Waters of LifeBiblical Studies in Multiple Languages |
|
|
Home Bible Treasures Afrikaans |
This page in: -- Afrikaans -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Azeri -- Bengali -- Bulgarian -- Cebuano -- Chinese -- English -- Ewe -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hebrew -- Hindi -- Igbo -- [Indonesian.BkNt06RoCh073 | Indonesian]] -- Javanese -- Kiswahili -- LINGALA -- Malayalam -- Polish -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish? -- Tamil -- Telugu -- Turkish -- Ukrainian -- Urdu? -- Yiddish -- Yoruba
Previous Lesson -- Next Lesson BALOMA - Mokonzi Azali Bosemnbo Na Biso
Boyekoli Ya Mokanda Ya Polo Epai Ya Baloma
ETENI YA 3 - Bosembo Ya Nzambe Emonani Na Bomoi Ya Ba Ndimi Na Klisto (Baloma 12:1 - 15:13)
10. Ndenge Nini Baoyo Bazali Na Kondima Makasi Basengeli Kosala Nini Soki Bakutani Na Mikakatano Ya Nokinoki? (Baloma 15:1-5)BALOMA 15:1-5 Polo ayebaki malamu bonkɔkɔ oyo ekɔtaki na misisa makasi na ntina na bilei mpe masanga, mpe akutanaki na baoyo bazalaki makasi na kondima mpe baoyo bazalaki na nse ya mibeko te. Amitalelaki lokola kati na bato ya nsuka, kasi mbala moko atyaki ndelo na bonsomi na ye moko, kolobaka ete bato oyo bakɔmeli basengeli kondima bolɛmbu ya bato ya sika oyo babongwanaki ntango nyonso oyo bandimi Klisto. Ezali te mpo na moto na moto kozala na bomoi engebene na caprices na ye, kasi engebene na oyo etongaka ba débutants oyo ba critiquer mpe bazangi assurance na makambo nionso. Kotonga bondimi ya basusu ezali na ntina mingi koleka kozala na bomoi engebene na ba caprices mpe bamposa na biso moko. Etinda oyo ezali kobuka moimi na kati ya lingomba uta na ngambo nyonso. Tobongisi bomoi na biso te, mosala na biso, mpe mabaku na biso engebene na bandoto na biso, kasi nde, tosalelaka Yesu mpe baye bazali na botau na bondimi, mpo ete katikati ya bozali na biso ezali ego te, kasi Yesu mpe lingomba na ye. Yesu azalaki na bomoi mpo na ye moko te, kasi amilongolaki na nkembo na ye mpe akómaki moto. Ayikaki mpiko na bifundeli, kofinga, mpe bampasi mpo na kobikisa mokili. Nsukansuka, akufaki mpo na moto nyonso, atyolamaki lokola mosali mabe, mpo na kobikisa ata bato mabe mpe kotonga kondima epai na bango. Yesu azalaki na bomoi ya komikitisa, ya boboto mpe ya motema molai mingi, ndenge Biblia elobeli yango. Azwaki bokambi mpe makasi mpo na mosala na ye uta na mikanda ya Kondimana ya Kala. Moto nyonso oyo alingi kosala na lingomba, to kati na baoyo baboyaka Klisto, asengeli kozala na moboko na Liloba ya Nzambe; soki te, babungisaka makasi mpe esengo ya kolanda mosala na bango ya kosakola. Polo alobelaki na mokuse bolukiluki na ye na mikanda milai wana, koyebisa bato ete Nzambe azali Nzambe ya motema molai mpe ya kobɔndisa (Baloma 15:5). Mozalisi ye moko asengeli kozala na motema molai mingi mpo na koyika mpiko na bato ya moimi mpe ya motó makasi. Akobɔndisama bobele na mwana na ye Yesu, oyo asepeli na ye. Na bongo, Paulo akambaki bandimi na Loma na molimo ya motema molai mpe ya kobɔndisa, na tina ya kopesa lingomba bomoko oyo euti na bandimi bango moko te, kasi ewutaka na Klisto kaka, pamba te na nzela na ye kaka makanisi ya lingomba esangani. Elonga ezali te na kati ya lingomba, to bomoko moko te, longola se na nzela ya Klisto mbala moko. Na nsima, moto nyonso azali kosangana na masanzoli mpe azali kondimisama ete Mosambisi Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, azali Tata ya Nkolo na biso Yesu Klisto. Yesu azalaki kaka ye moko oyo ayokanisaki biso na Mosantu, na nzela ya bampasi mpe liwa na ye. Asikolaki biso na nzela ya lisekwa na ye uta na bakufi mpe komata na ye na lola, na nzela ya boyambi mpe kobotama lisusu na molimo, mpo ete tokoka kozala na esengo mpe kosanzola Tata ya Yesu Klisto, Tata na biso ya mawa. Lokola ye mpe Mwana na ye bazali bomoko ya molimo mobimba, ndenge moko mpe bandimi ya lingomba basengeli kosangana na Yesu na bomoko oyo ekoki kokabwana te. LOSAMBO: Tata ya Lola ya bolingo, totomboli yo mpo ete Nkolo na biso Yesu asakolaki biso botata na yo mpe ayokanisaki biso na yo na nzela ya mpasi mpe liwa na ye, kosangisaka biso na Molimo Mosantu na yo na bomoko ya bolingo na yo. Tika bolingo oyo emema bomoko ya molimo mobimba na mangomba na biso, atako bokeseni ya makanisi kati na bandimi. MOTUNA:
|