Home
Links
Bible Versions
Contact
About us
Impressum
Site Map


WoL AUDIO
WoL CHILDREN


Bible Treasures
Doctrines of Bible
Key Bible Verses


Afrikaans
አማርኛ
عربي
Azərbaycanca
Bahasa Indones.
Basa Jawa
Basa Sunda
Baoulé
বাংলা
Български
Cebuano
Dagbani
Dan
Dioula
Deutsch
Ελληνικά
English
Ewe
Español
فارسی
Français
Gjuha shqipe
հայերեն
한국어
Hausa/هَوُسَا
עברית
हिन्दी
Igbo
ქართული
Kirundi
Kiswahili
Кыргызча
Lingála
മലയാളം
Mëranaw
မြန်မာဘာသာ
नेपाली
日本語
O‘zbek
Peul
Polski
Português
Русский
Srpski/Српски
Soomaaliga
தமிழ்
తెలుగు
ไทย
Tiếng Việt
Türkçe
Twi
Українська
اردو
Uyghur/ئۇيغۇرچه
Wolof
ייִדיש
Yorùbá
中文


ગુજરાતી
Latina
Magyar
Norsk

Home -- Lingala -- Romans - 001 (Introduction)
BALOMA - Mokonzi Azali Bosemnbo Na Biso
Boyekoli Ya Mokanda Ya Polo Epai Ya Baloma

MALOBA YA EBANDELI


MALOBA YA EBANDELI YA MOKANDA EPAI YA BALOMA

Moko ya makabo minene oyo Nkolo Yesu Klisto apesaki, oyo asekwaki uta na bakufi mpo na lingomba na Ye, ezali mokanda ya ntina oyo afulamaki na ntoma na Ye Paulo mpo na kokoma epai ya bandimi oyo bafandi na Loma.

NTINA YA MOKANDA

Na tango wana, Apostolo epai ya bapakano asilaki kosakola nsango malamu na Asie Mineure mpe na bitúká ya Grèce na boumeli ya mibembo na ye misato ya misio. Abandisaki mangomba ya bomoi na bingumba minene mpe alendisaki bandimi na mosala ya bolingo. Mpo na kobatela mangomba, atyaki bankulutu, bapastɛrɛ mpe baepiskɔpɔ. Na nsima, lokola amonaki ete mosala na ye na ɛsti ya Méditerranée esilaki, abalukaki na wɛsti mpo na kotya bokonzi ya Klisto na France mpe na Espagne (Baloma 15:22-24).

Na boyokani na miango wana, akomaki mokanda na ye ya lokumu mingi epai ya bandimi ya lingomba na Loma mpo na kozwa bondimi na bango, kolimbola ete azalaki ntoma ya Klisto epai ya bapakano na nzela ya boyekoli ya bokebi mpe ya kobongisama ya Nsango Malamu oyo azalaki na yango. Amekaki kolamusa mitema na bango mpo na kosangana na ye na mobembo na ye ya misionere na westi, kaka lokola lingomba ya Antiokia, na Siri, esungaki mpe mibembo na ye, milende na ye ya kosakola nsango malamu, mpe mpasi na ye na nzela ya mabondeli na bango ya kokoba. Mokanda oyo batindelaki Baloma ezali na boyekoli ya moboko ya liboso; ekokani na kosukola bɔɔngɔ́ ya lingomba, oyo ebongisami mpo na kolendisa yango na kondima ya solo mpe kobongisa yango mpo na kosakola nsango malamu na mokili na nzela ya milende elongo.

Nani abandisaki lingomba na Loma?

Ezala Paulo to Petelo, to ntoma to nkulutu mosusu, abandisaki lingomba na Loma te; kasi, ezalaki nde Bayuda oyo bautaki na mikili mosusu nde bakómaki kofanda na Loma. Bato wana basalaki mobembo na Yelusaleme na mokolo ya Pantekote, epai Klisto atondisaki basambeli oyo babongoli motema na Molimo Mosantu. Yango wana, monɔkɔ na bango etondaki na makamwisi ya Nzambe. Na nsima, bazongaki na Loma mpe batatolaki epai ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso oyo babakamaki na ekulusu na makita na bango. Balobelaki lobiko na ye elongo na bandeko na bango Bayuda mpe Bapakano mpe basalaki bituluku ya bandako mpo na koyekola Torah mpe kososola bisakweli oyo etali Klisto.

Apostolo Paulo akutanaki mbala na mbala na bandimi na Rome na tango ya mibembo na ye na Asie mpe na Grèce, mingi mingi sima ya kobengana Bayuda na mboka-mokonzi na bokonzi ya Ampereur Claude liboso ya mobu 54 nsima ya liwa ya Klisto (Misala 18:2). Paulo alingaki koyeba lingomba ya Loma ye moko mpe kokabola na yango mwa makabo ya Molimo Mosantu oyo ezali kosala kati na ye. Akanisaki te kotikala ntango molai na mboka-mokonzi ya mokili na ntango wana, mpamba te amonaki kuna lingomba moko ya bomoi mpe ya lipanda. Na boye akobaki na nzela na ye na kati ya bandeko wana na Nkolo mpo na kosakola Nsango Malamu ya lobiko na bisika oyo ekangamaki.

Mokomi ya mokanda yango azali nani? Mpe ntango nini akomaki yango? Mpe wapi?

Apostolo Paulo akomaki mokanda oyo na mobu 54 nsima ya liwa ya Klisto, ntango afandaki elongo na Gayo na engumba ya Korinti, epai wapi alobelaki na mokuse makambo oyo akutanaki na yango na molimo mpe mateya ya bantoma. Moto moko te akokaki kokoma makambo oyo Paulo akomaki na mokanda oyo mpamba te Klisto ya bomoi ye moko apekisaki ye ntango, na molende na ye mpo na mibeko, amekaki kopalanganisa minyoko ya baklisto na Damasi. Lokola atambwisamaki na pole ya bonzambe oyo ezalaki kongɛnga, asosolaki bosolo monene ete Yesu ya Nazarete, oyo batyolamaki, azali na bomoi. Azali Nkolo ya nkembo, oyo nzoto na ye epɔlaki te na lilita nsima ya kobaka ye na ekulusu, kasi oyo alongaki liwa mpe asekwaki solo, amimonisaki lokola mokonzi ya bato nyonso. Na nsima, Paulo asosolaki ete Mwana ya Nzambe akweisaki monyokoli na ye te to abebisaki te, kasi ayokelaki ye mawa, alongisaki ye na bonsomi, mpe abengaki ye asalela na kosakola nsango malamu, te mpo ete abongi na yango, kasi na ngolu kaka. Na bongo, motema ya moto ya motó makasi ya Nzambe ebukanaki, mpe ayaki kondima ngolu ya Nzambe mpe ntina ya boyengebene ya sika. Na ntango wana atyelaki motema te na misala na ye ya bomoto engebene na mobeko, kasi abimaki na mokili kotosaka bolingo ya bonzambe ya Klisto, kobenga baoyo nyonso babungaki mpe babebaki mpo na kondima boyokani na Nzambe.

Mitindo nini oyo ezali komonana mingi na mokanda oyo?

Paulo alingaki kolimbola likambo wana ya losambo epai ya mosangani nyonso ya lingomba na Loma. Kasi akomaki mokanda te na elobeli ya rhétorique mpe ya littéraire oyo ebendaka likebi, akomaki mpe te boyekoli molai ya bokokanisi. Kasi, amonisaki makanisi na ye na pɛtɛɛ nyonso mpe na polele mpe ayanolaki na mituna oyo azalaki kokanisa ete Bayuda mpe Baloma bakotuna yango. Paulo a dictaki mokanda oyo na ndeko na ye na Nkolo, "Tertius," kokanisaka na makanisi na ye bayoki ya bandimi oyo azalaki kokomela. Alobelaki maloba na ye yambo epai ya babongwanaki ya sika, kolakisaka bango na ntina ya bosantu ya kopetola ya Nzambe, mpe nsima abendaki babukani na bondimi ya bomoi na nzela ya kolongisama mobimba kati na Yesu Klisto, oyo ezali elikya se moko mpo na bato. Lisusu, aningisi bato ya mibeko (Mibeko ya Mose), bato ya komikumisa, mpe abukaki komilongisa na bango na kolakisaka kobeba na bango mpe kozanga kokoka mpenza, mpe lolenge nini bakokaki kosantisama na bondimi ya komikitisa mpo na misala ya bolingo ya Nzambe na botosi ya Molimo Mosantu.

Mpe na lolenge oyo, Apostolo Paulo azali kotya boyokani na Mokanda na ye epai ya Baloma kati na mosala ya kosakola nsango malamu mpe mateya ya ebongiseli mpe ya mobimba. Na mokanda oyo, ntoma alobeli kaka lingomba ya Loma te, kasi moto nyonso—Bapakano mpe Bayuda, mibange mpe bilenge, bato mpamba mpe batángá, bato ya bonsomi mpe baombo, mibali mpe basi. Mokanda epai ya Baloma etikali, tii lelo, molakisi ya libosoliboso mpo na baklisto nyonso. Monganga Martin Luther alobaki boye: “Mokanda epai ya Baloma ezali eteni ya ntina mingi mpe ya pɛto ya Kondimana ya Sika.Ebongi ete moklisto nyonso akanga yango na motó mpe amema yango mokolo na mokolo, lokola eloko ya motuya ya elimo mpo na molimo na bango.” Mokanda oyo ezali na makambo nyonso oyo moklisto asengeli koyeba: Mibeko mpe Nsango Malamu, lisumu mpe kosambisama, ngolu mpe kondima, boyengebene mpe bosolo, Klisto mpe Nzambe, misala malamu mpe bolingo, elikia mpe ekulusu. Mpe lisusu lolenge nini tosengeli komitambwisa epai ya basusu, ezala bato ya bonzambe to basumuki, ya makasi to ya bolembu, baninga to banguna, mpe kutu lolenge nini tomisalela. Nalendisi moklisto nyonso asala engebene na mateya ya Mokanda epai ya Baloma.

Ndeko ya bolingo, soki ozali na mposa ya kokolisa boyebi na yo mpe kosalela kondima na yo, komanyola na Mokanda ya Paulo epai ya Baloma. Ezali lokola iniversite ya Nzambe, etondi na boyebi, makasi, mpe elimo. Klisto akolongola yo na lolendo mpe bondimi na yo mpe akolendisa yo na bosembo ya kokoka, mpo ete ozala mosaleli oyo akoki kosalela bolingo ya bonzambe mpe kokola mokolo na mokolo na bolingo.

Bolakisi ya Mokanda epai ya Baloma

Baloma 1:1-17 -- Ntoma azali komilakisa na lingomba ya Roma lokola mosali mpe ntoma ya Yesu Klisto, na lipamboli ya bantoma. Motó ya likambo ya mosala na ye ezali “boyengebene ya Nzambe,” mpe yango ezali mpe motó ya likambo ya Mokanda epai ya Baloma.

NDAMBU YA 1 – EKATELI YA SEMBO YA NZAMBE ESENGELI BISO

Baloma 1:18 - 3:23 -- Tozali basumuki, mpe Nzambe akosambisa biso engebene na mobeko oyo ezali konyata lolendo na biso.
Baloma 3:24 - 4:25 -- Nzambe alongisaka na bonsomi baye banso bandimi ye na nzela ya liwa ya bomikabi ya Yesu Klisto.
Baloma 5:01 - 8:39 -- Molimo ya Nkolo afandaka na kati ya bandimi, epesaka bango elikia pe elonga likolo ya masumu. Batambolaka na nguya ya Molimo, balongolami na elakeli mabe ya mobeko.

NDAMBU YA 2 - JUSTICE DIVINE NA HISTOIRE

Baloma 9:1 - 11:36 -- Nzambe atikali bosembo, atako bato ya kondimana ya kala baboyi ngolu na ye.

NDAMBU YA 3 - JUSTICE DIVINE NA BOMOI YA PRATIQUE

Baloma 12:1 - 16:27 -- Kondima ya solo ebongoli etamboli na biso mpe bomoi na biso na misala ya bolingo mpe ya kotosa moko na mosusu.

Koyekola mokanda oyo ezali pɛtɛɛ te; esengaka milende ya mayele, losambo, mpe komanyola ya mozindo mpo ete okoka kosepela na mapamboli na yango, oyambola, ozala ya sika na makanisi na yo, mpe omona horizon ya sika na bomoi kati na Klisto. Mokanda oyo ememaki te bandimi ya lingomba na Loma na komipesa na molimo to na kosepela na boyengebene na bango ya sika; kasi, epesaki bango bisaleli mpo na kosalela Nsango Malamu na bisika na bango mpe na bisika mosusu ya mokili. Nkolo Yesu azali kobenga bino mpe na botondi ya ngolu na ye, mpo ete atinda bino, elongo na bandeko mibali mpe basi oyo balongisami na mbeka ya bosikoli mpe ya bozongisi ya Nkolo Yesu, epai ya baoyo bazangi bolingo mpe elikia. Yoka, sambela, mpe sakola Nsango Malamu ya bolingo mpe elikia epai ya bato ya masumu.

MITUNA:

  1. Mpo na nini mpe mpo na ntina nini Paulo akomaki Mokanda epai ya Baloma?
  2. Nani abandisaki lingomba na Loma?
  3. Nani azali mokomi ya mokanda oyo? Ekomamaki wapi mpe ntango nini?
  4. Motindo nini Paulo asalelaki mpo na kokoma Mokanda epai ya Baloma?
  5. Mwango ya Mokanda epai ya Baloma ezali nini?

www.Waters-of-Life.net

Page last modified on October 09, 2026, at 12:45 PM | powered by PmWiki (pmwiki-2.3.3)