, nazali mongongo ya Nzambe oyo afandi kati na ngai, Tata na ngai nde azali koteya ngai. Nayebi malamu mpenza makanisi na ye, miango na ye, mikano na ye mpe nguya na ye. Nayaki na makanisi na ngai moko te, mpo kaka makanisi ya Nzambe nde ezali solo. Nasilisaka emoniseli esika ezali polele te." Apesaki Tata na ye nkembo mpe atosaki ye, amimonisaki lokola ntoma ya Nzambe. Awutaki ye moko te, kasi ayaki na nkombo ya Tata na ye na nse ya bokonzi ya Nzambe. Yesu azali Mwana mpe Ntoma ya Nzambe na ntango moko; Abongi likebi na biso, kondima na biso mpe losambo na biso lokola Tata. Mpo na kopesa ye kondima na pɛtɛɛ nyonso, apesaki likanisi ya lolenge moko ya malamu mpo Bayuda bámonisa bango ete mateya na ye eyokani na mokano ya Nzambe. Bongo nini ezali elembeteli ya makasi oyo ezali kondimisa liteya mpe bomoto ya Yesu? Alobaki boye: “Bómeka kosala engebene Nsango Malamu na ngai mpe bokomona bonene na yango. Salelá maloba ya Klisto molongo na molongo mpe okomona ete maloba na ye ezali kaka ya bato te kasi ya bonzambe. Komeka kosalela mateya ya Klisto esɛngaka liboso ekateli na yo. Ozali na mposa ya oyo azalaki na mposa na yango? Soki boyokani te kati na bolingi na bino mpe bolingi na Ye, bokosimba boyebi ya solo ya Nkolo te. Ntango mokano na yo ekomikitisa na mokano ya Klisto, okoyeba ntango nyonso Nzambe malamu koleka lokola Ye azali. Oyo azali komiteya mpo na kosala mokano ya Tata, lokola Yesu ateyaki biso, akoyeba bokeseni monene kati na Nsango Malamu mpe Mibeko. Nkolo apesaka biso makasi ya komema mokumba oyo apesi biso. Tokokoka kosala mokano na ye na esengo. Ye oyo amikitisi na etinda ya Klisto azuaka makasi ya kozala na bomoi na bolingo na ye. Mateya na ye ememaka te na kozanga kokoka, lokola ezalaki na mobeko ya Moize, kasi na bomoi na botondi ya ngolu ya Nzambe. Moto nyonso oyo azali na mposa ya kotosa mokano ya Nzambe oyo emonisami na nzela ya mateya ya Klisto, amisangani ye moko na Nzambe mpe akososola ete Klisto azali moteyi mpamba te, kasi azali Liloba ya Nzambe oyo akómaki moto. Amemi filozofi ya mpamba te, kasi apesi bolimbisi ya masumu mpe apesi biso nguya ya bomoi ya Nzambe. YOANE 7:19-20 Etamboli mosantu ya Klisto epesi ye ndingisa ya koloba na Bayuda ete: “Bozwi mobeko, kasi moto moko te azali kosalela yango malamu!” Liloba yango eningisaki ekólo ya Bayuda, mpamba te yango emonisaki ete mondimi moko te ya Kondimana ya Kala akokisaki ata mokolo moko te masengami ya Mibeko. Moto nyonso oyo abuki mobeko moko, azali na ngambo na makambo nyonso. Nkanda ya Nzambe etikali likolo na ye. Na yango, Yesu alongolaki makambo oyo Bayuda bazalaki koloba ete bazali na boyengebene mpe amonisaki ete molende mpe milende ya bato oyo batalelaka mibeko ezalaki kaka kokufa miso. Ayebisaki bango ete ayebi ete bakambi balingi koboma ye. Sekele ezalaki te epai na ye. Akebisaki bayoki na ye na molende ya likolólikoló mpe ayebisaki motuya oyo esengeli kofutama mpo na kolanda yango. Nzokande, atunaki ete: “Mpo na nini olingi koboma ngai?” Ebele ya bato bakamwaki na maloba ya Klisto mpe babangaki ntango bayokaki ete moko te kati na bango azali moyengebene. Eyano na bango ebombaki mwango na bango: “Te, te, nani akolinga koboma yo? Nzambe apekisi koboma bato!” Basusu kutu bakanisaki ete elimo moko ya mabe ekɔti na ye. Koyina na bango ekangaki bango miso mpe esalaki ete bákoka te kokesenisa Molimo Mosantu na molimo mabe. Babungisaki mayoki nyonso mpo na koyeba bolingo ya Nzambe. MOTUNA:
|