Waters of LifeBiblical Studies in Multiple Languages |
|
|
Home Bible Treasures Afrikaans |
This page in: -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Bengali -- Burmese -- Cebuano -- Chinese -- Dioula? -- English -- Ewe -- Farsi? -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Javanese -- Kiswahili -- Kyrgyz -- LINGALA - Malayalam -- Peul -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Thai -- Turkish -- Twi -- Urdu -- Uyghur? -- Uzbek -- Vietnamese -- Wolof? -- Yiddish -- Yoruba
Previous Lesson -- Next Lesson YOANE - Pole Epeli Kati Na Molili
Koyekola Sango Malamu Na Yesu Oyo Yoane Akomi
ETENI YA 4 - Pole elongi molili (Yoane 18:1 – 21:25)
B - Lisekwa Mpe Biloko Ya Klisto (Yoane 20:1 - 21:25)
1. Makambo oyo esalemaki na mpokwa ya Elekeli (Yoane 20:1-10)
c) Komonana ya Yesu epai ya Maria Magadalena (Yoane 20:11-18)YOANE 20:11-13 Lokola eloko mosusu esengelaki kosalema te, bayekoli yango mibale bakendaki. Nzokande, Malia azongaki na lilita epai atikalaki ye moko, atungisamaki mingi na kolimwa ya nzoto. Akangamaki na ye mpo azalaki elikya na ye mpe makasi na ye. Soki abungisaki miso na nzoto, elikya na ye elingaki kosila. Yango wana alelaki na bololo. Lokola Yesu amonaki ete azangaki elikya, atindaki ye baanzelu mibale oyo babimelaki mpe basi mosusu. Amonaki bango bafandi na lilita, balati bilamba ya mpɛmbɛ, bazalaki kongɛngisa shambre ya molili. Kasi bakokaki kobɔndisa ye te, mpamba te kaka Yesu nde akokaki kobɔndisa ye. Motema na ye egangaki, “Ozali wapi, Nkolo na ngai?” Libenga oyo ya kimia epesameli biso. Tolingi nini? Mpo na nini tolingi oyo tolingi? Mikano na biso ezali nini? Tokanisaka lokola Malia mpe tozalaka na mposa ya eloko mosusu te bobele komona Yesu? Motema na yo ezali na mposa makasi ya komona ye lisusu? YOANE 20:14-16 Yesu ayanolaki kolela na ye. Ntango basusu basepelaki komona lilita oyo ezalaki mpamba mpe koyoka baanzelu, Maria Magadalena alingaki komona Yesu. Amonanaki epai na ye lokola moto mpamba oyo azalaki na halo te na motó. Atungisamaki mingi mpe ayebaki mongongo ya Yesu te. Asosolaki te ete azalaki wana na ngonga wana, mpo ete motema oyo ezali na mawa ekoki mpenza te kososola bozali ya Klisto mpe koyoka maloba na ye ya elengi. Mingi oyo balukaka Nzambe Mozalisi bazwi Ye te mpo balingaki koluka to kosenga na esika ya Mobateli ya mpate oyo alukaka. Kasi Yesu ayebaki bolingo ya Malia mpe akitisaki mpasi na ye na maloba ya mawa; Abengaki ye na nkombo, likambo oyo mosali elanga ya pɛtɛɛ alingaki kosala te. Ye ayebi makambo nyonso, na mayele, Nkolo. Abengaki Maria kaka ndenge Mobateli malamu abengi bampate na ye, oyo ayebi bango na nkombo. Oyo alingi Yesu azali komona bolingo na ye mpe azwi bolimbisi ya masumu na ye mpe libɔndisi ya Molimo Mosantu, mpe Nkolo abengi ye na nkombo na ye. Yesu abengi yo na kombo. Oyokaka mongongo na ye? Tika ba doute na yo nionso pe masumu pe kende epayi na Ye. Malia ayanolaki ete: “Nkolo!” Liloba oyo esalelami "Rabbouni" elakisi moto oyo ayebi makambo nyonso mpe azali na nguya nyonso. Maria ayekolaka epai ya Nkolo na ye oyo apesaka ye boyebi, makasi, libateli mpe bomoi ya seko. Na yango, koganga na ye ekokani na oyo ya Eklezia na ntango ya kokamatama na yango. Nsima ya kozela ntango molai, akomona Nkolo na ye azali kokita na mapata, akosambela ye na botosi mpe akokumisa ye. LOSAMBO: Nkolo Yesu, tofukami liboso na yo oyo oyanolaki na bilikya ya Maria na kobimela ye. Obɔndisaki ye na bozali na yo. Liloba na yo ezali bomoi. Fungola matoyi na biso pe mitema na biso po toyamba maloba na yo. Salisa biso tótyela yo motema na esengo. MOTUNA:
|