Waters of LifeBiblical Studies in Multiple Languages |
|
|
Home Bible Treasures Afrikaans |
This page in: -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Bengali -- Burmese -- Cebuano -- Chinese -- Dioula? -- English -- Ewe -- Farsi? -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Javanese -- Kiswahili -- Kyrgyz -- LINGALA - Malayalam -- Peul -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Thai -- Turkish -- Twi -- Urdu -- Uyghur? -- Uzbek -- Vietnamese -- Wolof -- Yiddish -- Yoruba
Previous Lesson -- Next Lesson YOANE - Pole Epeli Kati Na Molili
Koyekola Sango Malamu Na Yesu Oyo Yoane Akomi
ETENI YA 4 - Pole elongi molili (Yoane 18:1 – 21:25)
A - Makambo Kobanda Na Bokangi Ti Na Lilita (Yoane 18:1 - 19:42)
4. Ekulusu mpe liwa ya Yesu (Yoane 19:16b-42)
e) Mopanzi ya Yesu etɔbɔlami (Yoane 19:31-37)YOANE 19:31-37 Lokola Bayuda bazalaki kolinga mibeko na bango, bazalaki na mayoki ya bomoto te. Mibeko ya Moize esɛngaki ete bálongola bibembe ya baoyo babomamaki liboso butu ela. Na yango, Bayuda basalelaki yango mpo na bato misato oyo babakamaki na ekulusu. Bazalaki kolinga te kotala esika ya mawa na ntango ya bafɛti. Basɛngaki Pilate asukisa bomoi na bango na kobukaka makolo. Bato oyo babakamaki na ekulusu bakokaki ntango mosusu kobika na boumeli ya mikolo misato. Yango wana basoda batosaki mitindo oyo bazwaki. Batɛlɛmaki liboso ya Yesu ntango bamonaki ete asilaki kokufa. Nzoto na ye esilaki kolemba na fimbo, mpe molimo na ye eyebaki mpasi na nse ya kilo ya ngambo na biso mpe nkanda ya Nzambe. Yesu akufaki na bonsomi na ye moko mpo na koyokanisa biso na Nzambe. Mpo na komonisa Bayuda ete akufi mpenza, soda moko azwaki mopanga mpe atɔbɔlaki mopanzi na ye pene na motema na ye. Mai mpe makila ebimaki, emonisaki ete akufaki liboso ya ngonga ya motoba ya mokolo ya mitano wana. Makambo misato ya likambo yango emonisi biso ete Nzambe alongi. Ya liboso: Bayuda bapusamaki na Satana mpo na kobuka mikuwa ya Klisto, na boye ete moto moko te akoka koloba ete Moto oyo Babakamaki na Ekulusu azalaki mbeka ya bonzambe. Molulu ya Elekeli esengaki ete Mwana na Mpate azala ya kokoka kozanga mikuwa ebukani (Exode 12:46). Na yango, Nzambe abatelaki Mwana na ye ata na liwa, mpe moto moko te akoki kotɛmɛla nkombo na ye lokola Mwana-Mpate ya Nzambe. Ya mibale: Mopanzi ya Yesu oyo etɔbɔlamaki esakolamaki na Zekalia (12:10). Na Zekalia 11:13, profeta amonaki ete bato ya Kondimana ya Kala batalelaki bomoi ya Mobateli na bango na motuya ya palata koleka ntuku misato te. Atako motuya oyo ya moke, Nzambe atindaki Molimo ya ngolu mpe losambo likolo ya ndako ya Davidi mpe bato ya Yelusaleme, mpo ete miso na bango efungwama mpe bakoka koyeba Moto oyo Babakamaki na Ekulusu mpe Tata na ye. Soki liteya yango ezalaki te, balingaki koyeba Nzambe te to mpe lobiko na ye te. Babakami na Ekulusu ezali nzela se moko ya kozwa Molimo ya Nzambe, lokola tozali kotanga: “Bakotala ye oyo batɔbɔlaki.” Ya misato: Moyekoli oyo atikalaki na bosembo na makolo ya ekulusu azalaki motatoli na miso ya makambo nyonso wana. Akimaki te na miso ya basoda mpe asundolaki Nkolo na ye te sima ya liwa na ye. Amonaki ndenge batɔbɔlaki mopanzi ya Yesu mpe batatolaki bolingo ya Nzambe, Tata, Mwana mpe Molimo Mosantu, mpo ete tokoka kozala na kondima na bomoko ya Bosato mpe bomoi ya seko. LOSAMBO: Nkolo Yesu Klisto, olongi masumu, Satana pe esambiselo. Ozali Moto ya Bomoyi, Mokonzi elongo na Tata na bomoko ya Molimo. MOTUNA:
|