Waters of LifeBiblical Studies in Multiple Languages |
|
|
Home Bible Treasures Afrikaans |
This page in: -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Bengali -- Burmese -- Cebuano -- Chinese -- Dioula -- English -- Ewe -- Farsi? -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Javanese -- Kiswahili -- Kyrgyz -- LINGALA - Malayalam -- Peul -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Thai -- Turkish -- Twi -- Urdu -- Uyghur -- Uzbek -- Vietnamese -- Wolof -- Yiddish -- Yoruba
Previous Lesson -- Next Lesson YOANE - Pole Epeli Kati Na Molili
Koyekola Sango Malamu Na Yesu Oyo Yoane Akomi
ETENI YA 1 - Kongengela Ya Pole Ya Bomoi (Yoane 1:1 - 4:54)
A - Liloba Ya Nzambe Ekomi Kati Na Yesu (Yoane 1:1-18)
2. Mobatisi abongisaka nzela mpo na Klisto (Yoane 1:6-13)YOANE 1:11-13 Bato ya Boyokani ya Kala bazalaki bato ya Nzambe mpo ete Nkolo amikangaki na basumuki wana na boyokani nsima ya kopetola bango. Ayangelaki bango na boumeli ya bikeke mingi. Atimolaki mitema na bango na kotimola ya mobeko mpe abongisaki bango mpo na kozwa nsango malamu. Na bongo lisolo ya bakitani ya Abalayama ezalaki mingi koya ya Klisto. Komonana na ye ezalaki mokano mpe ntina ya Kondimana ya Kala. Ezali likambo ya kokamwa ete baye baponamaki mpo na koyamba Nkolo Yesu baboyaki Ye mpe bazwaki pole na Ye te. Balingaki kofanda na molili ya mibeko kozila kosambisama. Bakweyaki mpenza na ngolu mpe balingaki misala na bango koleka lobiko kati na Klisto. Bayambolaki te, babongolaki mitema te kasi bayeisaki mitema makasi. Bato ya Kondimana ya Kala kaka te bazalaki bato ya Nzambe. Kasi bato ya mokili mobimba. Mpo ete Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akelaki mabanga, milona, banyama mpe kutu bato nyonso. Mpo na yango, bato ya mokili bazwi mokumba ndenge moko na bato ya Kondimana ya Kala. Mozalisi na biso mpe Nkolo na biso alingi kokota na mitema na biso mpe na bandako na biso. Nani akoyamba ye? Ozali moto ya Nzambe. Omipesi yo moko na maboko ya Nkolo? Lelo bato ya nkota nyoso bazali pene te koyamba pole ya Klisto. Balingi te kozwa litomba ya kongɛnga na yango mpo na kolonga nene ya molili na bango. Yango wana baboi Mwana na Nzambe lisusu. Mokitani nyonso ya Abrahama to moto na monene oyo afungoli motema na ye epai ya Klisto mpe atia bomoi na ye na maboko ya Mobikisi ya nguya, akokutana na likamwisi monene. Mpo été Pole ya lola ekongengisa ye na pole ya bonzambe mpe ekolonga molili oyo efandi na motema na ye. Lisusu, nguya na Nzambe ekokɔta na motema na ye mpe ekozongisa bomoi na motema na yei. Klisto abikisaka bino na boombo ya masumu. Apesi bino bonsomi ya bana na Nzambe. Soki olingi Klisto, boye Molimo Mosantu akofanda kati na yo mpe akobanda mosala na Ye ya lobiko na bomoi na yo. Sikawa Ntoma Yoane alobi te ete tokokoma too tokomi bana ya Nzambe, kasi tokomi bana na ye na nzela ya kokola kati ya Molimo Mosantu. Bokeseni monene ezali kati na maloba oyo, mpo ete moto oyo andimi Klisto akokɔta na bomoi ya sika. Bobele na ntango yango, akokola mpe akokóma mokóló mpo akóma na bomoi ya kokoka na bomoi na ye ya molimo. Nguya ya Nkolo Yesu ekomisi biso bozalisi ya sika, mpe ebulisi biso mpe tobongwani. Tokómi bana ya Nzambe pamba te, ezali na nzila ya kobotama na Molimo. Likabo ya Molimo na Klisto na mitema na biso etondisi biso na bokonzi ya Nkolo. Kozwa bokonzi oyo ya bonzambe likolo ya bandimi ezali kolakisa likambo oyo ete nguya moko te ya mokili oyo mpe na nsuka ya ntango oyo ekoki kopekisa bandimi kotondisama na bomoi ya bonzambe. Klisto azali moboko ya kondima. Bokoki kokokanisa bana ya Nzambe na bana ya mokili te. Moto nyoso abotama na tata mpe mama na posa na bango. Mbala mosusu basambelaki elongo mpe bazalaki na nse ya bokambi ya Molimo. Kasi libula nyonso ya molimo, ya makanisi to ya nzoto uta na baboti na biso ezali na boyokani te na kobotama na biso ya sika uta na Nzambe. Mpo ete kobotama ya sika na nzila ya Molimo Mosantu euti na Nzambe oyo esalemaka mbala moko. Nzambe azali Tata na biso ya solo na nzila ya Molimo Mosantu. Mwana moko te azali na likoki ya komibota yee moko. Ndenge moko mpe, mbotama na biso ya molimo ezali ngolu ya bulé. Klisto alonaka mboto ya sango Malamu na Ye na mitema na biso. Ye oyo alingi mboto oyo, andimi yango pe abateli yango. Kati na ye, bomoi ya seko ya Nzambe ekokola. Esengo na baoyo bayokaka liloba ya Nzambe mpe batosaka yango. Kobotama na libota ya baklisto to kozala na kati ya lisanga ya baklisto ekomisaka biso bana ya Nzambe te. Esengeli tozala na kondima na kombo ya Klisto. Kondima oyo epusi biso pene Ye. Yango ekotisi biso na bomoi na Ye, kososola boboto na Ye mpe kokola kati nguya ya kondima Ye. Kokola oyo ekoki kosalema soki tomitie na maboko na Ye, kondimaka ete Ye abikisaka biso mpe abongolaka biso na bokokani na Ye. Kondima na Klisto ezali boyokani ya sembo kati na biso mpe Ye mpe boyokani ya solo ya seko. Mbotama oyo ya molimo ekosalema te kati na biso soki bondimi oyo ezali te. Tokoki koloba te ete kobotama ya sika ezali monene to mpasi koleka kondima, to mpe ete kondima ezali pete koleka kobotama ya sika. Bazali ndenge moko. Kino sika, Ntoma Yoane atángi naino nkombo ya Yesu Klisto te. Kasi, alimbolaki bomoto na ye epai ya bandimi ya bikólo mosus. Asalelaki maloba oyo eyokani na lolenge na bango ya kokanisa. Ososolaki bandimbola motoba ya bizaleli ya Klisto oyo mosakoli ya nsango malamu amonisaki? Osili kofungola motema na yo mpo na komona nguya ya bizaleli yango? Na sima okokoma mwana na Nzambe ya solo! LOSAMBO: Nkolo Yesu, nafukami liboso na yo. Nalingi yo mpe nafungoli motema na ngai. Oyakaki epai na ngai ata masumu na ngai, opetoli ngai na mabunga na ngai nyonso. Ee Nkolo, nafungoli yo bikuke ya motema na ngai. Yaka kofanda kati na ngai na nzela ya Molimo Mosantu na yo. MOTUNA:
|