Home
Links
Bible Versions
Contact
About us
Impressum
Site Map


WoL AUDIO
WoL CHILDREN


Bible Treasures
Doctrines of Bible
Key Bible Verses


Afrikaans
አማርኛ
عربي
Azərbaycanca
Bahasa Indones.
Basa Jawa
Basa Sunda
Baoulé
বাংলা
Български
Cebuano
Dagbani
Dan
Dioula
Deutsch
Ελληνικά
English
Ewe
Español
فارسی
Français
Gjuha shqipe
հայերեն
한국어
Hausa/هَوُسَا
עברית
हिन्दी
Igbo
ქართული
Kirundi
Kiswahili
Кыргызча
Lingála
മലയാളം
Mëranaw
မြန်မာဘာသာ
नेपाली
日本語
O‘zbek
Peul
Polski
Português
Русский
Srpski/Српски
Soomaaliga
தமிழ்
తెలుగు
ไทย
Tiếng Việt
Türkçe
Twi
Українська
اردو
Uyghur/ئۇيغۇرچه
Wolof
ייִדיש
Yorùbá
中文


ગુજરાતી
Latina
Magyar
Norsk

Home -- Lingala -- Tracts -- Tract 05 (Prepare The Way of the LORD!)
This page in: -- Armenian -- Baoule -- Burmese -- Chinese -- Dagbani? -- Dioula -- English -- French -- German? -- Greek -- Hausa -- Hebrew -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Japanese -- Korean -- LINGALA -- Maranao -- Nepali? -- Peul? -- Somali -- Spanish -- Sundanese -- Telugu -- Thai -- Turkish -- Twi -- Uzbek -- Yoruba

Previous Tract -- Next Tract

BA TRACTES - Nsango mikuse ya Biblia mpo na kokabolama

TRACTE 05 -- Bobongisa balabala na Nkolo ! (Yisaya 40:3)


Bato bazali kobundabunda kozanga tina na bomoi na bango. Bazali komeka kosepela na kimia mpe kobunda kozwa kwanga ya mokolo na kolo, kasi bazali kokanisa na kufa oyo ezali kozila bango te. Mingi te kati na bango bazali kokanisa na Nzambe, bazali kobanga ye mpe bazali komeka kotambola na mibeko na ye mpo été batambwisama na yango mpe bayeba bosolo na ye.

Mozalisi na likolo mpe na nse abosanaka bikelamo na ye te. Alingi bango, akanisaka na bango, alobelaka bango mpe amekaka mitema na bango. Azali na posa atondisa bango na nguya na ye soki babongoli mitema mpe babongwani epai na ye.


Nkolo ezali ye azali koya epai na biso

Tango AADAMA na Ewa bazangaki kotosa Nzambe, bazwaki nsoni mpe bamibombaki, bayebaki mabe bautaki kosala. Ata bongo, Nkolo akweisaki bango te, kasi kasi alukaki bango : “Ozali wapi, Adama ?” (Genese 3:9). Mozalisi azali koluka moko moko na biso mpe azali kotuna Le Créateur cherche chacun de nous et demande: “Ozali wapi? Okomi na bomoi na yo wapi ?”

Nkolo abiangaki Abalayama na Mezopotamia, na kati na basambeli na banzambe nzambe ya kanyaka, azalisi ye motamboli tamboli ya nguya koluka esika ya kopema ya lobiko ya peto. Ndeko motangi, ozali mpe koluka koluka nzila ya bosembo, koluka ndako ya lobiko ya libela mpo na yo ?

Yakobo azalaki mokosi monene. Akendaka komibomba na mboka mosusu mosika mpe abali kuna. Sima ya b ambula ebele na mboka mopaya, azongaki na mokoli na ye. Kasi mwanze na Nkolo azipaki ye nzila mpo na kopesa ye etumbu mpo na mabe na ye asalaki. Kasi , Yakobo akanisaki na bolingo monene na Nkolo. Abundi na Mosantu na kolobaka: “Na kotika yo kokenda te kino o pambola ngai!” (Genese 32:26). Okangami na Nzambe kino apambola yo?

Mose akimi na lisobe mp été, na kanda na ye, abomaki mo ezipito oyo azalaki koboma moebele. Sima y ambula 40, Nkolo abimelaki ye kati na moto ezopela mpe alobi na ye “Nazali oyo ezali ngai”, Oyo abongwanaka te. Akotikala sembo. Nkolo akuti yo na lisobe na bomoi na yo? Motema na yo eyoki ebiangeli na ye? Boye oyoki sembo kati na yo mpo na oyo abongwanaka te?

Samwele azalaki elenge tango Nkolo abengaki ye kozala mosambisi na ekolo. Nzambe aponaka bobele bankolo te, kasi bilenge lokola. Esengeli kotea liloba ya Nzambe na bana mpe kokamba bango epai na ye. Nkolo azali na posa ya kosalela bilenge ya lelo na nzila ya kosalela basaleli lokola bino.

Dawidi asali ekobo, mpe apesi mobeko koboma mobali ya mwasi, kasi Nkolo atiki ye te. Atindeli ye mosakoli mpo na komonisa ye mabe na yempe koyebisa ye été kanda na Nzambe epeli likolo na ye.. Dawidi abongolaki motema ya solo, mpe amemi bato na masumu kobongwana na masumu na bang. Dawidi azwaki ngolu mpe bolimbisi ya Nkolo. Tanga Nzembo 51, batela yango na motema mpe bondela mpo na maloba wana kati na kondima, okozwa kati na yango elendiseli mpe bolimbisi, lokola Dawidi.

Nganga Nzambe Yisaya amonaki kembo ya Nzambe Mosantu mpe angangi: “Mawa na ngai! Nazali mobungi, mpo été nazali moto na bibebu ya mbindo, nafandi kati na libota oyo lolemo ezali na mbindo, mpe miso na ngai mamoni Mokonzi Nkolo ya mapinga. ” (Yisaya 6:5).

Alelaki mpo été pole ya Nkolo emonisaki ezaleli na ye mpo oyo ya bato na ye. Olingi kobelema na Nkolo mpo omona kembo na ye? Okososolo été lisumu na yo ekokabola yo na Mosantu. Boyebi été masumu na bino mazali kopekisa bino kobelema na Mozali mpe makoki kolongolama ? “Tozali kobondela yo, nzonga na bondeko na Nzambe” (2 Bakolinti 5:20)


Bongisa balabala ya Nkolo!

Oyo akolinga kosepelisa Nzambe asengeli abatela mibeko na ye. Ye nani akosalaka masumu na nko mpe azali kozanga kotosa mibeko ya Nzambe, asengeli koyambola masumu na ye mpe kosenga bolimbisi na Mokonzi uta na elaka na ye : “ Soki tokoyambola masumu na biso, azali sembo mpe moyengebeni mpo na kolimbisa biso, mpe kopetola biso na mabe nyoso” (1 Yoane 1:9). Oyo akokosa, asolola na Nzambe mpe ayambola epai na Nzambe lokuta na ye. Oyo akozwa epai na ye eloko oyo ezali na ye te, azongisa yango epai ya mokolo na yango mpe asenga bolimbisi. Oyo akomipesa na misala ya mbindo na motyo mosusu, ayambola mabe na ye, abongwana mpe atika kosala masumu. Oyo okonyokolo basusu, mpe baboti na ye, mwasi na ye na bana na ye, asenga bango bolimbisi mpe asunga bango kosala bongo.

Yoane mobatisi akokisi elaka monene ya Yisaya mosakoli tango azalaki kozongela emoneneli oyo azwaki: “Mongongo eyokani : Bobongisa na lisobe balabala na Nkolo,kati na esika pamba, bosembola balabala mpo na Nzambe na biso. Mabwaku nyoso makotondisama, nkeka mpe ngomba nyoso ikokitisama, bisika bingujami ikosembolama mpe bipai na mobulu ikobongisama alima. Mpe nkembo na Yawe ikomonisama, nyoso bazali na nzoto bakomona yango elongo, nzambi monoko na Yawe esili koloba.” (Esaïe 40:3-5; Luc 3:4-6)

Yoane mobatisi ateaki été moyengebene azali te. Tozali biso nyoso bato ya masumu mpe tosengeli topetolama mpe tobongwana mpe tokoma bato ya komikitisa. Oyo akosaka bato, atika mayele mabe wana, mpe atambola semba mpe abongisa mabe na ye.

Maloba oyo mazali komonisa mobeko na Yawa: “Okolinga Yawe, Nzambe na yo, na motema na, yo mobimba, na molimo na yo mobimba mpe na nguya na yo nyoso ” (Dutelonome 6:5), mpe “Okolinga molizalani na yo lokola yo ” (Lewitiko 19:18). Soki olingi kolinga Nzambe, batela mibeko na ye. Tuna na Yawe alakisa yo ndenge nini kobongisa nzila na ye mpo été aya epai na y oye moko.


Yawe azali kofungola nzila epai na yo

Mwana na Malia abotamaki na lolenge ya kokesana, mpo été %Molimo na Nzambe azalaki kati na ye. Klisto atindamaki awa na mokili kati na bato na mbindo mpe ya masumu.Amonisi bolingo na ye na nzila ya kobikisa babeli mpe na bokonzi ya Molimo akangoli bato ya milimo mabe. Ata bongo, ebele na bato na ye bayebaki te été tina ya lokumu na ye ezalaki na bolingo solo na ye.

Yawa na ngolu afungoli motema epai na banso bazali komeka komilengele kobongisa koya na ye. Tina na yango mwana na Malia alongoli lisumu ya mokili, amikabi na esika na biso, apetoli biso na masumu na biso nyoso mpe alongisi biso.Topesa ye matondi mpe tolinga ye mpo été afungweli biso ekuke ya lola.

Koya na Klisto awa na nse ezali nzila oyo lisolo ya mokili ebongwani.Nzambe ayei na mokili na biso mpo été mokili ebongwana epai na ye.Nzambe azali kolimbisa bato nyoso oyo bazali koyambola mpe kobongwana epai na ye. Oyo akpoyeba sekele oyo azali moto ya mayele mpe oyo akosalela akoyeba.


Nzambe azali koya epai na y oye moko

Klisto abimi na bomoi na lilita mpo été alongaki liwa, amati likolo mpe azali elongo na Nzambe Mosantu. Bayekoli na ye oyo alingaki bango bazangaki ye. Ayebaki bolembu na bango mpe leikia na bango. Mpo na yango, atindelaki bango Molimo Mosantu. Liboso amata likolo, Klisto alobi : “Nazali koloba na bino solo mpe solo : ezali litomba mpo na binpo été nakenda, mpo été soki nakei te, mosungi akoya epai na bino te ; kasi nazali nazali kokende, nazali kotindela bino ye.” (Yoane 16 :7). Nzambe azali koya epai na biso na nzila ya Molimo Mosantu, Mosungi na biso, oyo afandi kati na bayekoli na Yesu.

Osili kofungola motema na Molimo na Klisto? Alingi abongola yo, mpe atondisa yo na bolingo na ye mpo été kimia na ye, esengo na ye, piko na ye mpe bolamu na ye eumela kati na yo (Matai 11:29, Bagalatia 5:22-23). Yawe azali kobeta na ekuke na motema na yo. Okofungolela ye? Koyeisa molimo na yo makasi te, kasi bongisa balabala na Nkolo kati na yo.

“Telema ! Ngenga ! Nzambi pole na yo eyei, mpe nkembo na Yawe ebimi likolo na. Nzambi tala, molili ekozipa mokili, molili tuuu ekozipa mpe mabota ; nde Yawe akobimela yo, mpe nkembo na ye ekomonana likolo na yo. ” (Yisaya 60:1-2)


Nzambe azali kobelema epai na yo

Bolingo na Klisto ezali kokamba baye babongwani na molimo koyebisa Sango Malamu epai ya baninga na bango, bazalani na bango mpe kolpobela bango été Nzambe azali kozila bango.Kobongwana esika moko te, landa Klisto mpe luka baye bazali kobunga.

Soki oye ndenge ya kosalela Nkolo te, bondela mpe tuna lisungi na ye akolakisa yo ndenge nini okoki kokomela basusu, kokokisa misala malamu mpe kosunga bato ya mawa. Yawe akofungola monoko na yo tango akoyebisa epai na baye balingi koyoka bolingo mpe bo santu ya Nzambe. Nkolo akolendisa yo, akokamba yo mpe akobatela yo. Tika bomoi na yo na maboko na Klistio, okopambwama. Nkolo azali kolengela kokutana na yo.


Kanisa likolo ya mabombami ya koya na Klisto

Soki olongi koyeba mingi motindo Nkolo asimba mibali mpe basi, komela biso mpe biso tokotindela yo Sango Malamu na Klisto elongo na mikanda ya koyekola mpe mabondela oyo ekolendisa kondima na yo, bolingo mpe mpe elikia. Kobosana te kokoma polele esika ofandaka . tozali kozila mokanda na yo.

WATERS OF LIFE
P.O. BOX 60 05 13
70305 STUTTGART
GERMANY

Internet: www.waters-of-life.net
Internet: www.waters-of-life.org
e-mail: info@waters-of-life.net

www.Waters-of-Life.net

Page last modified on July 07, 2023, at 04:08 PM | powered by PmWiki (pmwiki-2.3.3)