Waters of LifeBiblical Studies in Multiple Languages |
|
|
Home Bible Treasures Afrikaans |
This page in: -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Bengali -- Burmese -- Cebuano -- Chinese -- Dioula -- English -- Ewe -- Farsi? -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Javanese -- Kiswahili -- Kyrgyz -- LINGALA - Malayalam -- Peul -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Thai -- Turkish -- Twi -- Urdu -- Uyghur? -- Uzbek -- Vietnamese -- Wolof -- Yiddish -- Yoruba
Previous Lesson -- Next Lesson YOANE - Pole Epeli Kati Na Molili
Koyekola Sango Malamu Na Yesu Oyo Yoane Akomi
ETENI YA 2 - Pole Engengi Kati Na Molili (Yoane 5:1 - 11:54)
A - Mobembo Ya Mibale Na Yelusaleme (Yoane 5:1-47) -- Kokola Na Bonguna Kati Na Yesu Bayuda
3. Klisto asekwisi bakufi mpe asambisaka mokili (Yoane 5:20-30)YOANE 5:25-26 Yesu alobi polele ete Ye azali Solo: “Ya solo, solo, nazali koloba na bino.” Akokisaki bisakweli ya koya na Ye na bosikisiki koleka bato ya Kondimana ya Kala bakanisaki. Asekwisa bakufi lelo pe lobi. Bango nyonso bakufi na masumu na bango mpe babebisi. Kasi Yesu azali Mosantu, Mwana ya Nzambe oyo akómaki mosuni, oyo na nzoto na ye alongaki masumu; mpo na kopesa biso likoki ya kosangana na bomoi na ye na nzela ya kondima. Ye oyo azali kosepela na nsango malamu ya lobiko, azali kososola yango, akangami na Yesu mpe azwi bomoi uta na Nzambe. Banda mokolo ya lisekwa, toyebi ete kondima na biso ezali kondima ya bomoi kasi lingomba ya liwa te. Yesu atindi Molimo ya bomoi na ye epai ya baoyo bayokaka ye mpe bazali na mposa ya kososola botondi ya maloba na ye, ata soki basimbaka makambo nyonso te. Kati na bango azali kokela mayoki ya solo, mpe kati na bango liloba ya likamwisi ekokisami. Bakufi bakoki kosekwa te to koyoka bango moko te, kasi Yesu apesi bango bomoi mpe na bongo bakoki kotya likebi na bango mobimba. Bomoi na biso ya mabele ezali na nsuka, kasi bomoi ya bonzambe oyo epesami na biso etikali libela. Lokola Yesu alobaki: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Ye oyo andimi ngai, atako akufi, akozala na bomoi; mpe moto nyonso oyo azali na bomoi mpe akondimela ngai akokufa soko moke te” (Yoane 11:25-26). Klisto akoki kopesa biso bomoi ya sika, mpamba te Tata apesi ye bomoi ya seko. Klisto azali lokola liziba oyo mai ya bomoi ezali kosopana ntango nyonso. Uta na ye tozwaka pole likolo ya pole, bolingo likolo ya bolingo, bosolo likolo ya bosolo. Euti na ye kobeba to molili to makanisi mabe eutaka te. Atondi na bolingo, lokola Paulo amonisi yango: Klisto azali na mawa mpe moninga azali na zuwa te, azali komikumisa na lolendo te; alukaka matomba na ye moko te mpe akanisaka mabe te; asepelaka te na kozanga bosembo. Alimbisaka makambo nyonso mpe ayikaka mpiko na makambo nyonso; bolingo na ye esilaka te. Yango epesami na biso na Molimo na ye. Tobongwana na maziba ya bomoi. YOANE 5:27-29 Moto ya mosuni akufi mpo na lisumu. Ye oyo alingaka Nzambe te, amikweisaka. Na bongo, maloba ya Klisto ezali na bolingo nguya mpe bulé. Oyo akoyoka ye akobika. Na tango yango, maloba na ye mpe ezaleli na ye bizali milongo ya kobikela mpo na lobiko. Nzambe apesa bokonzi ya kosambisa na maboko na ye, azali mosantu, amekami lokola biso kasi kasi asali lisumu te. Moto moko te akozwa maloba liboso ya kosamba bokonzi ya bonzambe. Klisto zali ye moko oyo azali na makoki ya kosambisa mokili mobimba. Azali na makoki ya kozwa mokano mpo na bomoi ya bato nyoso, na baanzelu mpe bikelamo nyoso bikumisa ye. Lisekwa ezali solo, na mobeko na Yesu. Ebiangeli na ye ekoleka kati na mokili mobimba ; bakufi bakoyokaka kobiangama te. Kasi mongongo ya Mwana na Nzambe ekolengengisa bakufi. Milimo millali mikolamuka na kunda na bango. Bikamwa na bikamwa, milimo mosusu ekozonga na bomoi, kasi misusu mikobeba. Lisekwa ezali mibale, moko mpo na bomoi, mpe mosusu ezali mpo na esambiseli. Tango wana ekomonisela biso makambo mingi mabombami : bamosusu bakokwea na mawa ya libela baye tokanisaki bazali kongenga lokola polé. Basusu nde bakongenga lokola moi, tango tozalaki kokanisa été ekozala pamba mpe na tina te ! Liboso ya Nzambe, bato malamu bakozala malamu koleka baye ya mabe te. Kasi basusu balimbisamaki na Klisto Yesu mpe bapesa ye matondi. Babiki na nguya ya Sango Malamu. Bomoi na bango eboti mbum aya Molimo Mosantu. Yesu azimisi mabunga na bango na nzila na makila motuya na ye. Ngolu wana eyeli bango na nzila ya kondima. Na tango yango, oyo akokanisa été misala na ye liboso ya Nzambe akomizila na etumbu oyo « Yo moto ya motema munene, mpo na nini omiyokaki mawa mpo na kokangwana na yo te, kozanga kotatola bolingo epai ya baini na yo ? Mpo na nini ondimaki kozongisa bondeko na Nzambe te oyo esalemi na nzila ya mokufi na ekulusu? Mpo na nini obwakisi bomoi na ye ya seko ? Lolendo na yo emeni yo kopona liwa, na bongo koba na bomoi bozanga ngolu oyo apesa yo » bakufi kati na masumu bakosekwa mpo na esambiseli oyo ezanga ngolu mpe bakoyoka maloba nyoso na bango, misala ya makanisi na bango. Kasi oyo abelemi na kembo na Klisto na nzila ya kondima atondisami bolingo na Klisto. Akosala na esengo, oyo ezali lolenge ya bomoi ya seko. YOANE 5:30 Klisto akokisaki misala oyo eleki monene; Azali Mosambisi ya seko. Klisto ayebaki bokonzi oyo bapesaki ye. Nzokande azalaki na komikitisa, kokende tii na koloba, “Nakoki kosala eloko moko te na ngai moko.” Elingi koloba, nakoki te kosambisa, to kokanisa, to kolinga, to kopema ngai moko. Apesaki lokumu na Tata. Yesu azalaki na boyokani na Tata ntango nyonso. Nsinga oyo ya alo alo ekatanaki ata mokolo moko te kati na bango mibale. Mongongo ya Nzambe eyebisaki ye makanisi ya moto yango. Molimo ya Nzambe atalaka mokili pe lisusu emekaka motema na yo, emonisaka makanisi na yo pe oyo obombaka na basusu. Molimo oyo kati na Klisto azali kosambisa bino na bosembo. Soki oyamboli masumu na yo epai ya Nzambe mpe ondimi bolimbisi ya Babakami na Ekulusu, wana opambolami. Nkombo na yo ekokomama na Buku ya Bomoi. Yesu akoloba na bayengebene: “Bóya, bino bapambolami na Tata na ngai, bózwa libula ya bokonzi oyo ebongisami mpo na bino uta ebandeli ya mokili” (Matai 25:34). Klisto Solo akosaka te; ayebi oyo ezali na kati na biso. Ayebi bizaleli oyo tozwaka epai ya bankoko na biso mpe asambisaka biso na lombangu te. Azelaka na motema molai ete mosumuki abongola motema. Ezaleli na ye ya bule ekokabola baoyo bakomi na mawa na baoyo baboyaki molimo na Ye mpe batikali na motó makasi na bango. Klisto amonisaki bopɔlɔ na ye mpe komikitisa na ye. Atyaki makambo nyonso epai ya Tata na ye. Bongo Klisto akokisaki mokano ya Tata na ye na maloba mpe na misala, ata na ekulusu. Na ngonga ya ekateli abondelaki ete: “Mokano na ngai te, kasi oyo ya yo, esalema.” Yango wana akopesa bikateli nyonso ya Nzambe. Bolimbisi ya boyokani oyo kati na Tata mpe Mwana oyo elobami na mosakoli ya nsango malamu ezali na mokano ya kofandisa biso na kondima na bomoko ya Bosato. Bokonzi ya kosekwisa bakufi ezali ya Tata mpe ya Mwana. Nzambe alakisi ye misala na ye nionso pe ezali na eloko moko te oyo amonisaki na Mwana te. Mongongo ya Klisto ekosekwisa bakufi; Asimbi bafungola ya lola mpe ya Lifelo. Kondima ezali libombami mpo na bato ya mayele; Ezali bobele ntango bolingo ya Klisto etondisi biso na elengi na yango nde tokososola bosembo ya kondima na Nzambe moko ya bosato mpo na lobiko na biso. MOTUNA:
|