Waters of LifeBiblical Studies in Multiple Languages |
|
|
Home Bible Treasures Afrikaans |
Home -- Lingala -- John - 058 (Sin is bondage) This page in: -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Bengali -- Burmese -- Cebuano -- Chinese -- Dioula? -- English -- Ewe -- Farsi? -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Javanese -- Kiswahili -- Kyrgyz -- LINGALA - Malayalam -- Peul -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Thai -- Turkish -- Twi -- Urdu -- Uyghur? -- Uzbek -- Vietnamese -- Wolof -- Yiddish -- Yoruba
Previous Lesson -- Next Lesson YOANE - Pole Epeli Kati Na Molili
Koyekola Sango Malamu Na Yesu Oyo Yoane Akomi
ETENI YA 2 - Pole Engengi Kati Na Molili (Yoane 5:1 - 11:54)
C - Mobembo Ya Suka Ya Yesu Na Jerusalem (Yoane 7:1 - 11:54) Kokabola Molili Na Pole
1. Maloba ya Yesu na Elambo ya Bahema (Yoane 7:1 – 8:59)
e) Lisumu ezali bowumbu (Yoane 8:30-36)YOANE 8:30-32 Litatoli ya Klisto ya komikitisa kasi ya kokamwa esimbaki mingi kati na bayoki na ye. Basukaki na kondima ete awutaki epai ya Nzambe. Yesu ayokaki ete bazalaki kotyela ye motema mpe asepelaki na makanisi na bango ya polele. Alendisaki bango kaka te mpo na kondima nsango malamu na ye, kasi kokanisa na maloba na ye mpe kosangana na ye mpo na kotikala kati na ye, kaka lokola etape efandi na nzete ya vinyo; mpo ete Molimo na ye akoka kosopana na mitema mpe makanisi na bango kozanga epekiseli; mpo na komema bango mpo na kokokisa mokano na ye. Ye oyo azali kotya maloba ya Klisto na misala, azali kososola bosolo. Mpo bosolo ezali kaka likanisi mpamba te, kasi ezali likambo ya solo oyo tozali kokutana na yango. Solo ya Nzambe ezali libosoliboso liloba ya sembo mpe ya bwanya; bongo, ezali koyeba Nzambe lokola Tata, Mwana mpe Molimo Mosantu na bomoko ya bolingo. Wana tozali komisimba misisa kati na Klisto, tozali kososola kitoko ya Bosato Bosantu. Koyeba Nzambe ebongoli bomoi na biso. Ezali kotinda biso tólinga basusu, elongolaka biso na moimi. Ye oyo alingaka te, ayebi Nzambe te. Koloba na ntina ya boyamboli to mikumba ya mibeko ekosikola biso te na boombo ya lisumu; Oyo ekopesa biso bonsomi ezali bolingo ya Nzambe, kondima bolimbisi ya Mwana mpe boyei ya Molimo na bomoi na biso. Bolingo ya Nzambe ekoki mpe kobuka minyɔlɔlɔ ya moimi. YOANE 8:33-36 Bayuda babulunganaki; Bankoko na bango bazalaki na bomoi ya bikeke mibale na nse ya bowumbu ya Faraon na Ezipito mpe bamitalelaki lokola basikolami na nguya ya Nzambe oyo abimisaki bango na bowumbu oyo (Esode 20:2). Lokola Yesu aboyaki bonsomi na bango, atungisaki bango. Yesu asengelaki kobɛta lolendo ya bato oyo babandaki kondima ye. Amonisaki bango ete bazali baombo ya lisumu mpe bakangami ya Satana. Soki tozangi kososola kilo ya koboma ya bokangami na biso, tokoluka lobiko te. Ye oyo ayebi ete azali na makoki te ya kolonga masumu na ye akosenga Nzambe abikisa ye. Awa tomoni ntina oyo bato mingi balukaka Yesu te; Bakanisaka ete bazali na mposa ya lobiko na ye te. Yesu asakoli na makasi ete: “Moto nyonso oyo akosala masumu akokóma moombo ya lisumu.” Bato mingi mokolo mosusu babandaka kokosa, kobika na botau mpe na mpambampamba. Bamipesaka na lisumu mpe bamipesaka na makanisi; Nsukansuka, bazwi ekateli ya kokende na nzela na bango moko. Bamekaka mwa ba vices mpe basukaka na komesana na yango. Ntango babandi koyoka ngambo mpe kotya likebi na kofinga ya lisosoli na bango, ntango eleki; Bazali baombo ya masumu na bango. Tango mosusu kutu basalaka crime malgré bango moko. Na nsima, balakelaka mabe mokolo oyo babandaki koyoka makanisi na bango ya mabe. Bato bazali mabe, ata soki babombaka bosolo ya nsɔmɔ nsima ya maskɛ ya kobanga Nzambe ya lokuta mpe ya bonkonde. Soki Klisto azali te, bato nyonso bazali baombo ya bamposa na bango ya mosuni. Satana asakanaka na misisa na bango lokola mopɛpɛ na nkasa oyo ekufá. Na nsima, Mwana ya Nzambe alobi liloba na ye ya bokonzi: “Mpo na ntango oyo, nazali elongo na yo mpe nayebi bokangami na yo. Nazali pene mpe nalingi kosikola bino mpe kosukola masumu na bino. Nayei te mpo na mbongwana ya likolólikoló ya mokili, to mpe mpo na kosembola bino na kotyelaka bino mobeko moko ya makasi koleka. Te, nalingi kosikola bino na nguya ya lisumu mpe ya liwa mpe na lotomo oyo Satana azali koloba. Nalingi na recréer yo, na pesa yo vie ya sika po nguya ya Nzambe kati na yo ezala antidote ya masumu. Na ntembe te, Satana akomeka yo na ndenge nkóto. Bokobɛta libaku, lokola baombo te, kasi lokola bana oyo bakangami makasi na lotomo na bango ya sika.” “Osikolami libela na libela, osikolami na lisumu, na motuya ya makila na ngai. Moko na moko na bino azali ya ntina mingi mpo na Nzambe. Apesaki yo bonsomi, po ozala mwana ya bonsomi. Nazali kopesa yo makoki ya kofanda na boyokani elongo na Nzambe, kosalela Ye mpe kosanzola Ye. Nazali seul liberateur, oyo abikisaka yo na boloko ya culpabilité mpe amemi yo na bokonzi ya Nzambe. Nazali Mwana na Nzambe, natondi na bokonzi mpo na kosikola baoyo nyonso bazali koyoka mongongo na ngai.” LOSAMBO: Nkolo Yesu, tozali kosambela mpe kokumisa yo mpo ozali Mobikisi ya nguya nyonso, oyo alongolaki biso na ekulusu na bokonzi ya mabe ya Satana. Olimbisi masumu na biso nyonso. Opetoli biso mpo tótikala baombo ya bololo mpe ya koyina te. Salisa biso tósalela Nzambe lokola bana ya bonsomi mpe ya esengo. MOTUNA:
MAKAMBO YA MITUNA - 3Ndeko motángi,
Tinda biyano na yo, kobosana te kokoma adresi na yo na ndenge ya kotánga, na: Waters of Life Internet: www.waters-of-life.net |