Waters of LifeBiblical Studies in Multiple Languages |
|
|
Home Bible Treasures Afrikaans |
This page in: -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Bengali -- Burmese -- Cebuano -- Chinese -- Dioula? -- English -- Ewe -- Farsi? -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Javanese -- Kiswahili -- Kyrgyz -- LINGALA - Malayalam -- Peul -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Thai -- Turkish -- Twi -- Urdu -- Uyghur? -- Uzbek -- Vietnamese -- Wolof -- Yiddish -- Yoruba
Previous Lesson -- Next Lesson YOANE - Pole Epeli Kati Na Molili
Koyekola Sango Malamu Na Yesu Oyo Yoane Akomi
ETENI YA 3 - Pole Epeli Kati Na Lisanga Ya Batoma (Yoane 11:55 - 17:26)
B - Makambo Oyo Elanda Elengi Ya Nkolo (Yoane 13:1-38)
4. Klisto asakoli bowangani ya Petelo (Yoane 13:36-38)YOANE 13:36-38 Petelo atungisamaki mpenza mpe ayokaki te makambo oyo Yesu azalaki koloba mpo na bolingo. Kasi, asosolaki ete Nkolo na bango azalaki kosundola bango na kati ya likama. Lokola atyelaki makasi na ye moko motema, alakaki Yesu na ye moko ete akolanda ye ata soki ekosɛnga mbongo nini. Ayebaki te bolɛmbu mpe ndelo na ye, mpe andimisamaki ete akokaki kokokisa elaka na ye ya kozanga kokanisa. Azikaki na molende mpo na Yesu mpe azalaki pene ya kobunda mpe kokufa mpo na ye.
1. Nzambe azali kati na Klisto (Yoane 14:1–11)YOANE 14:1-3 Bayekoli batungisamaki ntango bayokaki ete Yesu azali kotika bango mpe bakolanda ye te tii na esika oyo azali kokende. Yesu asakolaki mpe ete Petelo akowangana, atako Petelo autaki kolaka ete akolanda ye ata soki ezali nini mpe amikumisaki mpo na kondima na ye makasi. Ekoki kozala ete liyoki ya kosala libunga na kolanda Yesu ekatisaki makanisi ya bayekoli mosusu, mpamba te Yesu alingaki kokende mpe asakolaki kutu liwa na ye. Yesu atɛmɛlaki ezaleli na bango ya kozanga elikya mpe mawa na bango na etinda moko oyo endimisaki bango. Bomipesa na Nzambe sans hésitation, ye nde fondation solide na tango nionso, azali incoutenuble pendant que nionso mosusu eningani. Abikisaka biso na mitungisi na biso. Kobanga elimboli kozanga kondima. Tata na biso na Lola alɛmbisaka moto ata moke te to asundolaka moto moko te. Oyo ezali elonga oyo elongi mokili—kondima na bino. Na elikya mpe na libondeli, Yesu asɛngaki ete bayekoli na ye bázala na kondima ya ndenge wana mpo na Tata na ye. Azali moko na Tata. Lokola Tata azali kondimisa avenire na biso, ndenge moko mpe Mwana apesi endimiseli na ye. Na Mwana, Tata azalaki na mokili. Bolingo na ye ebongi kotyela biso motema. Confiance na ye ezali makasi lokola libanga. Na yango, alimbolaki ndambo na bayekoli na ye makambo oyo ekosalema nsima ya liwa na ye mpe komata na ye. Epayi ya Nzambe ezali na château moko monene pe kitoko koleka oyo ya ba riches ya mokili oyo. Ndako monene ya Nzambe ezali lokola engumba monene, monene mpo na koyamba basantu nyonso ya mokili mobimba mpe ya ntango nyonso. Ata soki ozali sikawa kofanda na hema to na ndako ya matiti, kozala na mawa te. Na ndako ya mokonzi ya Tata na yo ezali na bashambre ebele mpe bisika ya kofanda ya minene. Abongisaki ndako ya pɛto, ya molunge mpe ya mwinda malamu mpo na bino. Okozala na likoki ya kotikala penepene na ye libela. Nzambe alingaka bandimi na Klisto mpe abongisaki esika mpo na bango. Ntango Yesu azongaki na likoló, akambaki bandako minene yango mpe asilisaki kobongisama. Kasi azwaki mpe ekateli ya kozonga epai na biso; alingi kozala mosika na biso te. Azongi mpo na koyanganisa bayekoli na ye. Alingaka bango ndenge mobali alingaka mwasi na ye; Alingi kolakisa Eklezia na ye, Mwasi-libala, epai ya Tata na ye, kaka te mpo na kolakisa ye epai ya Tata na ye, kasi mpo na kozala eteni ya libota ya lola. Tokozala ntango nyonso elongo na ye, na nse ya libateli na ye, kosepela na bolamu na ye. YOANE 14:4-6 Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Boyebi esika nazali kokende mpe boyebi nzela oyo ememaka epai na Nzambe.” Thomas ayanolaki ete, "Ndenge nini tokoyeba lolenge oyo lokola toyebi te esika nini okokende kala mingi te?" Na mawa na ye, akokaki komona mokano ya mosika te. Kobanga eningisaki ye; azalaki lisusu na likoki ya kotambwisa nzela te. Yesu akitisaki ye motema na malɛmbɛ ete: “Ngai nazali nzela oyo ememaka epai na Nzambe, bolingo na ngai mpe solo na ngai ezali mobeko ya solo oyo ezali komema na likoló.Ngai nazali etinda mpo na bato, oyo Nzambe akosambisa yo. Komimeka te na mitinda ya bato ya kozanga boyebi. Tikala na nzela oyo ememaka epai na Nzambe. Yaka epai na ngai mpe komikokanisa na ngai." Klisto azali kotinda yo te uta na bobangi moko kino na mosusu, uta na kozanga elikya moko kino na mosusu. Ntango obeti libanga na nse ya bomoi na yo, asembolaka loboko na Ye mpo na kobikisa yo, alobi: “Sikoyo napesi yo bosolo ya sika, oyo ya kala ezali nsima na yo. Nakufelaki mpo na yo mpe namemaki kondimana ya sika na ngolu.Masumu na yo elimbisami;kondima na yo ebikisi yo. Simbá ngai mpo na kotikala na bosolo ya boyambi kokufa." Okoki kozala kokanisa, “Nandimi makambo oyo nyonso, kasi nazangi bondimi, nguya, losambo, mpe bosantu.” Yesu ayanolaki ete: “Nazali kopesa bino bomoi ya seko; ngai nazali liziba ya bomoi. Bomipesa na ngai na kondima mpe bokozwa Molimo Mosantu. Kati na ye bokozwa bomoi ebele.“Moto nyonso oyo azali kotyela Klisto motema azali na bomoi libela.” Kokende mosika na ye te; ye nde bomoyi na yo. Soki otikali kokufa na masumu na yo to na bomoi na kati ya Klisto. Esika ya katikati ezali te. Klisto azali bomoi ya mondimi. Baoyo banso bazali na boyokani na Klisto batelemi liboso ya Nzambe mpe bamonaka Ye lokola Tata ya mawa. Lingomba moko te, filozofi moko te, mibeko to siansi ekomema yo penepene na Nzambe. Kaka Klisto, Mwana ya Nzambe, nde akoki kosala yango; kati na ye Tata atɛlɛmi liboso na bino. Yesu azali emoniseli ya Nzambe ya kokoka. Moto moko te ayebi Tata kozanga koyeba Mwana. Tozali na libaku malamu ya koyeba Nzambe; Topusani penepene na ye mpo ete Klisto azali bolingo mpe akomisi biso bana ya Nzambe. YOANE 14:7 Bana ya mokili oyo bakabwani na Nzambe mpo na masumu na bango. Moto moko te akoki koyeba Nzambe na bolingi na ye moko. Moto moko te amoni Nzambe longola se Mwana na ye se moko, oyo azali na ntolo ya Tata. Alobi na biso ete: “Soki boyebaki ngai, bolingaki koyeba mpe Tata na ngai.” Kasi bayebaki ye te. Boyebi elingi koloba kaka te bososoli mpe siansi, kasi mbongwana mpe bozongisi sika. Boyebi ya Nzambe ezali na nzoto kati na biso, emonisami na bomoi. Kozala déçu te, ba études théologiques ememaka na connaissance ya Nzambe te. Kasi, ezali nde komitika na pole oyo ezali kongɛngisa nsango malamu. Tika yo moko obongwana pe okokoma mwinda. Na ngonga ya kotɛka, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Banda sikoyo, boyebi ngai: Nazali bobele molongi na nguya nyonso te, na bwanya, mpe na nkembo, kasi nazali mpe Mwana-Mpate na Nzambe oyo alongolaka lisumu na mokili.Na nzela ya liwa na ngai ya bomikabi, Nzambe amimonisi lokola Tata oyo azongisaka boyokani, mpo akopesa masumu na bino etumbu te na nkanda na ye mpe akoboma bino, kasi akopesa ngai etumbu, ya ye Mwana, mpo ozwa bonsomi mpe okóma mosantu, mpo yo, bana na ye, bókota na boyokani elongo na ye. Na ekulusu, Nzambe amimonisaki lokola Tata. Oyo-Aleki-Likoló azali mosika te, kasi azali bolingo, ngolu mpe bosikoli. Nzambe azali Tata na yo moko. Bino oyo bondimi ye boyebi solo na ntina ya Nzambe. Boyebi oyo ekobongola yo mpe okozala na etamboli ya kokumisama mpe ya malamu. YOANE 14:8-9 Maloba ya Yesu, "Omoni Tata mpe oyebi ngai," ekamwisaki Filipo, oyo pene na koyanola ete, "Te, tomoni yango te." Afandaki nyɛɛ, akamwaki na nkembo ya Nkolo na ye. Alobaki nde na mongongo ya nse ete: “Nkolo, lakisa biso Tata mpe yango ekokoka mpo na biso.” Eyano oyo emonisi ete akangaki libombami ya Yesu mpe nguya na ye. Sekele yango etali bomoko na ye na Tata. Soki asengelaki kotika bango, ekokaki mpo na ye kolakisa bango Tata ata mpo na mwa ntango moke, mpo ete batindama libanda lokola azalaki mpe babatelama na nguya ya Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Bongo balingaki koyeba mpe komona esika ya kofanda ya Nzambe mpe kozwa bokonzi likolo ya bato, nguya ya kobikisa mpe kobengana bademo. Kasi na bosenga wana Filipe andimaki ete ayebi naino Tata to Mwana te. Azangaki koyeba bonzambe mpe bosolo. Yesu apamelaki ye te, kasi ayokelaki ye mawa. Na mpokwa wana ya nsuka, ayebisaki bango solo monene: “Moto oyo amoni ngai amoni Tata.” Na ndenge yango, Yesu apasolaki elamba oyo ezalaki kati na ye ná bayekoli na ye. Emonaneli moko te, ndoto moko te ekobimisa bosolo na ntina ya Nzambe, kasi bomoto ya Yesu Klisto. Azalaki kaka moto ya ntina te, kasi kati na ye tomonaki Nzambe ye moko. Lelo okoki kozala na vision ya Nzambe soki omoni Yesu pe oyebi Ye. Thomas mpe ayokaki maloba yango kozanga ete akanga ntina na yango. Nsima ya lisekwa ya Yesu, akokwea liboso ya Nkolo na ye mpe akoganga ete: “Nkolo na ngai mpe Nzambe na ngai!” YOANE 14:10-11 Moyekoli akoki mpenza kokanga nsango malamu na motó mpe komona Yesu na ndenge ya polele te, kozanga ete ayeba naino ntina na ye, soki motema na ye ebongwanaki te na Molimo. Yesu abimisaki Filipo na esika na ye na kotuna ye motuna moko oyo esangisi kondima ya mozindo na bonzambe na ye: “Ondimi te ete nazali na kati ya Tata? Tina ya bomoi na ngai ezali ya kokumisa Tata.Nazali na kati ya Tata.Tata azali na nzoto kati na ngai. Botondi ya bonzambe ezali kati na ngai.Nabotamaki na Molimo Mosantu mpe nafandaki kati na bino kozanga masumu. Nayebi ye uta na nyonso seko mpe boyebi oyo ekɔtisami kati na ngai. «Nazali na bilembeteli oyo endimisi litatoli oyo: maloba na ngai ya bokonzi mpe misala ya bonzambe.Soki bomoni mpasi mpo na kozala na kondima na miso ya Tata kati na ngai, boye boyoka maloba oyo Tata azali koloba na nzela na ngai.Maloba oyo epesi bino bomoi, nguya mpe mpiko.Soki bososoli maloba na ngai te, botala misala na ngai;Nzambe ye moko asalaka kati na bino na nzela ya bilembo ya lola.Abikisaka bino na nzela na ngai oyo nalingaka.Na ngonga ya ekulusu na ngai, okomona misala minene ya Nzambe, koyokanisa bato na ye moko na nzela ya liwa na ngai. LOSAMBO: Nkolo Yesu Klisto, na ngolu nalobi, ‘Nkolo na ngai mpe Nzambe na ngai!’ Limbisa kozanga kondima mpe kozanga bolingo na ngai. Fungola miso na ngai ya kati na Molimo Mosantu na yo mpo namona Tata kati na yo mpe nabongwana na bolingo na yo, mpo ete koyeba yo nakoka komema ngai na bomoi kasi na liwa te. Bimisá ntina ya nkembo na yo epai ya bato oyo bazangi kondima mpo bázwa bomoi ya sika na nzela ya kondima. MOTUNA:
|