Home
Links
Bible Versions
Contact
About us
Impressum
Site Map


WoL AUDIO
WoL CHILDREN


Bible Treasures
Doctrines of Bible
Key Bible Verses


Afrikaans
አማርኛ
عربي
Azərbaycanca
Bahasa Indones.
Basa Jawa
Basa Sunda
Baoulé
বাংলা
Български
Cebuano
Dagbani
Dan
Dioula
Deutsch
Ελληνικά
English
Ewe
Español
فارسی
Français
Gjuha shqipe
հայերեն
한국어
Hausa/هَوُسَا
עברית
हिन्दी
Igbo
ქართული
Kirundi
Kiswahili
Кыргызча
Lingála
മലയാളം
Mëranaw
မြန်မာဘာသာ
नेपाली
日本語
O‘zbek
Peul
Polski
Português
Русский
Srpski/Српски
Soomaaliga
தமிழ்
తెలుగు
ไทย
Tiếng Việt
Türkçe
Twi
Українська
اردو
Uyghur/ئۇيغۇرچه
Wolof
ייִדיש
Yorùbá
中文


ગુજરાતી
Latina
Magyar
Norsk

Home -- Lingala -- Tracts -- Tract 08 (Who is Christ?)
This page in: -- Armenian -- Baoule -- Burmese -- Chinese -- Dagbani? -- Dioula -- English -- French -- German? -- Greek -- Hausa -- Hebrew -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Japanese -- Korean? -- LINGALA -- Maranao -- Nepali? -- Peul? -- Somali -- Spanish -- Sundanese -- Telugu? -- Thai? -- Turkish -- Twi? -- Uzbek -- Yoruba

Previous Tract -- Next Tract?

BA TRACTES - Nsango mikuse ya Biblia mpo na kokabolama

TRACTE 08 -- Yesu azali nani ?


Bato ya politiki mpe bato ya masambo balakisaka mibeko na bango mpe bomoi ya mobandisi na bango kati na buku mpe internet, bazali komeka kotalisa lolenge ya kosala na bango na motindo ya kokumisa ya koleka.

Mwana ya Maria asalaka bongo te mpo ya komikumisa. Amimonisaka epai ya moto oyo asepeli koyeba ye. Kombo “KLISTO” ekomami mbala 569 na kati ya Kondimana ya sika. Mwana ya Maria atika lolenge na ye, aloba : “Molimo na Nkolo azali likolo na ngai, mpo été apakoli ngai mafuta mpo été nasakola na mabota sango malamu. Atindi ngai kosakola siko mpo na bakangami, mpe komona lisusu mpo na bango bakufa miso ; mpe kosikola banyokolami, mpe kosakola mbula ya ngolu ya Nkolo. ” (Luc 4:18-19)

Klisto, Mopakolami, amonisa sekele na ye tango atanga lisakoli oyo touti kotanga oyo emonisama na Isaya mbula 700 liboso ya kobotama na Klisto Yesu (Yisaya 61:1,2).

Mwana ya Malia abotami na Molimo Nzambe. Mpe lisusu, Nzambe atinda litondi ya molimo Mosantu likolo na Klisto mpo akoka kosala elongo na ye mpe akokisa mokano na ye. Klisto asali lisumu te, azali mpeto mpe bulée.

Andima été azali “Mosantu oyo atondisami na Molimo na Nkolo ”. Kati na Kondimanan ya Kala, ba konzi, ban ganga Nzambe mpe basakoli bapokolaki bango na mafuta ya bulée kolakisa été batiami pembeni mpo na mosala atondisami na nguya mpe na mayele na Nzambe. Kati na Kondima ya Nkala, kopakola mafuta ya ezalaki ebandeli na oyo emonanaki na Klisto. Klisto apakolamaki na Molimo, mpo akokisa mosala na ye ya Mokonzi ya libela (Daniel 7:13-14), Motumbi mbeka ya libela (Nzembo 110:4), Mosakoli oyo alakamaka (Ditelenome 18:15), Mobondeli mpo na bato ya masumu (Yisaya 53), mpe Liloba na Nzambe (Yisaya 61:1-2). Kombo “Klisto” ezali kombo ya mwana ya Malia te, ezali kolimbola mosala na ye oyo ebongisami na Nzambe.


Tina nini Klisto atindamaki?

Nzambe mosalisi atinda Klisto mpe atondisa ye na nguya ya Molimo Mosantu mpo na kosakola sango malamu ya lobiko epai ya babola mpo été bakangwama na kanda mpe basikolama na mokolo ya esambiseli ya suka.

Nzambe apesa esengo na ye epai ya bato minene te, bazwi te, bato ya mayele te, banganga mayele te mpe bakumu, kasi na bolingo mpe mawa, alobela bato bazanga lokumu, bato ya makila mabe, bato ya masumu, bato ya motau, babola, mpe baye bazalaki na bosenga ya lisungi. Nzambe na nguya nyoso atinda Yesu Klisto epai ya bato ya mawa mpe baye baboyama mpo na kopesa bango elikia, nguya ya molimo mpe bomoi ya seko na nzila ya Molimo Mosantu oyo akopesa bango.

Yesu abenga mateya na ye “Sango Malamu” – sango malamu. Ye oyo akondima mateya na ye akokota na libota ya bana na Nzambe mpe bakozwa esika ya kimia na likolo. Sango malamu elongi koyina ya mokili. Maloba na Yesu mazali kobengana kanyakaka, lokuta,mpe, mpe kolonga makambo ya bosoto mpe ekobo. Molimo na Nzambe ezali koumela epai na ye oyo akoyoka mpe akondima sango malamu mpe maloba na ye. Sango malamu ezali likabo na Nzambe. Ye oyo akotanga te mpe akondima likabo wana moko ya Yesu Klisto akotikala mobola, akozanga elikia mpe akozanga lisangana elongo na Nzambe ya bomoi.

Yesu Klisto aloba été atindama na Nzambe epai ya bato oyo mitema mibukani na mawa mpe masumu. Azali kokangola baye bazali baumbu ya masumu na nse ya bokonzi ya satana. Azali kotombola bato ya masumu baye bakufa na molimo mpe kopesa bango bomoi ya peto mpe ya semba. Yesu Klisto aloba maloba ya pamba te, kasi abikelaki maloba na ye. Ye nani akotanga bikamwa na ye kati na Sango Malamu mpe Coran, akondima été mwana ya Maria azali soit Mobikisi, mopakolami na nguya na bolingo ya Nzambe. Atikali na lilita te-azali na bomoi. Alaki na bayekoli na ye nguya ya molimo ekosalema na na bomoi na bango.


Boye opakolami na Molimo Mosantu?

Yesu Klisto azalaki motema monene te. Abateli mpo na ye moko te Molimo Mosantu mpe nguya ya boNzambe na ye. Azali kopesa Molimo Mosantu epai na baye balembi, baye bazali koluka kimia ya Nzambe mpo été bango mpe bazala na Molimo na ngolu mpe batondi na bolingo na Nzambe. Mituna motuna oyo: “Boye natikala kokangema na mbindo na nzila ya lisumu na ngai? Too mpe nasepeli napetolama mpe na longisama na nzila ya Yesu Klisto mpe na pakolama na Molimo Mosantu?” Alobi:

“Nakotika libanda te ye oyo akoya epai na ngai ” (Yoane 6:37);

“Ye oyo andima ngai akozwa bomoi ya seko” (Yoane 6:35,47; 8:12; 10:27-28; 11:25-26); mpe

“Oumela kati na ngai mpe ngai nakoumela kati na yo.” (Yoane 15:4)

Ndeko motangi,
Soki okoyeba mozindo ya bilaka ya bo Nzambe, fungola motema na yo epai ya Yesu Klisto mpe akopesa yo Molimo Mosantu.

Yesu aloba été apakolama mafuta mpe atindama mpo na kosakolama ya mbula ya ngolu ya Nkolo. Ba buku ya Moise ezali kolakisa biso été sima mbula 50, esengelaki baumbu bakangwama mpe biloko na bango bizongisama (Levitko 25:10ss).

Ezali elilingi ya kokangwama ya molimo ya munene. Yesu Klisto alingi kokangola baoombo na masumu na bosoto na bango mpe mabonga na bango, mpe kozongisa bango na Nzambe. Yesu Klisto azali na bokonzi mpe nguya ya kokangola bango, mpo été alongola masumu ya mokoli. Na mikolo eleki, Nzambe apesa mibeko na nzila ya Moise, kasi ngolu mpe bosembo eyei na nzila na Yesu Klisto (Yoane1:17). Banda lisiko na Yesu, moko na moko na biso akoki kobongwana epai ya Nzambe. Tokozwa Molimo Mosantu lokola elaka ya libula ya bokonzi na Nzambe. Tozali kozwa Nzambe lokola mosambisi ya libela na tango ya esambiseli ya suka te. Akobimela biso lokola Tata na ngolu nyoso oyo azali kozila biso na motema molai mpe azali kosepela koyamba biso.


Kokutana na ngai na Yesu Klisto

Naumeli lokola moombo ya masumu mpe ya bisengo ya nzoto. Nazalaki tango nyoso koluka lokumu mpe bisengo, kokokisa posa ya nzoto na ngai, mpe koluka kotondisa motema na ngai na bolingo, kasi litomba te. Sima ya mwa ngonga mokuse ya bisengo, motema na ngai ezalaki polele kozanga kotonda, kino mokolo oyo nayokaki sango na Yesu Klisto, Mobikisi oyo akosunga biso na tango ya kaka.Nabandaki koluka ye. Moninga moko alobeli ngai mosala ya Mwana ya Malia oyo asali mpo na mokili mpe alimboli ngai ndenge Yesu akoki kobongola bomoi na ngai.

Yesu akufi mpo na ngai mpe mpe apesi ngai bomoi ya seko mpo été nazala tango nyoso kati na esengo. Mpo nayamba esengo na ye mpe bolingo na ye, nayebaki été esengeli natikela ye motema na ngai. Nazwa decision ya kobondela mpe kobianga ye, Mwana ya Malia, mpo été akota na motema na ngai. Ezali yango asali ya solo. Abandi mosala ya lisiko na ye kati na ngai. Sika nazali kobika kati ya esengo. Nazali lisusu na somo te mpe komitungisa te, ata minyoko ezali mpo été azali kobatela ngai mpe azali kopesa biyano na bosenga na ngai. Ndeko motangi, nazali kosenga na yo kosala lokola ngai, kosenga na Yesu koya na motema na yo mpo été otondisama na esengo mpe koyeba kozwa kimia kati na mikakato nyoso.

Libondeli
Nzambe oyo atonda na mawa mpe ngolu ozali tata ya molimo ya bato nyoso oyo babongolaka mitema. Napesi matondi mpo na kotinda Yesu Klisto, Mopakolami, kati na mokili na biso ya mbindo. Nakoki kobelema na ye te, soki mpe koyamba Molimo na yo mpo été nazali mosumuki. Ata boye, opamboli ba bola na molimo. Ayambi lisiko na Yesu. Nazali kokumusi yo mpe kotuna yo opakola ngai na mafuta ya Molimo Mosantu mpo été nakoka kobongwana mpe kokoma komikitisa, peto, lobiko na lobiko, kozala na mawa na bato, mosantu mpe kotonda na bolingo lokola Yesu. Amen.


Olingi koyeba makambo mingi likolo na Yesu?

Soki otuni , tokoki kotindela yo pamba sango malamu na Yesu elongo buku ya koyekola mpe mabondeli. Tanga Sango Malamu na Yesu mpe bondela mpo été ozwa kimia na motema ya libela ya Nzambe.


Bokabola Sango Malamu ya Yesu na baninga mosusu

Obikeli bompoi ya sika elongo na Yesu mpe ozwi epakolami na molimo ye, pesa mwa buku oyo na baninga mpe baye ndimi naino te.Tokotindela yo mosusu mingi. Bondela mpo na baye bakoyamba yango. Tozali kozila mokanda na yo. Kobosana te kokoma polele esika ofandaka.

WATERS OF LIFE
P.O. BOX 60 05 13
70305 STUTTGART
GERMANY

Internet: www.waters-of-life.net
Internet: www.waters-of-life.org
e-mail: info@waters-of-life.net

www.Waters-of-Life.net

Page last modified on July 07, 2023, at 04:47 PM | powered by PmWiki (pmwiki-2.3.3)