Waters of LifeBiblical Studies in Multiple Languages |
|
|
Home Bible Treasures Afrikaans |
This page in: -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Bengali -- Burmese -- Cebuano -- Chinese -- Dioula -- English -- Ewe -- Farsi? -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Javanese -- Kiswahili -- Kyrgyz -- LINGALA - Malayalam -- Peul -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Thai -- Turkish -- Twi -- Urdu -- Uyghur? -- Uzbek -- Vietnamese -- Wolof -- Yiddish -- Yoruba
Previous Lesson -- Next Lesson YOANE - Pole Epeli Kati Na Molili
Koyekola Sango Malamu Na Yesu Oyo Yoane Akomi
ETENI YA 1 - Kongengela Ya Pole Ya Bomoi (Yoane 1:1 - 4:54)
C - Mobembo Ya Liboso Na Yesu Na Yesulame (Yoane 2:13 - 4:54) -- Lasambo Ya Solo Ezali Nini?
1. Kopetola Tempelo (Yoane 2:13-22)YOANE 2:13-17 Yesu akendaki na Yelusaleme na tango ya eyenga monene Elekeli, elongo na ebele Bayuda oyo bautaki na mokili mobimba. Bayaki kopesa mbeka ya bana ya mpate oyo ezalaki mbeka ya kokanisa mokolo oyo Nzambe abatelaki bankɔkɔ na bango na nkanda na ye na nzela ya Mwana-Mpate ya Pasika. Soki makila esopani te bolimbisi ya masumu ekozala te. Mpe soki boyokani na Nzambe ezali te, losambo ekozala na tina te. Na yango, Yesu alongolaki to asukolaki masumu na bango na Yaladene na motindo ya ndenge ya elilingi. Na esika na bango, andimaki batisimo ya liwa, elembo oyo emonisi ete azalaki konyokwama na nkanda ya Nzambe. Ayebaki na motema na ye ete azalaki Mwana-Mpate oyo Nzambe aponaki. Ntango akɔtaki na engumba mpe ayaki na Tempelo, asepelaki na nkembo ya ndako yango te. Kasi akanisaki lobiko ya bato na nzela ya mbeka na ye. Likambo ya kokamwa, amonaki kimya te kati na Tempelo oyo ekolamusa losambo. Nzokande, oyo amonaki kuna ezalaki bosoto mpe makɛlɛlɛ, kolela ya bangɔmbɛ, koswana ya bato ya mombongo mpe makila ya banyama. Ayokaki mpe makelele ya bato oyo bazalaki kosombitinia mbongo ya bapaya na mbongo ya Bayuda, kopesaka nzela na bato ya mobembo báfuta mbongo oyo basengelaki kofuta. Makɛlɛlɛ wana nyonso epesaki likanisi ete bosembo ekoki kosombama na mbongo mpe molende ya moto. Bato ya mobembo bakanisaki ete ngolu mpe bosembo esombamaki na nzela ya milulu mpe makabo, kozangaka kotala ete lobiko ezwamaka na nzela ya misala malamu te. Lokola Yesu akutanaki na likambo yango, amonisaki nkanda na ye ya sembo. Molende na ye mpo na losambo ya solo etindaki ye abwaka mbongo ya batekisi ya bangɔmbɛ na mabele. Balobaki te ete abɛtaki moto moko, kasi alobelaki maloba oyo Nzambe akopesa etumbu na baoyo bakofukama te liboso ya nkembo na ye. Bolingo ya Nzambe moko te na mabele esepelisaka Nzambe longola se oyo ya mitema ebukani oyo etosaka Mosantu. Yesu ayokaki mawa mpo bato bazalaki komitungisa te mpo na bosantu ya Nzambe. Kozanga likebi mpe kozanga boyebi motindo wana oyo etalelami na lingomba ya likolólikoló ezali komonisa molili oyo ezipaka mitema mpe makanisi, ata soki Mibeko mipesamaki mbula 1300 liboso. Na nsima, Yesu amonisaki nkanda ya bonzambe mpe molende mosantu mpo na kopɛtola esika wana ya losambo. Esika yango emonisaki ezalela ya mobimba. Oyo esengelaki ezalaki mbongwana na motema ya mangomba, mbongwana monene na ezaleli ya moto epai ya Nzambe. YOANE 2:18-22 Ntango kaka banganga-nzambe bayokaki nsango ya kopɛtola Tempelo mpe kolela ya bato ya mombongo, bakendaki mbangu epai ya Yesu mpe batunaki: “Nani apesi yo bokonzi ya kosala likambo ya ndenge wana? Nani atindaki yo? Bokonzi na yo euti na nani ?” Baboyaki te ete bápɛtola Tempelo; bayokaki ete Yesu azalaki kosala na nkanda lokola moto te, kasi na nzila ya Molimo Mosantu mpo na kokumisa ndako ya Nzambe. Mpo na kozongisa Molimo ya losambo na kati na bato; Ebele balingaki koyeba tina oyo etindaki ye kosala bongo. Yesu akómaki monguna na bango mpamba te alukaki kobongisa Tempelo kozanga ete asalela ebongiseli na bango ya banganga-nzambe. Yesu apamelaki bango mpo na losambo na bango ya bokosi, mpamba te bazalaki kolinga kilikili ya basambeli mingi mpe nguya ya bozwi na esika ya kimia na miso ya Nzambe. Na kozelaka, Yesu amonaki ete Tempelo ekobebisama lokola mbuma ya losambo na bango ya likolólikoló mpe kozanga boyebi. Milulu ya losambo oyo ebongisami mpe milulu ya liboso ezalaki kobikisa bato te, kasi ezali kobongola motema mpe bosolo ya kobikisa ya Nzambe nde ebongwanaka. Mobikisi oyo akómaki moto atɛlɛmaki na katikati na bango. Yesu azali tempelo ya solo. Nzambe azalaki kati na Klisto, azalaki na tempelo. Na maloba mosusu, Yesu azalaki koloba ete, “Bóbebisa tempelo ya nzoto na ngai, mpo ete bokoki koyika mpiko te na molende na ngai mpo na Nzambe. Okosala oyo ekoki kosalema te mpe okobuka tempelo oyo, kasi nakosekwisa nzoto oyo sima ya mikolo misato nakosekwa. Bokoboma ngai, kasi nazali na bomoyi, mpo nazali bomoi, Nzambe na lolenge ya mosuni. Bokoki koboma ngai te." Yesu asakolaki lisekwa na ye na ndenge ya polele. Lisekwa yango ezali makamwisi oyo eleki monene kino lelo. Na kati ya ebele ya bato; Mingimingi balingaki koyeba ba nani bantindaki ye. Yesu akómaki monguna na bango mpamba te alukaki kobongisa Tempelo kozanga na motindo ya kosalela banganga-Nzambe. Batindami ya Banganga-Nzambe bazwaki tina ya lisese oyo Yesu alobaki na Tempelo. Batalaki bozwi ya biloko ya mokili lokola wolo. Balobaki na mitema na bango ete Yesu azalaki kofinga ndako Nzambe, oyo etongamaki na Elode. Bazalaki kolobela mabanga, alobelaki nzoto na ye. Masolo yango, oyo ezali na ntina mingi na ebandeli ya mosala na ye, ekobima lisusu na ntango ya kosambisa ye liboso ya Banganga, na lisungi ya batatoli ya lokuta. Bato ya Kondimana ya Kala basimbaki mpenza te ndimbola ya bondimi ya sika oyo etiamaki na Klisto. Ata bayekoli basosolaki ndimbola mozindo ya lingomba wana ya sika te, ata moke te kino liwa mpe lisekwa ya Yesu. Bobele na ntango wana nde basosolaki lolenge nini Mwana amikundoli masumu mpe asekwi. Lelo azali elongo na biso na Tempelo ya molimo oyo tozali mabanga na yango ya bomoi. Molimo Mosantu apemelaki bayekoli oyo bazwaki ndimbola na makomi ya kala, kososolo liloba ya Yesu. Batelemaki ngwi na bondimi mpe elongo bakomaki Tempelo ya Mosantu Moko ya Nzambe. LOSAMBO: Nkolo Yesu, ozali esika na Nzambe mpe esika ya bokutani ya Nzambe na basumuki. Salisa biso toyambolaka mpe tosambela. Totondisa biso na bo-Nzambe na yo, mpo ete tokoka kozala elongo na Tempelo ya Molimo Mosantu mpe kokumisa Tata tango nyoso. MOTUNA:
|