Home
Links
Bible Versions
Contact
About us
Impressum
Site Map


WoL AUDIO
WoL CHILDREN


Bible Treasures
Doctrines of Bible
Key Bible Verses


Afrikaans
አማርኛ
عربي
Azərbaycanca
Bahasa Indones.
Basa Jawa
Basa Sunda
Baoulé
বাংলা
Български
Cebuano
Dagbani
Dan
Dioula
Deutsch
Ελληνικά
English
Ewe
Español
فارسی
Français
Gjuha shqipe
հայերեն
한국어
Hausa/هَوُسَا
עברית
हिन्दी
Igbo
ქართული
Kirundi
Kiswahili
Кыргызча
Lingála
മലയാളം
Mëranaw
မြန်မာဘာသာ
नेपाली
日本語
O‘zbek
Peul
Polski
Português
Русский
Srpski/Српски
Soomaaliga
தமிழ்
తెలుగు
ไทย
Tiếng Việt
Türkçe
Twi
Українська
اردو
Uyghur/ئۇيغۇرچه
Wolof
ייִדיש
Yorùbá
中文


ગુજરાતી
Latina
Magyar
Norsk

Home -- Lingala -- Romans - 074 (Christ Overcame all the Differences)
This page in: -- Afrikaans -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Azeri -- Bengali -- Bulgarian -- Cebuano -- Chinese -- English -- Ewe -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hebrew -- Hindi -- Igbo -- [Indonesian.BkNt06RoCh074 | Indonesian]] -- Javanese -- Kiswahili -- LINGALA -- Malayalam -- Polish -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish? -- Tamil -- Telugu -- Turkish -- Ukrainian -- Urdu? -- Yiddish -- Yoruba

Previous Lesson -- Next Lesson

BALOMA - Mokonzi Azali Bosemnbo Na Biso
Boyekoli Ya Mokanda Ya Polo Epai Ya Baloma
ETENI YA 3 - Bosembo Ya Nzambe Emonani Na Bomoi Ya Ba Ndimi Na Klisto (Baloma 12:1 - 15:13)

11. Klisto Alongi Bokeseni Nyonso Kati Ya Bandimi, Ezala Bayuda Pe Bapakano (Baloma 15:6-13)


BALOMA 15:6-13
6 mpo bino nyonso, na mongongo moko, bókumisa Nzambe mpe Tata ya Nkolo na biso Yesu Klisto. 7 Yango wana, bóyambana lokola Klisto ayambaki bino, mpo na nkembo ya Nzambe. 8 Mpo nazali koyebisa bino ete Klisto akómaki mosaleli ya bakatami ngenga mpo na komonisa bosembo ya Nzambe, mpo na kondimisa bilaka oyo apesaki batata. 9 Mpe Bapakano bakumisaka Nzambe mpo na motema mawa na ye, lokola ekomami ete: “Yango wana nakosanzola yo na kati ya bapakano, nakoyemba masanzoli mpo na nkombo na yo.” 10 Balobaka mpe ete: “Bósepela elongo na bato na ye, bino bikólo mosusu!” 11 Mpe lisusu: “Bósanzola Nkolo, bino bapakano nyonso, bókumisa ye, bino bikólo nyonso!” 12 Yisaya alobi mpe ete: “Lisambo ekouta na Yese, oyo akotɛlɛma mpo na koyangela bikólo, bikólo bakotya elikya na bango epai na ye.” 13 Tiká ete Nzambe ya elikya atondisa bino na esengo mpe na kimya nyonso wana bozali kotyela ye motema, mpo na nguya ya Molimo Mosantu bózala na elikya mingi.

Moto nyonso oyo akotánga mokapo 9 tii 15 ya mokanda oyo batindelaki Baloma akoyeba ete kofanda elongo kati na baklisto Bayuda mpe Bapakano ebimisaki matata oyo ezangi ntina. Likambo ya ntina mingi na matata yango ezalaki kokatama ngenga mpe kolya engebene Mibeko ya Moize, bakisa mpe bilembo ya Bayuda mpe ya baklisto. Mokano ya Paulo, na nzela ya maloba na ye epai ya Baloma, ezalaki bomoko ya bandimi kati na Bayuda mpe bapakano. Alingaki kotonga pont na kati ya bokabwani kati na bango, mpo ete Klisto asangisaki bango elongo na ye moko. Yango wana akomaki na nsuka ya mokanda na ye ete: “Bóndima moko na mosusu, na bokeseni kati na ebandeli na bino mpe na bonkɔ́kɔ na bino, lokola Klisto Yesu andimaki mpe abikisaki bino.Baoyo bakososola libombami ya lobiko oyo bakokumisa Tata mpe Mwana mpe Molimo Mosantu elongo na basusu, kozanga bokeseni, bokabwani, to koyina.”

Bolingo esengaka bomoko ya bandimi banso, ata soki bazali na bokeseni. Mpe bolingo ya Klisto ezali makasi koleka bokeseni. Paulo alimbolaki etinda yango epai ya bandimi oyo bautá na Bayuda, ayebisaki bango ete Masiya oyo akoya akómaki mosaleli ya Bayuda mpo na komonisa bosembo mpe solo ya Nzambe mpe kokokisa bilaka na ye na maloba mpe misala na ye. Na yango, Klisto akokisaki ebele ya bilaka oyo bapesaki na ntina na ye epai na bakristo ya liboso, komonisáká ete solo ekobebisama te.

Ntoma alimbolaki na bandimi ya bapakano ete babongi kokumisa Nzambe mpo ete ayokelaki bango mawa, ayokanisaki bango na Ye moko, azwaki bango lokola mwana na ye, mpe azongisaki bango sika. Mpo na bato oyo bazali Bayuda te kosanzola Tata mpe Mwana ezali elembeteli ya boponi na bango kati na Klisto mpe kokokisama ya bilaka ya Boyokani ya Kala, mpo ete Klisto azali mpe mwinda ya bikolo. Bakristo ya bapakano bazali na lotomo ya kosangana na esengo ya Nzambe mpo ete Klisto alobaki ete alingi kokokisa esengo na ye kati na bango (Yoane 15:11; 17:13). Kasi bandimi ya bikólo mosusu basengeli kobosana te baoyo bautá na Bayuda; kasi, basengeli kokumisa Tata mpe Mwana na mongongo moko, uta na mozindo ya mitema na bango (Deteronome 32:43).

Bilaka biye, lokola bikomami na Boyokani ya Kala, etali kaka te bato moke ya bato ya lokumu oyo bawutaki na continent nionso, kasi nde etali bikolo nyonso, oyo esengelaki kokumisa Tata na kati ya Nkolo Yesu (Nzembo 117:1). Mpe na bilaka oyo ya motuya, tozali kokuta bokonzi ya molimo mpe lobiko monene mpo na bato banso. Oyo andimi Klisto akosangana na ngolu na ye mingi.

Yisaya asilaki kosakola, kolobaka ete, “Lisambo moko ekobima uta na Yese... Na mokolo wana litimbo ya Yese ekotelema lokola bendele mpo na mabota, bikolo bakosangana epai na ye mpe bakotia elikya na bango epai na ye.” Esakweli oyo ekokisamaki na Yesu, mpo ete afandaki na lobɔkɔ ya mobali ya Tata, mpe bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele epesamaki epai na ye. Apesaki mitindo na bantoma na ye ete bákende na mokili mobimba mpe bákómisa bato ya bikólo nyonso bayekoli, mpo bákambama mpe bátonda na Molimo na ye, mpe bokonzi ya Nzambe ekóma makasi kati na bango.

Ntina ya Ntoma na losambo ya bapakano ezali ya koyeisa molai elikia oyo bomoko ya bandimi ewutaka. Apostolo asengaki Nzambe ete ngambo mibale etondisama na esengo ya lola mpe kimia ya Mokonzi ya Kimya mpo ete bondimi ya solo ekoka kofandisama na bomoko ya Bosato Bosantu, na mokano ete bato banso bakoka kozala na bomengo na elikia mpe nguya ya Molimo Mosantu.

LOSAMBO: Tata na lola, tosengi yo na nzela ya Mwana na yo Yesu okamba bandimi ya ebandeli ya Bayuda mpo na kotyola bandimi ya ebandeli ya bapakano te, kasi nde ete bandimi banso bakoka koyeba ete bakomi bomoko oyo ekoki kokabolama te na nzela ya lisiko ya Yesu Klisto. Pesá bango banso kotikala kati na Klisto mpe bomoko na kondima mpo ete bakoka kotikala na bomoko na nguya ya Molimo Mosantu. Amen.

MOTUNA:

  1. Ndenge nini Polo azalaki na elikya ya kolonga bokeseni ya moboko na kati ya lingomba ya Loma?

www.Waters-of-Life.net

Page last modified on October 30, 2026, at 04:48 AM | powered by PmWiki (pmwiki-2.3.3)