Waters of LifeBiblical Studies in Multiple Languages |
|
Home Bible Treasures Afrikaans |
This page in: -- Armenian -- Baoule -- Burmese -- Chinese -- Dagbani -- Dioula -- English -- French -- German? -- Greek -- Hausa -- Hebrew -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Japanese -- Korean -- LINGALA -- Maranao -- Nepali -- Peul -- Somali -- Spanish -- Sundanese -- Telugu -- Thai -- Turkish -- Twi -- Uzbek -- Yoruba
BA TRACTES - Nsango mikuse ya Biblia mpo na kokabolama
TRACTE 01 -- Oyebi YESU ?Ye nani akokanisa na makambo maleka, akoyeba été na bilanga bileka ezali bato bayebana babongola motindo ya kofanda na bato mpe ya mboka. Moko na bango ezali, mwana na Malia. Ebele ya bafandi na mokili bazali kolanda matea na Ye. Kombo Yesu ezali etangami mbala 975 kati na babuku 27 ya kondimana ya sika. Nzambe atinda mwanze Gabaliel epai ya ngondo Maria. Kati na liloto, mwanze na Nkolo abimela mpe Yosefe molingami na Maria. Alobela bango été mwana oyo na libumu ya Maria auti na Molimo Mosantu mpe bakobenga ye : Yesu, ye nde akobikisa libota na ye na masumu (Matai 1 :20-23 ; Luka 1 :31). Kombo wana euti na bato te, kasi eponami na mokano na Nzambe. Kati na kombo Yesu, mokano na Nzambe mpo na kosikola bato ezali, mwango oyo ebongisama liboso ya kozalisama ya mokili. Kombo na Yesu elimboli « Nkolo ya boyokani sunga mpe bikisa ». Nzambe abaloli makambo maleka na nzila na Yesu na Nazaleta. Mwana na Malia apesi matea ezanga tina epai ya bato te,asala mpe bikamwisi ya bomoto te, kasi na nzila na ye Nzambe alobi mpe asali (Yoane 5:19-21; 14:10-24). Tina na ye ya koya na mokili ezalaki nini ? Sekele ya bonene na nguya ezalaki nini?
Akangoli biso na lolendoYesu alobi : « boya epai na ngai, bino nyoso oyo bozali na mikumba mpe ,bolembi, mpe na kopesa bino kopema….boyekola na ngai, nzambi ngai nazali na bopolo mpe motema mosokemi, bokozwa kopema mpo na milimo na bino » (Matai 11 :28-29). Baye bazali na kaka ya kokamba bomoi na bango, baya epai na Yesu. Akokangola na lolendo ye oyo akoya epai na Ye mpe akopesa ye kopema. Yesu alobi : « Mwana na moto ayei mpo na kosungama te kasi mpo na kosunga mpe kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo n,a mingi ». Baye bazali kobila Yesu babikisami na motema munene mpe bazali ba mosusu na nguya mpe na esengo.
Akangoli biso na kanda ya NzambeKanda ya Bosantu ezali likolo na baye bazali kosala masumu. Kasi Yesu akokangola bandimi na esambiseli mokolo ya lisekwa (Yoane 3 : 18 ; 5 :24). Nkolo amonisi bososoli oyo epai ya mosakoli Isaya : «Solo akiumbi pasi na biso mpe amemi mawa na biso ;nde totangi été apesameli etum u été abetami na Nzambe mpe anyokolami, kasi azokisami mpo na masumu na biso, atutami mpo na mabe na biso ; etumbu oyo eyeiseli biso kimia etiami epai na ye, mpe mapipi na ye, biso tobikisami. » (Yisaya 53 :4-5). Liboso afufa, Yesu abondeli mpo na baini na ye: “Tata,limbisa bango, mpo été bayebi nini bazali kosala te” (Luka 23:34). Tozali na kondima été Nzambe ayanoli na libondeli wana.
Akangoli biso na masumuYesu alobi: “Yesu azongiseli bango monoko été, solo solo nalobi na bino été, moto na moto oyuo akosalaka masumu……Soki nde mwana akosikola bino, bokozala basikwi ya sola ” (Yoane 8:34, 36). Yesu azali kokangola bato na masumu baye bamipesi na Ye.Amemi masumu na bato mpe akufi na esika na biso. Kufa na Ye elongoli mabe na biso mpe Molimo Mosantu afandi kati na biso mpe azali kolendisa biso kolonga masumu. (Baloma 8:9-11). Mpo na yango, yue oyo akondima Yesu mpe kufa na Ye akozala molongi.
Azwi elonga likolo ya moyiniYesu azwi elonga likolo na satana, tango atelemeli ye na tango ya komekama. (Matai 4:1-11; Luc 4:1-13). Kati na mikakatano mpe komekama, Yesu azalaki tango nyoso komikitisa na Nzambe kino asali ata lisumu te. Satana alongi Yee te. Yesu abengani milimo mabe mpe abikisi baye bazalaki na milimo mabe. Apesi bokonzi yango na bayekoli na ye (Luka 9:1). Ye nani akoyamba lisekwa na Ye akokangwama na satana.
Alongi liwaYesu alobi na ye été : “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Ye oyo akondima ngai, ata asili kokufa, akobika. Ondimi yango ? ” (Yoane 11:25-26). Yesu asekwi na bakufi, amonani na nzoto mpe asololi na bayekoli na Ye, bayekoli basimbi Ye. Na lolenge yango, Yesu akoki kokangola bana na Ye na liwa mpe kopesa bango bomoi ya seko.
Azali kobikisa koyina mpe kotombokaYesu alobi na bato boye: “Bolinga bayini na bino, bopambola baye balakeli bino mabe, bosala malamu epai na baye bazali koina bino, bobondela mpo na baye bazali konyokola bino mpe koboma bino na tina été bozala bana na Tata na bino oyo azli na likolo.” (Matai 5:44-45; Luc 6:27-28). Azali moko oyo abotami na Molimo na Nzambe, alimbisi masumu nyoso ya bayekoli na Ye mpe ayebisi bango été balimbisa mpe baye bazali kosalela bango mabe. Tina ya kolimbisama na Yesu euti na bolingo monene na Ye. Yesu azali kokangola kati na koyina mpe kotomboka baye banso bazali kotosa Ye. Mwana na Malia aboyamaki, afingami, atiolami na libota na Ye moko. Ata bongo, Yesu apesi bango bolingo na Ye, kozongana na bondeko, lisiko na Ye, mpe bokasi na Ye. Baye bakotika mabe na bango mpe bakoya epai na Ye bakolimbisama mpe bakozwa bomoi ya seko. Ndeko motangi, Libondeli ya koyamba Yesu
Okolinga koyeba lisusu mingi mpo na Yesu, mwana na Maria?Tozali pene kotindela yo pamba, soki otuni ,Sango malamu na Yesu elongo na bilimbweli.
Kabola sango malamu na Yesu epai ya basusuSoki mwa mokanda oyo esungi yo mpe elendisi yo, kabola yango baninga mpe bandeko. Tokozala na esengo kotindela yo mosusu. Yebisela biso motuya osengeli na yango kokabola zanga na kopesa yo kaka. Kozanga kokoma esika ofandi te. Wana tozali kozila kozwa ba sango na yo, tozali kobondela Nzambe na bomoi apambola yo. WATERS OF LIFE Internet: www.waters-of-life.net |