Home
Links
Bible Versions
Contact
About us
Impressum
Site Map


WoL AUDIO
WoL CHILDREN


Bible Treasures
Doctrines of Bible
Key Bible Verses


Afrikaans
አማርኛ
عربي
Azərbaycanca
Bahasa Indones.
Basa Jawa
Basa Sunda
Baoulé
বাংলা
Български
Cebuano
Dagbani
Dan
Dioula
Deutsch
Ελληνικά
English
Ewe
Español
فارسی
Français
Gjuha shqipe
հայերեն
한국어
Hausa/هَوُسَا
עברית
हिन्दी
Igbo
ქართული
Kirundi
Kiswahili
Кыргызча
Lingála
മലയാളം
Mëranaw
မြန်မာဘာသာ
नेपाली
日本語
O‘zbek
Peul
Polski
Português
Русский
Srpski/Српски
Soomaaliga
தமிழ்
తెలుగు
ไทย
Tiếng Việt
Türkçe
Twi
Українська
اردو
Uyghur/ئۇيغۇرچه
Wolof
ייִדיש
Yorùbá
中文


ગુજરાતી
Latina
Magyar
Norsk

Home -- Lingala -- Tracts -- Tract 06 (Rejoice in the LORD Always!)
This page in: -- Armenian -- Baoule -- Burmese -- Chinese -- Dagbani? -- Dioula -- English -- French -- German? -- Greek -- Hausa -- Hebrew -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Japanese -- Korean? -- LINGALA -- Maranao -- Nepali? -- Peul? -- Somali -- Spanish -- Sundanese -- Telugu -- Thai -- Turkish? -- Twi -- Uzbek -- Yoruba

Previous Tract -- Next Tract

BA TRACTES - Nsango mikuse ya Biblia mpo na kokabolama

TRACTE 06 -- Bosepelaka tango nyoso kati na Nkolo! (Bafilipi 4:4)


Tango na tango, bilenge mpe ba nkolo bazali komeka koleka nguya na bango nzanga na kokanisi na makama ekoki kokwela bango wana, tango bazali kolekisa tango molai na mabima, mpe koluka kolonga na makambo ya mokili. Bazali koluka kotondisa nzala na milimo na bango na misala mpe nguya na bano moko.

Ba mosusu bazali koluka misolo mpo na komisepelisa mpe kozala malamu, bazali koluka kobosana makambo makambo na bango mpe kozala na bisengo mpe ki ndumba.Basusu bazali kolela mpo na kozanga bosembo. Bakani kobukanisa mpe bamikomisi ba sikolami na mboka.

Ndambo na bato babongwani epai ya Nzambe mpo na kotuna ye: “Nasala nini mpo nabikisama?” “Nini olingi nasala too nasala te?” Mawa na Nzambe ezali kolendisa mitema mibukani kotombola miso likolo koyamba lisiko ya solo kouta epai ya Mozalisi.

Motuya ya bato oyo bazali kozinda kati na kozanga elikia ezali komata. Bazali na tina te mpe elikia te awa na mokili. Ndenge nini bakozwa elikia? Biso nyoso tokokenda liboso ya etumba ya makasi, oyo ekoki koboma ndambo ya bafandi ya mokili mobimba?


Emoniseli ya kolendisa

Natongo oyo bitumba bizalaki makasi, Mosakoli Nehemia azwi emoneneli na Nkolo mpo na eyano na mabondeli na ye: “Komitungisa te, mpo été esengo na Nkolo ekozala nguya na yo.” (Nehemia 8:10)

Tofungola mitema na biso epai na Nkolo na bomoi mpo été ye moko akoki kopesa biso kopema mpe kimia mpe kozongisa elikia na biso.

Kolendisama boni mosakoli azwi na emoneneli oyo? Nkolo asosolisi ye été ye moko azalaki kati na esengo. Nkolo afandi lokola Boudha te koseka mpe kotiola pasi ya bato. Nzambe na biso apusami na posa malamu mpe esengo ya kobikisa. Abongisa nzela ya lobiko mpo na bato. Oyo ayebi nyoso ayebi été moto oyo asalaka malamu azali te, bato nyoso babebi, moto moko akoki komibikisa too kotondisa posa ya motema na ye na esengo mpe na kimia. Nkolo alingi. Nkolo asepeli kobongisa moto na masumu mpe kopesa ye lolenge mpe elikia na bomoi na bango. Esengo na Nkolo ezali nguya na bino! Oyo akobon gola motema akozwa epai na ye nguya, kobondisama mpe molende. Nkolo ye moko asunga-mpe bokonzi na ya molimo ezali na maboko na ye.


Mosikoli abotami

Likolo na ngomba ya Beteleme, pole ebimi na butu tango mwanze na Nkolo abimi kati na kembo epai ya babateli mpate. Bakwei na mabele na kobanga nyoso…Bakanisaki été mokolo ya kosambisama ekoki. Bayokaki somo mingi wana ezalaki bango kokanisa masumu na bango. Balingaki kokima esambiseli, kasi kembo na Nzambe elekaki liboso na bango.

Anzelu apamelaki bango te, kasi alendisaki bango: “Bobanga te ; mpo été nazali kopesa bino sango ya esengo, oyo ekozala mpo na bato nyoso sango ya esengo : lelo, na mboka ya Dawidi, Mobikisi abotameli bino, oyo azali Klisto, Mokonzi..” (Luka 2:8-11)

Na tango Mwanze abimelaki bango, Mwanze asakoli elaka ya sika, tango ya esengo mpe ya ngolu. Mwango ya Nzambe ya kobikisa mokili ekimi solo. Mwanze abiangi bango koya kozwa esengo ya tina mpe kimia oyo ezali kopunzwa kati na Nzambe. Nkolo apesi ngolu na ye bobele epai ya bato malamu mpe bayengene te, epai ya bato mabe mpe ya kanyaka. Mwanze abiangaki liboso bato ya mayele, bato oyo bayekola mingi te, too bakomeli te, kasi bato bazanga koyekola mpo été boyebi na Nzambe engengela bango. Bolamu oyo epesami bobele na mibali te, kasi na basi mpe na bana lokola, mpe baye balembi mpe bato na pasi. Esengo na Nkolo epesameli bango nyoso. Mpo na nini mwanze na Nkolo alobi na bango nyoso basepela ? mpo été Mosikolami abotami mpe mosala na mawa na ye abandaki.

Kasi mawa mpo été ebele na bato na bato na ye baboyi Mokonzi na kimia. Balingaki kobongwana te. Posa na bango ezalaki bokonzi, mbongo, mpe esika malamu kati na bato. Balingaki kosalela bibuneli na nzoto mpe ya kufa mpo na kolonga bayini na bango mpe bazwa elonga mpo na bokonzi na bango.


Likabo malamu na Klisto

Kasi, Klisto ayanganisi baye babongoli mitema mpe bato ya mawa oyo babongwanaki epai ya Nzambe. Abikisi babeli oyo bayaki epai na ye, alimbisaki masumu nyoso na bango, abengani milimo mabe, apekisi mopepe, akokisi posa ya baye bayokaki ye na posa mpe alobi na bango: “Nalobeli bino makambo oyo, mpo été esengo na ngai ezala na bino, mpe mpo été esengo na bino etondo.” (Yoane 15:11; 16:24)

Klisto andimi sekele ya bokonzi na ye na mabondeli tango alobi été balingami na ye bakoki kozwa esengo na ye (Yoane 17:13).

Mwana ya Malia apesi bolingo na ye epai ya bayekopli na ye mpe bayini mpe banguna na ye. Alongoli masumu na bango mpe mabe na bango, mpe azimisi mabe na bango. Nazila ya lisiko, Klisto azongisi bango na bondeko na Nzambe Mosantu; Klisto azali bokonzi ya kolimbisa masumu masumu ya baye bandimi lisiko na nzila na ngolu mpe kopesa bango elikia ya libela.

Sima na komata na elonga mpe lokumu na epai ya Nzambe, Mwana na Malia ayanoli na Molomo Mosantu likolo na moto nyoso (Misala 2:16-21). Ye oyo abongoli motema na masumu na ye mpe akangami na Klisto na nzila na kondima akoyamba Molimo ya Bolingo, ya esengo mpe ya kimia elongo na elikia mpe komibatela (Galatia 5:22-23). Kolamuka ebandi kati na bomoi ya ba klisto oyo bazali komitika kobongisama na Molimo na Nzambe. Banyokolami bakobondisama, baye bazanga elikia bakozwa elikia, bato mabe bakokoma bato ya sembo, baye bazali kobelema na liwa bakobika kati na nguya ya bompoi ya seko. Banda mokolo oyo Klisto azongisela biso bondeko na Nzambe, ngolu na ye ya kobika na pasi mpe ya kopetolama esopani ebele likolo ya bato kati na kimia.

Uta na koumela kati na miksala ya molimo , Ntoma Polo akomi boye: “Bosepelaka tango nyoso kati na Nkolo ; nazali koloba na bino été, bosepelaka” (Bapilipi 4:4).

Boloingo na Nzambe ezali koumela epai na ye oyo aumeli kati na bolingo na ye, ye oyo azali kotanga mpe kobatela maloba na ye. Klistgo alendisaki bayekoli na ye mpe alendisi bango na maloba oyo: “Bosepela mpo na oyo été nkombo na bino ikomami na likolo!” (Luka 10:20).

Ndeko motangi,
ozali koumela kobika yo moko, obungi to ozangi elikia? To ozali koumela kati na Nkolo Klisto? Ye oyo akangemi na Klisto Mwana na Malia akozala na nguya mpe esengo na ye. Bomikitisa kati na Klisto mpe esengo na ye ya libela ekoumela na mitema na bino kati na mokili oyo ya mabe ya komekama mpe bitumba.

Ozali kati na esengo ya Nkolo? Soki otuni biso, tokotindela yo sango malamu ya Klisto elongo na mateya ya koyekola mpo été oyeba kozwa tina ya nguya ya malamu ya Nzambe. Tanga Biblia mpe bondeleke mikolo nyoso, Nkolo akokamba yo na nzila ya bosembo na ye.
Kabola esengo ya nNkolo elongo na baninga na yo: soki mwa buku oyo esungi yo mpe osepeli kokabola yango na basusu baye elikia esila mpe baye babunga, tokotindela yo pamba. Bondela mpo.

Tozali kozila mokanda na yo. Kobosana kokoma polele esika ofandaka. Tozakobondela été esengo ya Nkolo eumela kati na yo.

WATERS OF LIFE
P.O. BOX 60 05 13
70305 STUTTGART
GERMANY

Internet: www.waters-of-life.net
Internet: www.waters-of-life.org
e-mail: info@waters-of-life.net

www.Waters-of-Life.net

Page last modified on July 07, 2023, at 04:25 PM | powered by PmWiki (pmwiki-2.3.3)