Home
Links
Bible Versions
Contact
About us
Impressum
Site Map


WoL AUDIO
WoL CHILDREN


Bible Treasures
Doctrines of Bible
Key Bible Verses


Afrikaans
አማርኛ
عربي
Azərbaycanca
Bahasa Indones.
Basa Jawa
Basa Sunda
Baoulé
বাংলা
Български
Cebuano
Dagbani
Dan
Dioula
Deutsch
Ελληνικά
English
Ewe
Español
فارسی
Français
Gjuha shqipe
հայերեն
한국어
Hausa/هَوُسَا
עברית
हिन्दी
Igbo
ქართული
Kirundi
Kiswahili
Кыргызча
Lingála
മലയാളം
Mëranaw
မြန်မာဘာသာ
नेपाली
日本語
O‘zbek
Peul
Polski
Português
Русский
Srpski/Српски
Soomaaliga
தமிழ்
తెలుగు
ไทย
Tiếng Việt
Türkçe
Twi
Українська
اردو
Uyghur/ئۇيغۇرچه
Wolof
ייִדיש
Yorùbá
中文


ગુજરાતી
Latina
Magyar
Norsk

Home -- Lingala -- John - 022 (People lean towards Jesus; Need for a new birth)
This page in: -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Bengali -- Burmese -- Cebuano -- Chinese -- Dioula -- English -- Ewe -- Farsi? -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Javanese -- Kiswahili -- Kyrgyz -- LINGALA - Malayalam -- Peul -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Thai -- Turkish -- Twi -- Urdu -- Uyghur? -- Uzbek -- Vietnamese -- Wolof -- Yiddish -- Yoruba

Previous Lesson -- Next Lesson

YOANE - Pole Epeli Kati Na Molili
Koyekola Sango Malamu Na Yesu Oyo Yoane Akomi
ETENI YA 1 - Kongengela Ya Pole Ya Bomoi (Yoane 1:1 - 4:54)
C - Mobembo Ya Liboso Na Yesu Na Yesulame (Yoane 2:13 - 4:54) -- Lasambo Ya Solo Ezali Nini?
2. Yesu asololi na Nikodeme (Yoane 2:23 – 3:21)

a) Bato babalukaka epai ya Yesu (Yoane 2:23-25)


YOANE 2:23-25
23 Ntango Yesu azalaki na Yelusaleme na Elekeli, bato mingi bandimaki nkombo na ye, ntango bamonaki makamwisi oyo asalaki. 24 Kasi Yesu amipesaki na bango te, mpo ayebaki bango nyonso, 25 mpe mpo azalaki na mposa ya moto moko te mpo na kopesa litatoli. Mpo ye moko ayebaki nini ezalaki kati na moto.

Ebele ya bato bayanganaki na Yelusaleme mpo na eyenga ya Elekeli mpamba te ezalaki esika ya losambo. Bakanisaki Mwana-Mpate oyo abatelaki bankoko na bango na tango ya esambiselo ya Nzambe mpe bakabolaki misuni ya bambeka na ntango ya bilei. Yesu, Mwana-Mpate ya Nzambe, ayaki na Yelusaleme mpe asalaki bilembo mingi, komonisáká bolingo mpe nguya na ye. Na lolenge oyo, akomaki tina ya makanisi mpe kombo na ye ezalaki na tina ya mutu nyonso. Bamilelaki ete: “Oyo azali mosakoli, to Eliya mosakoli, to Masiya?” Bato mingi bakendaki epai na ye mpe bandimaki ete autaki epai ya Nzambe.

Yesu ayebaki makanisi ya mitema na bango, kasi aponaki ata moko te kati na bango mpo azala moyekoli na ye. Bazwaki naino bonzambe na ye te, kasi bakanisaki na maloba ya bato. Bazalaki na makanisi ya bonsomi ya Baloma, misala ya lokumu mpe kotalela bilaka. Yesu ayebaki moto nyonso, mitema nyonso. Moko te kati na bango alukaki Nzambe na motema moko. Soki balukaki Nzambe na motema sembo, balingaki kosenga libatisi na Yaladane, koyambola masumu na bango mpe kobongola mitema.

Klisto ayebi motema na yo, makanisi na yo, mabondeli na yo, mpe masumu na yo. Ayebi makanisi na yo mpe esika euti. Ezali kokokisa oyo ozali na mposa na yango mpo na bomoi ya bonkonde mpe ya bosembo. Ntango nini okotika lolendo na yo obongwana? Ntango nini okobaluka uta na komipesa motuya kino kotondisama na Molimo Mosantu?


b) Bosenga ya kobotama ya sika (Yoane 3:1-13)


YOANE 3:1-3
1 Nzokande ezalaki na moto moko na kati ya Bafalisai, nkombo na ye Nikodeme, mokonzi ya Bayuda: 2 Ye ayaki epai ya Yesu na butu mpe alobaki na ye ete: “Molakisi, toyebi ete ozali molakisi oyo autaki epai ya Nzambe. mpo moto moko te akoki kosala makamwisi oyo bino bosalaka, longola se soki Nzambe azali elongo na ye. 3 Yezu azongiseli ye: "Ya solo, solo, nalobi na yo: Soki moto abotami lisusu te, akoki komona Bokonzi ya Nzambe te."

Moto moko na nkombo Nikodeme abimaki na kati ya ebele ya bato; Azalaki mpenza na losambo mpe moto ya lokumu. Moko ya bato 70 ya Basambisi minenen ya Tempelo. Ayebaki nguya ya Nzambe oyo azali kosala kati na Klisto. Mbala mosusu alingaki kotia boyoka kati na Yesu mpe lisanga na Bayuda. Na ntango yango moko azalaki kobanga nganga-nzambe mpe bato. Azalaki na ntembe te mpo na bomoto ya Yesu. Ayaki epai na ye na butu, alingaki komeka Yesu liboso ya kondimela yee.

Na kopesaka ye komba "Laboni," Nikodeme amonisaki likanisi ya bato mingi, oyo etalelaki Klisto lokola moto oyo ateyaki Makomami elongo na ebele ya bayekoli. Ayebaki ete Yesu atindamaki epai ya Nzambe, andimisamaki na bilembo. Ayambolaki ete: “Tondimi ete Nzambe azali elongo na bino mpe azali kopesa bino mabɔkɔ. Ekoki kozala ete yo nde Masiya.” Oyo ezalaki mingi lokola boyebi sima ya kososola.

Yesu ayanolaki na mituna na ye, kozanga kotia motema mobimba wana motindami ya bakambi ya Tempelo mpe Klisto. Amonaki motema ya Nikodeme oyo ebungaki, masumu na ye mpe mposa na ye ya boyengebene. Akokaki kosalisa ye bobele nsima ya komonisa bokufi miso na ye ya molimo. Atako azalaki kosambela Nzambe, Nikodeme ayebaki mpenza Nzambe te. Yesu alobaki na ye polele ete, “Ezali solo ete moto moko te akoki koyeba Nzambe na nguya na ye moko. Azali na mposa ya kobotama lisusu ya Molimo ya likoló.”

Klisto apesaki makanisi na ye mpo na koyekola makambo ya Nzambe mpe mateya ya mibeko. Mpo été boyebi ya Nzambe euti na kotangi ya mayele te, kasi uta na mbotama ya sika. Na radio, na bokeseni na televizio, okoki kobalola ba boutons ndenge olingi, okozwa fɔtɔ́ ata mokolo moko te. Mpo na komona bililingi yango, osengeli na esika oyo basalaka oyo ekeseni mpenza na radio. Ezali mpe bongo mpo na moto ya bozalisi, atako azali na ezaleli ya kobanga Nzambe mpe misala na ye, akoki komona Nzambe te, ezala na makanisi to na mayoki. Bososoli oyo ya molimo esengi mbongwana, kobotama na lola mpe ekelamu ya sika.

YOANE 3:4-5
4 Nikodeme alobi na ye: "Ndenge nini moto akoki kobotama ntango akómi mobange? Akoki kokota na libumu ya mama na ye mpe kobotama? 5 Yezu ayanolaki: "Ya solo, solo, nalobi na yo: Soki moto abotami na mai pe na Molimo te, akoki kokota na Bokonzi na Nzambe te."

Eyano ya Klisto, oyo emonisaki ete Nikodeme ayebaki Nzambe te, etungisaki ye. Ayokaki te nsango ya kobotama ya mibale. Moto akoki kozonga na libumu ya mama na ye? Eyano oyo etongami na mayele elakisi bokufi miso. Asosolaki te ete Nzambe Tata akoki kobota bana na nzela ya Molimo na ye.

Yesu alingaki Nikodeme. Nsima ya kokamba ye na koyambola ete ayebaki nzela ya Bokonzi ya Nzambe te, asimbaki likambo yango na kosakolaka ete azali Solo. Tosengeli kondima ete tokoki te kokota na Bokonzi kozanga kobotama ya mibale, yango nde ezalela bobele moko.

Mbotama ya mibale ezali nini? Ezali kobotama, kasi kaka likanisi moko te; ebimaka na molende ya bato te, lokola moto moko te akoki kobota ye moko. Nzambe akomi moboti mpe mopesi ya bomoi. Mbotama oyo ya molimo ezali ngolu, kaka te mbongwana ya bizaleli, to mpe botosi ya bomoi ya bato. Bango nyonso bazali mabe banda bomwana, mpe bazali na elikia te ya kobongisa makambo. Mbotama ya molimo ezali bokoti ya bomoi ya Nzambe na kati ya moto.

Ndenge nini likambo yango esalemaka? Yesu ayebisaki Nikodeme ete kobotama yango esalemaka na mai mpe na Molimo. Mai yango ezali na boyokani na batisimo ya Yoane mpe bambɛki ya kopɛtolama na libala. Bandimi ya kondimana ya Kala bayebaki ete mai ya mbeki ezalaki komonisa elembo ya kopetola na masumu. Lokola nde Yesu azali koloba ete, “Mpo na nini ozali kokita epai ya Yoane Mobatisi te mpe koyambola masumu na yo mpe kobatisama?” Esika mosusu Yesu alobi, “Soki moto alingi koya nsima na Ngai, amiboya ye mpenza, mpe amema ekulusu na ye, mpe alanda Ngai” (Matié 16:24). Ndeko, yambola mabunga na yo, ndima etumbu ya Nzambe na oyo etali masumu na yo. Ozali kobeba mpe kokufa.

Yesu abatisaki kaka na mayi te, kasi abatisi na Molimo Mosantu oyo ayamboli mpo na kozalisa bomoi ya sika na motema wana oyo ebukani. Nsima ya kobaka ye na ekulusu, toyekoli ete kopetola lisosoli na biso ezali na nzela ya makila na ye. Bopetoli oyo ekokisami na nzela ya mosala ya Molimo Mosantu. Soki moto abendami na Molimo, atondisami na bomoi ya seko mpe na mbuma na yango; akomi moto malamu oyo atambwisami na Yesu. Bobongwani oyo, mbotama oyo ya mibale, ezuaka tango na motema ya mondimi, kaka lokola mwana oyo azali na libumu oyo ekolaka na libumu ya mama na ye yambo ya kobotama.

Yesu atiaki yango mokano ya kosakola na ye, motó ya likambo ya Bokonzi ya Nzambe. Bongo Bokonzi oyo ezali nini? Makambo ya politique te, to mibeko ya bozwi tee, kasi boyokani ya mwana oyo abotami sika na Tata. Mwana na Molimo Mosantu. Molimo oyo apambolami eyei likolo na ye na ngonga oyo amitiki epai ya Klisto mpe ayebi Ye lokola Mokonzi oyo azali na nyongo ya botosi.

LOSAMBO: Nkolo Yesu, merci mpo na mbotama na ngai ya sika oyo nazali na nyongo ya ngolu na yo kaka. Ofungolaki ngai miso ya molimo. Tika natikala na bolingo na yo. Fungola miso ya baoyo bazali koluka yo na motema moko, mpo ete báyeba masumu na bango mpe báyambola mpo bázongisama sika na nguya ya Molimo Mosantu na yo; mpo bátya motema na makila na yo oyo esopani mpo bákɔta na boyokani ya seko elongo na yo.

MOTUNA:

  1. Bokeseni nini ezali kati na ezaleli ya kobanga Nzambe ya Nikodeme mpe mikano ya Klisto?

www.Waters-of-Life.net

Page last modified on December 10, 2025, at 12:50 PM | powered by PmWiki (pmwiki-2.3.3)