Home
Links
Bible Versions
Contact
About us
Impressum
Site Map


WoL AUDIO
WoL CHILDREN


Bible Treasures
Doctrines of Bible
Key Bible Verses


Afrikaans
አማርኛ
عربي
Azərbaycanca
Bahasa Indones.
Basa Jawa
Basa Sunda
Baoulé
বাংলা
Български
Cebuano
Dagbani
Dan
Dioula
Deutsch
Ελληνικά
English
Ewe
Español
فارسی
Français
Gjuha shqipe
հայերեն
한국어
Hausa/هَوُسَا
עברית
हिन्दी
Igbo
ქართული
Kirundi
Kiswahili
Кыргызча
Lingála
മലയാളം
Mëranaw
မြန်မာဘာသာ
नेपाली
日本語
O‘zbek
Peul
Polski
Português
Русский
Srpski/Српски
Soomaaliga
தமிழ்
తెలుగు
ไทย
Tiếng Việt
Türkçe
Twi
Українська
اردو
Uyghur/ئۇيغۇرچه
Wolof
ייִדיש
Yorùbá
中文


ગુજરાતી
Latina
Magyar
Norsk

Home -- Lingala -- Romans - 051 (God Remains Righteous; The promises of God)
This page in: -- Afrikaans -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Azeri -- Bengali -- Bulgarian -- Cebuano -- Chinese -- English -- Ewe -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hebrew -- Hindi -- Igbo -- [Indonesian.BkNt06RoCh051 | Indonesian]] -- Javanese -- Kiswahili -- LINGALA -- Malayalam -- Polish -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Turkish -- Ukrainian -- Urdu? -- Yiddish -- Yoruba

Previous Lesson -- Next Lesson

BALOMA - Mokonzi Azali Bosemnbo Na Biso
Boyekoli Ya Mokanda Ya Polo Epai Ya Baloma
ETENI YA 2 - Bosembo Ya Nzambe Ezali Makasi, Ata Sima Koya Mitema Ya Bana Ya Yakobo, Koponama Na Ye (Baloma 9:1-11:36)

3. Nzambe Atikali Sembo Ata Soki Bato mingi ya Yisalaele batɛmɛlaki Ye (Baloma 9:6-29)


Ntoma Polo azalaki na esengo na mosala ya Nkolo, kasi na ntango moko, azalaki na mawa mingi mpe na nse ya mpasi oyo ezalaki se kobakisama mpo ete amonaki bankama ya bapakano oyo bazalaki kobanga Nzambe te bazali kozongisama sika mpe kokota na bokonzi ya Nzambe, nzokande bankóto ya Bayuda oyo baponamaki batyolaki Yesu mpe bokonzi na ye, batikaki ye mpe baboyaki koyoka nsango na ye to kolanda ye.


a) Bilaka ya Nzambe ezali ya bokitani ya Abrahama te (Baloma 9:6-13)


BALOMA 9:6-13
6 Ezali te lokola nde liloba ya Nzambe elongi te. Mpo ete bato nyonso oyo bauti na Yisraele bazali Yisraele te, 7 mpe bana nyonso ya Abalayama bazali bana na ye te; Kasi balobi ete: “Na nzela ya Yisaka bana na yo bakotángama,” 8 elingi koloba bana ya mosuni te nde bazali bana ya Nzambe, kasi bana ya elaka nde batalelami lokola bana. 9 Mpo oyo ezali liloba ya elaka: “Na ntango wana nakozonga, mpe Sara akobota mwana mobali.” 10 Mpe lisusu ezalaki bongo na Lebeka, oyo azwaki zemi na moto moko, Yisaka tata wa biso. 11 Mpo atako bana babotamaki naino te, mpe basalaki eloko moko te ya malamu to ya mabe—mpo mokano ya Nzambe ya koponama etelema, na misala te kasi na ye oyo abengi—12 balobaki na Rebeka ete: “Mokóló akosalela leki,” ndenge ekomami ete: 13 “Nalingi Yakobo, kasi nayinaki Esau.”

Polo, nganga-mayele, alingaki koyebisa polele solo wana ya kokamwa mpo na Bayuda mpe baklisto oyo bautaki na Bayuda na Loma. Akomelaki bango ete Liloba ya Nzambe ezali bosolo se moko oyo ekoki kobimisa bokoli oyo ya kokamwa mpe oyo ezali na eyano ya malamu na libombami oyo. Eyano oyo ezali na makambo mibale:

Ya liboso: Bana nyonso ya Abrahama bazali bana ya elaka te. Nzambe aponaki Yismaele te lokola moko ya batata ya Klisto. Ya solo, Yismaele mpe bakitani nyonso ya Abrahama oyo bayaki nsima na ye batikalaki libanda ya molongo ya lingomba mpe libanda ya maponi ya bana ya Yakobo. Bokoli yango ezali koteya biso ete bakitani ya moto ya bozalisi nde ekokata avenire na ye ya elimo te. Moto nyonso te oyo abotami moklisto akokóma moklisto ya solo mbala moko; kasi, basengeli nde kozonga epai ya Nzambe bango moko. Nzambe azalaka na ba petits te mais bana. Bosolo oyo ezali kolakisa biso ete Bayuda banso te bazali bana ya Nzambe baponami, kasi kaka baye bandimi Nsango Malamu ya Klisto. Bokonzi na bango ya kozwa ezali ntango nionso, kasi réalisation na yango etali volonté ya mutu na mutu.

Likambo ya mibale ezali na Biblia, na masolo oyo elobeli Lebeka, mwasi ya Yisaka. Nzambe amonisaki ye liboso ya kobota mapasa ete mwana ya liboso akosalela ya mibale (Genese 25:23). Bango mibale bautaki na tata moko, kasi Nzambe ayebaki moko na moko akokesana.

Nzambe aponaki Yakobo, mwana ya mibale, mpe aboyaki ndeko na ye Esau, mwana ya liboso. Yakobo azalaki malamu koleka Esau te na bizaleli, kasi azalaki na makoki ya kozala na kondima ya malamu koleka Esau. Na nsima, abongoli motema na motema moko, likambo oyo Biblia emonisi te mpo na mwana ya liboso. Likambo oyo emonisi biso ete boponi ya moto, engebene mokano na ye liboso, etali boyebi ya Nzambe nyonso mpe bolingi na ye moko.

Moto moko te akokaki komilelalela mpo na Nzambe soki baponami te, mpo toyebi basekele ya milimo na biso te mpe libula na nzoto na biso te. Nzambe azali mosantu mpe sembo; azali na mbeba te na bikateli na ye.

Bato mosusu ya teoloji bamonaka ete kopona ya Nzambe etaleli te ezalela ya moto to misala na ye, kasi nde, etaleli yango kaka Nzambe. Moto akoki te kososola bantina ya Nzambe mpe bantina ya mwango na ye. Yango wana bato nyonso te bandimaka likanisi oyo, mpamba te Nzambe na biso azali Tata oyo azali kaka mosantu te kasi atondi mpe na bolingo mpe na boboto.

Na tango ya mosala na ye, Yesu alobaki maloba na ye ya mokano: "Bampate na ngai bayokaka mongongo na ngai; nayebi bango, mpe balandi ngai. Napesi bango bomoi ya seko" (Yoane 10:27-28). Bato nyonso te bayokaka mongongo na ye, mpe bato nyonso te oyo bakoyoka yango bakoyanola na libiangi na ye to bakosala engebene na mitindo na ye. Ezali na bato ya libota moko, ya bato moko, ata ya libota moko, oyo bayokaka Nsango Malamu kasi basosoli yango te, nzokande ezali na basusu oyo batondi na esengo mpe na kimia.

LOSAMBO: Tata na lola, tozali kopesa yo matondi mpo oponaki Yisaka na Yakobo mpe okómisaki bango batata ya mwana na yo Yesu, atako bazalaki mpenza basantu te. Lendisá kondima na biso mpo ete tokoka kolonga mikakatano oyo ekoya na nzela ya nkombo na yo, mpe mabe oyo ezali kati na biso na nzela ya nguya na yo. Kamba biso na komikitisa mpe komiboya mpo ete tokanisa te ete tozali malamu koleka basusu.

MITUNA:

  1. Koponama ya Yisaka epai ya bakitani na ye mpe ya Yakobo mpo na bana na ye elimboli nini?
  2. Sekele ya boponi ya Nzambe ezali nini?

www.Waters-of-Life.net

Page last modified on October 26, 2026, at 11:19 AM | powered by PmWiki (pmwiki-2.3.3)