Waters of LifeBiblical Studies in Multiple Languages |
|
|
Home Bible Treasures Afrikaans |
This page in: -- Afrikaans -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Azeri -- Bengali -- Bulgarian -- Cebuano -- Chinese -- English -- Ewe -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hebrew -- Hindi -- Igbo -- [Indonesian.BkNt06RoCh018 | Indonesian]] -- Javanese -- Kiswahili -- LINGALA -- Malayalam -- Polish -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Turkish -- Ukrainian -- Urdu? -- Yiddish -- Yoruba
Previous Lesson -- Next Lesson BALOMA - Mokonzi Azali Bosemnbo Na Biso
Boyekoli Ya Mokanda Ya Polo Epai Ya Baloma
ETENI YA 1 - Bosembo Ya Nzambe Esikoli Ba Sumuki Nionso Mpe Ezo Sikila Pe Kobulisa Bato Nionso Baye Bandimi Yesu Klisto (Baloma 1:18 - 8:39)
A - Mokili Mobimba Ezali Na Nse Ya Nguya Ya Mabe, Mpe Nzambe Asambaka Na Bosembi (Baloma 1:18 - 3:20)
2. Nkanda Ya Nzambe Emonisami Na Bayuda (Baloma 2:1-3:20)
b) Mobeko, To Lisosoli, Oyo Ezali Kokweisa Biso (Baloma 2:12-16)BALOMA 2:12-16 Lingomba ya Loma ezalaki na bituluku mibale: ya liboso ezalaki etuluku ya baklisto oyo bautaki na Bayuda, mpe ya mibale ezalaki etuluku ya bandimi oyo bautaki na mokili ya Grèce-Romain. Bato ya liboso bayebaki bilaka mpe mobeko, mpe babongisaki makambo na bango engebene na kondimana ya kala, nzokande baoyo ya nsuka bayebaki te ebongiseli moko ya bonzambe mpo na bomoi na bango, mpo ete batambolaki engebene na nguya ya Molimo ya Klisto. Polo andimisaki bakristu Bayuda ete Nzambe akosambisa bango engebene na Mibeko ya Kala, oyo ezali emoniseli ya bosantu na Ye. Bato ya losambo bakokaki kobikisama te bobele na koyokaka liloba ya Nzambe, mpe makanisi mpe mabondeli ya molimo ekokaki te, mpo ete Nzambe asengi kosalela mitindo na Ye mpe komonisa molimo ya liloba na Ye kati na biso, mpo ete bomoi na biso mobimba etondisama na yango. Moyuda nyonso oyo abuki mobeko na bonene ya nsuki moko, akosambisama mpo na kobuka mobeko wana mpo ete kobuka mobeko nyonso ezali bonguna na Nzambe. Soki totaleli ete Polo asimbaki solo oyo epai ya Bayuda, asosolaki ntembe ya baklisto ya bapakano, oyo balobaki ete: “Tozali na mobeko te, mpe toyebi Mibeko Zomi te, bongo ndenge nini Nzambe akoki kosambisa biso? Tozali na bonsomi na kosambisama.” Polo ayanolaki bango na bosembo nyonso ete bosembo ya Nzambe esimbami na makambo nyonso, atako ezali kokweisa baoyo bayebi mibeko te, oyo bayokaki liboso te na nzela ya Mikanda zomi, mpe bayebi bolingo mpe bosantu ya Nzambe te. Yango ezali bongo mpamba te Mozalisi atye na kati ya moto mokomoko lisosoli ya mayoki mpe ya bososoli oyo etalaka, ekebisaka, epamelaka, epesaka etumbu, epekisaka, eyokaka mawa mpe ekweisaka. Atako kolamuka oyo ntango mosusu etikalaka nyɛɛ, epelisaka lisusu mpe esalaka ete oyeba masumu na yo. Matata ekoki kobima na kati na yo, mpe okoki komeka kokanga lisosoli na yo monɔkɔ, kasi okoki ntango nyonso te kokanga monɔkɔ oyo etikali ebombami ya elilingi ya Nzambe kati na yo. Lisosoli na yo ezali kokweisa yo, mpe okoki kozwa bopemi kaka na ngolu ya Nzambe. Yango wana, ozali komona bato mingi bazali na mawa mpe bazali kopɛngwisa likebi mpo bazali na kimya te na lisosoli na bango. Bandimaka ngambo na bango te, atako lisosoli na bango ezali kofinga bango oyo ezali kolandela misala na bango. Opesaka Nzambe matondo mpo na lisosoli na yo, constitution morale oyo e gravé na kati na yo? Bongisa bansinga ya lisosoli na bino na Liloba ya Nzambe, mpe kotondisa yango na makanisi ya bolingo ya Nzambe, mpo ete ekoma ya sikisiki mpe ya kobangisa mingi, mpe etambwisa yo epai ya toli ya Nzambe. Na bongo, okomi moto oyo andimami, oyo azali na bisaleli mpo na mosala nyonso ya malamu. Na nsima, okokwea te na bosambisi ya nsuka, mpo ozali kobika na boyokani na mongongo ya Nzambe na motema na yo. Soki okɔti na mozindo te na Liloba ya Klisto, mpe omilongoli te na komilelalela ya lisosoli na yo, kasi ozali kotingama na motó makasi na yo na kopesaka bantina ya moto ye moko, lisosoli na yo ekotatola mpo na yo na mokolo ya nsuka, mpe ezali Nzambe nde azali kolongisa mpe kosambisa yo. Ezali na solution mosusu te mpo na mobulu na yo ya kati longola se kobalukela Nsango Elamu, oyo ezali kolakisa yo ete mosambisi na yo azali Mobikisi na yo Ye moko. Yaka epai ya Klisto, kozanga kozela to kokakatana, mpe okozwa bopemi mpo na yo moko. Oyebi ete nkombo ya mosambisi moko na bosambisi ya nsuka ya Nzambe ezali kaka "Klisto" te, kasi mpe "Yesu"? Bokeseni kati na bankombo oyo mibale ezali ete "Yesu" ezali nkombo ya moto ye moko, nzokande "Klisto" ezali ndimbola ya sikisiki ya mosala na ye. Yesu azali "Mopakolami," atondi na makabo mpe bizaleli ya Nzambe, azali na bokonzi nyonso, mpe motindami mpo na kokweisama mpe kosikolama. Na yango, ntoma akokaki koloba ete Nzambe akosambisa mokili na basekele na yango nyonso, engebene Nsango Malamu oyo Paulo asakolaki mpo na Yesu. Ezali na ntina mingi, ata soki ekosɛnga mbongo nini, koyeba Nsango Malamu ya Paulo oyo ezali na mokanda oyo atindelaki Baloma, mpamba te ezali moboko mpo na kosambisama ya nsuka. LOSAMBO: Nzambe mosantu, oyebi ngai koleka ndenge ngai moko nayebi; misala na ngai nyonso emonisami liboso na yo. Nayamboli mabe na ngai, mpe nasengi yo olakisa ngai masumu na ngai nyonso oyo ebombami, mpo nakoka komema yango na pole ya Mwana na yo liboso ya koya ya mokolo ya nsomo. Limbisa ngai soki natosi mongongo ya lisosoli na ngai mbala moko te, to soki nasili koleka mongongo na yo na nko. Pesa ngai mokano mpe makasi ya kokokisa mitindo ya bolingo na yo. MOTUNA:
|