Home
Links
Bible Versions
Contact
About us
Impressum
Site Map


WoL AUDIO
WoL CHILDREN


Bible Treasures
Doctrines of Bible
Key Bible Verses


Afrikaans
አማርኛ
عربي
Azərbaycanca
Bahasa Indones.
Basa Jawa
Basa Sunda
Baoulé
বাংলা
Български
Cebuano
Dagbani
Dan
Dioula
Deutsch
Ελληνικά
English
Ewe
Español
فارسی
Français
Gjuha shqipe
հայերեն
한국어
Hausa/هَوُسَا
עברית
हिन्दी
Igbo
ქართული
Kirundi
Kiswahili
Кыргызча
Lingála
മലയാളം
Mëranaw
မြန်မာဘာသာ
नेपाली
日本語
O‘zbek
Peul
Polski
Português
Русский
Srpski/Српски
Soomaaliga
தமிழ்
తెలుగు
ไทย
Tiếng Việt
Türkçe
Twi
Українська
اردو
Uyghur/ئۇيغۇرچه
Wolof
ייִדיש
Yorùbá
中文


ગુજરાતી
Latina
Magyar
Norsk

Home -- Lingala -- Romans - 024 (The Revelation of the Righteousness of God)
This page in: -- Afrikaans -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Azeri -- Bengali -- Bulgarian -- Cebuano -- Chinese -- English -- Ewe -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hebrew -- Hindi -- Igbo -- [Indonesian.BkNt06RoCh024 | Indonesian]] -- Javanese -- Kiswahili -- LINGALA -- Malayalam -- Polish -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Turkish -- Ukrainian -- Urdu? -- Yiddish -- Yoruba

Previous Lesson -- Next Lesson

BALOMA - Mokonzi Azali Bosemnbo Na Biso
Boyekoli Ya Mokanda Ya Polo Epai Ya Baloma
ETENI YA 1 - Bosembo Ya Nzambe Esikoli Ba Sumuki Nionso Mpe Ezo Sikila Pe Kobulisa Bato Nionso Baye Bandimi Yesu Klisto (Baloma 1:18 - 8:39)
B - Bosembe Ya Sika Na Nzela Ya Kondima Efungwami Mpo Na Bato Nionso (Baloma 3:21 - 4:22)

1. Bomonisami ya boyengebene ya Nzambe na nzela ya liwa ya bomikabi ya Yesu Klisto (Baloma 3:21-26)


BALOMA 3:25-26
25 Nzambe apesaki ye lokola mbeka ya bomikabi, na nzela ya kondima na makila na ye. Asalaki bongo mpo na kolakisa boyengebene na ye, mpamba te na motema molai na ye atikaki masumu oyo asalaki liboso kozanga etumbu. 26 Asalaki bongo mpo na komonisa boyengebene na ye na ntango oyo, mpo azala sembo mpe moto oyo azali kolongisa bato oyo bazali na kondima epai na Yesu.

Bato bazalaki kaka bango moko te oyo babaka Yesu na ekulusu, kasi Nzambe alingaki mokili na biso mabe mpenza na boye ete atyaki Mwana na ye se moko na mabɔkɔ ya basumuki, ayebaki ete bakoboma ye. Nzambe, na boyebi na ye ya bonzambe, akanaki ete liwa ya Mosantu ezala mbeka mpe bomikabi mpo na basumuki banso ya ntango nyonso. Ya solo, makila ya Klisto epɛtolaka biso na kozanga boyengebene nyonso. Bosikoli ezali te longola se na makila ya Mwana ya Nzambe oyo asali eloko te. Eleko na biso ya tekiniki ekangaki biso miso na bokonzi ya solo na lisolo ya mokili, oyo ezali nkanda ya Nzambe mpe bokweyisami na Ye, koleka na ntina mpe nguya ba avions nionso, ba sous-marins, ba chars, mpe ba bombe mopepe. Lisumu nyonso oyo tosalaka ebongi kozongisa mabe mpe lisiko, mpamba te tozali mpenza na etumbu ya liwa. Mbeka mosusu ya Klisto ezali nzela se moko mpo na lobiko na biso.

Mpo na ntina oyo, Mwana ya Nzambe akómaki moto mpo atumbama na etumbelo ya Ekulusu na milinga ya nkanda ya Nzambe. Oyo azali kopusana penepene na Ye na kondima, akolongama. Bamilio ya bato basili komona ete nguya nyonso ya Nzambe ezali komonana na makila ya Klisto oyo esopamaki. Yango wana, tobengisi yo ndeko, otikala mosika na ekulusu te, kasi omitia, libota na yo, mosala na yo, avenir na yo, mpe lingomba na yo mobimba na nse ya kosopa makila ya Mwana-Mpate ya Nzambe. Na bongo, balingami, bokotikala sembo, bosantisami, mpe bokobatelama kati na bosolo ya Nzambe libela. Libateli ezali te na komilelalela ya Satana mpe na ba coups ya kanda ya Nzambe longola se na makila ya Yesu Klisto.

Yekola bavɛrsɛ 21 tii 28 na motó, mpe tángá yango liloba na liloba na likebi, koluka ndimbola na yango na motema na yo. Na nsima, okomona ete oyo ezali na ntina na liteya oyo ezali te kolongisama ya mosumuki kasi nde komonisa bosembo ya Nzambe, oyo Paulo azali konyata mbala misato kaka na mokapo oyo.

Nzambe, na bolingo mpe na motema mawa, abebisaki bato ya ngambo te na kala, lokola mobeko esengaki, kasi alimbisaki masumu ya bato banso. Mpe Atalaki bango te na bolingo mpe motema molai na Ye, kino ntango oyo ezelamaki na bozalisi nyonso ekomaki. Oyo ezali tango ya boyokani ya mokili na Nzambe, na nzela ya liwa ya Klisto na ekulusu. Na ngonga wana, ba anzelu banso basepelaki, pamba té na lisekwa ya Klisto oyo babakamaki na ekulusu, bolongisami ya basumuki ekokisamaki.

Oyo alobi ete Nzambe azali na makoki ya kolimbisa na bolingi na ye moko moto nyonso oyo alingi mpe esika nyonso oyo alingi azali kozanga boyebi, mpe kozanga boyebi na Ye emonisami na bozindo ya mayele na ye ya bomoto, mpo Nzambe azali mpenza na bonsomi te, kasi amitia ndelo mpo na Ye moko na nzela ya maloba mpe ndimbola ya bosantu na Ye. Yango wana azali na mokumba ya koboma mosumuki nyonso, lokola amonisaki ete soki makila esopani te bolimbisi ezali te. Soki mbeka ya Klisto ezalaki te, Nzambe alingaki kozala na ngambo soki alimbisaki na bolingi na Ye moko kozanga kokokisa masengami ya bosembo.

Kasi sikawa, makambo mibale ekokisami na ekulusu ya Klisto: Nzambe abimisi bosembo na Ye, oyo esalaka kofinga te, mpe alongisaki biso mobimba na ntango moko. Mosantu azali injuste te soki alimbisi biso, po Yesu akokisaki ba conditions nionso ya justice. Yesu ya Nazalete azalaki na bomoi kozanga lisumu, mosantu mpe na komikitisa, mpe azalaki na makoki, lokola moto moko ya kokamwa kati na bikelamu, ya komema kilo ya lisumu ya mokili na nzela ya bonene ya bolingo na ye. Tofukama liboso ya Yesu mpe tolinga ye mpe tokumisa Tata na ye, oyo aponaki kokufa na esika ya kokufa mpo na Mwana na ye ya bolingo, kasi mpo na bolamu ya molongo mpe ntina ya bosambisi likolo ya oyo babakamaki na ekulusu, akokaki kokufa mpo na biso te.

Yesu alobaki na Nzambe na losambo na ye ya bonganga-nzambe na Yoane 17, alobaki ete: “Tata Mosantu.” Na maloba oyo mibale, okokuta ndimbola ya mozindo ya kolongisama ya Nzambe. Sikawa, Mozalisi atondi na bolingo mpe bosolo, mpe bolingo ya kozanga bosembo ezali te kati na Ye; kasi, Atongaka mawa na Ye likolo ya bosembo. Na liwa ya Klisto, masengi nyonso ya bizaleli ya Nzambe esanganaki. Tobengi bolingo oyo, oyo ezali na ndelo te mpe etongami likolo ya lotomo ya malamu, "ngolu," mpo ete epesaka biso bolongisami na bonsomi, kaka lokola Nzambe atikali sembo, atako alingi mpe alimbisaka biso.

LOSAMBO: Bosato esantu, Tata, Mwana, mpe Molimo Mosantu, tofukami liboso na yo, mpo bolingo na yo eleki bososoli nyonso, mpe bosantu na yo ezali mozindo koleka mbu. Osikoli biso na lisumu mpe na liwa mpe na nguya ya Satana, na palata to na wolo te, kasi na nzela ya bampasi ya bololo ya Klisto mpe liwa na Ye na ekulusu ya elakeli mabe. Makila na ye ya motuya epɛtoli biso na masumu na biso nyonso, mpe tokómi bayengebene mpe basantu na Ye na ngolu. Tokumisi mbeka ya Yesu, mpe topesaka bomoi na biso na botondi mpo na bosikoli na Yo mpe bolongisami na biso.

MOTUNA:

  1. Ndimbola ya maloba "komonisa bosembo ya Nzambe" ezali nini?

Mpo bato nyonso basali masumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe,
mpe balongisami na boboto na ye na nzela ya bosikoli oyo eyaki na nzela ya Klisto Yesu.

(Baloma 3:23-24)

www.Waters-of-Life.net

Page last modified on October 15, 2026, at 10:13 AM | powered by PmWiki (pmwiki-2.3.3)