Home
Links
Bible Versions
Contact
About us
Impressum
Site Map


WoL AUDIO
WoL CHILDREN


Bible Treasures
Doctrines of Bible
Key Bible Verses


Afrikaans
አማርኛ
عربي
Azərbaycanca
Bahasa Indones.
Basa Jawa
Basa Sunda
Baoulé
বাংলা
Български
Cebuano
Dagbani
Dan
Dioula
Deutsch
Ελληνικά
English
Ewe
Español
فارسی
Français
Gjuha shqipe
հայերեն
한국어
Hausa/هَوُسَا
עברית
हिन्दी
Igbo
ქართული
Kirundi
Kiswahili
Кыргызча
Lingála
മലയാളം
Mëranaw
မြန်မာဘာသာ
नेपाली
日本語
O‘zbek
Peul
Polski
Português
Русский
Srpski/Српски
Soomaaliga
தமிழ்
తెలుగు
ไทย
Tiếng Việt
Türkçe
Twi
Українська
اردو
Uyghur/ئۇيغۇرچه
Wolof
ייִדיש
Yorùbá
中文


ગુજરાતી
Latina
Magyar
Norsk

Home -- Lingala -- Romans - 013 (The Wrath of God against the Nations)
This page in: -- Afrikaans -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Azeri -- Bengali -- Bulgarian -- Cebuano -- Chinese -- English -- Ewe -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hebrew -- Hindi -- Igbo -- [Indonesian.BkNt06RoCh013 | Indonesian]] -- Javanese -- Kiswahili -- LINGALA -- Malayalam -- Polish -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Turkish -- Ukrainian -- Urdu? -- Yiddish -- Yoruba

Previous Lesson -- Next Lesson

BALOMA - Mokonzi Azali Bosemnbo Na Biso
Boyekoli Ya Mokanda Ya Polo Epai Ya Baloma
ETENI YA 1 - Bosembo Ya Nzambe Esikoli Ba Sumuki Nionso Mpe Ezo Sikila Pe Kobulisa Bato Nionso Baye Bandimi Yesu Klisto (Baloma 1:18 - 8:39)
A - Mokili Mobimba Ezali Na Nse Ya Nguya Ya Mabe, Mpe Nzambe Asambaka Na Bosembi (Baloma 1:18 - 3:20)

1. Nkanda ya Nzambe emonisami uta na lola likolo ya bozangi Nzambe mpe bozangi boyengebene nyonso ya bato (Baloma 1:18-32)


BALOMA 1:26-28
26 Mpo na yango Nzambe apesaki bango na bamposa ya nsɔni. Ata basi na bango ba échanger ba relations naturelles na oyo ekeseni na nature. 27 Bobele bongo mibali mpe batikaki boyokani ya bomoto na basi mpe bakómaki na mposa makasi ya kolinga moko na mosusu. Mibali basalaki misala ya nsoni elongo na mibali mosusu, mpe bazwaki kati na bango moko etumbu oyo esengeli mpo na libunga na bango. 28 Mpe kaka lokola bakanisaki ete ezali na ntina te kobatela boyebi bwa Nzambe, boye Nzambe apesaki bango na makanisi ya mbindo, mpo ya kosala oyo esengelaki kosalema te.

Polo akomaki fraze ya malili "Nzambe apesaki bango" mbala misato na mokapo ya liboso. Liloba oyo esangisi mokano, nkanda, mpe kelasi ya liboso ya kosambisa. Mawa na baoyo Nzambe apesi bango na nguya ya mabe, mpo bakweyi na libateli mpe bobateli ya mobongisi ya makambo nyonso.

Kokabwana wana na Nzambe emonanaka na kobebisa mitema na bamposa mabe mpe kokɔtela makanisi na makanisi ya koboya Nzambe. Na nsima, bato bakopusama lokola banyama na bamposa na bango, bakokanisa bobele kokokisa mposa na bango ya mosuni. Moto oyo motema na ye efandi na Molimo Mosantu te, oyo azali ntango nyonso kotambwisa nzoto na ye mpe ya kati te, akobongwana na moto ya mbindo, ata soki alati masque ya bizaleli malamu mpe ya bonkonde.

Lelo oyo, na eleko ya bokokani kati na mibali mpe basi, tozali kokuta basi bazali koloba ete bazali na lotomo ya kokokisa bamposa na bango ya kosangisa nzoto kozanga ete bázala na mposa ya mobali. Ba groupes misusu kutu bazali kosenga décriminalisation ya sodomie na kosanga na basi na basi, mpo na kopekisa perpétuation ya phénomène oyo na mokili. Kasi Polo atalelaka baoyo nyonso oyo bazali kotosa makanisi na bango na nzela ya mayele oyo ekeseni na biloko bizalisami lokola basali libunga mpe bazali na nse ya nkanda ya Nzambe.

Bato wana nionso bamemaka kobebisama mpe kobanga monene na kati na bango mpe kolemba na makanisi na bango, mpo bazali nanu batu ya normal te, kasi balotaka mpe basalaka oyo balingi te. Moto oyo asali masumu azali moombo ya masumu, mpe oyo atikali na kati ya ebongiseli ya Nzambe te akokwea na bipekiseli mpe bokangami ya satana oyo ekaboli bango na Nkolo na bango kino na nsuka bakokabwana na Ye.

Ntina ya kokweya ya sivilizasio ezali mozindo, mpe ntina ya mabe ezali te kosangisa nzoto oyo esalemaka mbala na mbala te, kasi ezali nde bato ya kanyaka oyo babebisaka mpe oyo balingaki te kobatela Nzambe na makanisi na bango; na esika na yango, bamilingaki mpe mokili koleka Nzambe, mpe na ntina na yango, bakweaki longwa na bosɔtɔ mpe bakómaki na makambo ya mbindo. Mpe oyo azali kotanga matatoli ya baye babikisami na Klisto asosolaka noki ete yambo ya lobiko na bango, bazalaki mosika na Nzambe. Lokola bazalaki na kondima te, bakómaki baombo ya mbindo ya kosangisa nzoto ya ndenge nyonso mpe ya mbindo. Kasi ntango Klisto azwaki bango, apesaki bango bolimbisi, bopetoli, bozongisi sika, libɔndisi, makasi, elikia mpe esengo.

Nzokande, oyo na nko atikali mosika na Nzambe mpe azali kotelemela kobendama ya Molimo Mosantu epai ya boyamboli mpe bosikoli akozwa makanisi ya koboya. Ezali na bosambisi moko te mpo na moto oyo ezali makasi koleka liloba "baboyami," oyo ezali komonisa nkanda ya Nzambe likolo ya moto wana, mpo ete moto oyo Nzambe aboyi ye akoki kozonga epai na Ye te. Ya solo, mpo na kozonga epai ya Nzambe, moto asengeli kozongisama sika ya makanisi. Liloba "koyambola" na Greke elimboli "kobongola makanisi." Nzambe alingi kosala mbongwana ya makanisi na kati na biso mpo ete andima mpe azongisa biso sika.

Motema na yo ezali ndenge nini, motángi ya bolingo? Makanisi na yo efungwami mpo na Molimo ya Nzambe mpe lobiko mpe bopeto na Ye, to ozali lokola baoyo bazali kobika na kozanga komibanzabanza mpe bamilongolaka na Nzambe na nzela ya makanisi na bango ya mabe? Zongela ntango ntango ezali naino, mpe senga Nkolo apetola bomoto na yo ya kati mpe abongola motema na yo. Kotika te ete makambo na yo ya kala etikala mbindo; Nkolo na yo abikisaka yo, alimbisaka yo, mpe apetolaka yo. Ye moko azali na makoki ya kosikola yo na bokangami nyonso ya kala mpe na bamposa na yo ya mbindo, soki ozali na mposa na yango na motema na yo mobimba. Okoki te komibikisa yo moko, kaka na nzela ya bolingi, mokano, losambo epai ya Nkolo, mpe kondima lobiko na Ye. Azali ntango nyonso pene ya kobikisa yo.

LOSAMBO: Nzambe mosantu, oyebaki ngai, mpe makanisi na ngai nyonso ezali polele liboso na yo. Oyebi makambo na ngai ya kala, mpe nasali lisumu na moto nyonso. Limbisa ngai bamposa na ngai mpe petola bomoto na ngai ya kati. Kamba ngai na liloba na yo mpo nalinga yo. Nalingi kosala lisusu lisumu te. Salá kati na ngai mokano ya makasi mpo nazwa bonsomi na ngai na lobɔkɔ na yo. Bikisa ngai na elimo na ngai oyo eboyami mpe na nzoto na ngai ya mbindo. Ozali monganga na ngai mpe mobikisi na ngai. Nazali kotyela yo motema.

MOTUNA:

  1. Ndenge nini Paulo alobelaki ndenge oyo nkanda ya Nzambe emonisaka?

www.Waters-of-Life.net

Page last modified on October 13, 2026, at 04:17 AM | powered by PmWiki (pmwiki-2.3.3)