Home
Links
Bible Versions
Contact
About us
Impressum
Site Map


WoL AUDIO
WoL CHILDREN


Bible Treasures
Doctrines of Bible
Key Bible Verses


Afrikaans
አማርኛ
عربي
Azərbaycanca
Bahasa Indones.
Basa Jawa
Basa Sunda
Baoulé
বাংলা
Български
Cebuano
Dagbani
Dan
Dioula
Deutsch
Ελληνικά
English
Ewe
Español
فارسی
Français
Gjuha shqipe
հայերեն
한국어
Hausa/هَوُسَا
עברית
हिन्दी
Igbo
ქართული
Kirundi
Kiswahili
Кыргызча
Lingála
മലയാളം
Mëranaw
မြန်မာဘာသာ
नेपाली
日本語
O‘zbek
Peul
Polski
Português
Русский
Srpski/Српски
Soomaaliga
தமிழ்
తెలుగు
ไทย
Tiếng Việt
Türkçe
Twi
Українська
اردو
Uyghur/ئۇيغۇرچه
Wolof
ייִדיש
Yorùbá
中文


ગુજરાતી
Latina
Magyar
Norsk

Home -- Lingala -- John - 102 (Jesus intercedes for his apostles)
This page in: -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Bengali -- Burmese -- Cebuano -- Chinese -- Dioula? -- English -- Ewe -- Farsi? -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Javanese -- Kiswahili -- Kyrgyz -- LINGALA - Malayalam -- Peul -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Thai -- Turkish -- Twi -- Urdu -- Uyghur? -- Uzbek -- Vietnamese -- Wolof? -- Yiddish -- Yoruba

Previous Lesson -- Next Lesson

YOANE - Pole Epeli Kati Na Molili
Koyekola Sango Malamu Na Yesu Oyo Yoane Akomi
ETENI YA 3 - Pole Epeli Kati Na Lisanga Ya Batoma (Yoane 11:55 - 17:26)
E - Libondeli Ya Yesu Na Liboso (Yoane 17:1-26)

3. Yesu azali kobondela mpo na bantoma na ye (Yoane 17:6-19)


YOANE 17:9-10
9 Ezali mpo na bango nde nabondelaka. Nabondelaka mpo na mokili te, kasi mpo na baoyo opesi ngai, mpo bazali ya yo; 10 mpe nyonso oyo ezali ya ngai ezali ya yo, mpe oyo ezali ya yo ezali ya ngai; mpe nakumisami kati na bango.

Libondeli ya Yesu ezalaki mpo na baoyo nyonso bandimaki Nzambe Tata, basangani elongo na Mwana na seko. Yesu ayaki mpo na mokili mobimba te, mpamba te bato baboyaki Molimo ya Nkolo mpe baponaki kosambisa. Bolingo ya Yesu ezalaki mpo na Eklezia na ye mpe bato baponami ya Nzambe. Boklisto endimi te Lingomba ya mokili mobimba oyo endimaka bato banso, mpo ete Lingomba oyo eponami kati na bato nyonso ekeseni, eponami; ekokani na mbuma ya liboso ya liwa ya Klisto.

Yesu alobaki te ete azali na eloko moko to moto moko, kasi amonisaki mbala na mbala ete bayekoli na ye bazali ya Tata na ye, atako Tata apesaki ye bango. Mwana atikalaki na komikitisa mpe amikitisaki epai ya Tata na losambo.

Yesu andimaki ete azwaki nkembo na bato oyo batyelaki ye motema, nzokande biso tozalaka na momeseno ya kotyola mpe koloba ete mangomba na biso ezali na bolɛmbu mpe ete ezali kosilikisa Klisto; azali kotala na mozindo koleka yango. Tata azali komona biso na pole ya ekulusu. Atindaki Molimo na ye epai ya bandimi na nzela ya Mwana. Kosopama wana ya molimo ezalaki elembeteli ya ntina ya ekulusu. Klisto akufaki mpamba te, kasi Molimo Mosantu azali kopesa biso makoki ya kobota mbuma mingi. Na yango mbotama nyonso ya sika epesaka Klisto nkembo.

YOANE 17:11
11 Nazali lisusu na mokili te, pe bango bazali na mokili, pe nazali koya epai na bino. Tata Mosantu, batelá na nkombo na yo oyo opesi ngai, mpo bázala kaka moko, lokola biso.

Klisto ayebaki ete mosika te akozonga epai ya Tata na ye, atako motɛki yango azalaki kopusana penepene na basoda mpo na kokanga ye. Yesu akokaki komona nkembo ya Tata na ye koleka liwa na ye, oyo epesaki ye likoki ya kosakola ete, “Nazali lisusu na mokili te,” wana azalaki naino na mokili.

Yesu akokanisaki mokili na ebale moko monene oyo mai na yango ezali koleka mbangumbangu, mpe ebongwanaka chute ya mai. Klisto abɛtaki mai mpo na kotɛmɛla mai oyo ezalaki koleka mpe azongisaki nsima nzela ya bomoto. Ayebaki ete bayekoli na ye bakozwa makasi ya kotɛmɛla mabe te. Yango wana abondelaki Tata na ye ete abatela balingami na ye na nkombo na ye.

Na bosenga na ye, Yesu asalelaki liloba moko oyo ekeseni na mosusu nyonso “Tata Mosantu.” Liboso ya mabe ya nsomo ya mokili, Mwana apesaki litatoli na bosantu ya Tata, oyo azali na mbeba te to litɔnɔ te. Nzambe Tata azali peto pe mosantu. Bosantu na ye ezali elamba ya bolingo na ye, mpe nkembo na ye epalangani na nzela ya kongenga ya bolingo na ye.

Na yango, nkombo mosantu ya Nzambe ezali ebombamelo epai bayekoli bazwaka libateli na bokonzi ya momeki. Ye oyo azali na bomoi na kati ya Klisto azali kobika na bomoko na Tata. Ye oyo afandi kati na Mwana, afandi kati na Tata. Nzambe Tata alaki kobatela bana na ye na bobateli na ye mpe na nse ya bobateli na ye. Satana akoki kobɔtɔla bango na lobɔkɔ na ye te.

Mpo na kozwa matomba na libateli na ye, basengeli te kozala na bomoi na koyinana, kasi kolimbisana mbala na mbala na bolingo. Bolingo oyo ebotamaka na moto te, kasi oyo afandi na bolingo ya Bosato Mosantu azwaka makasi, motema molai mpe bolingo mpo na basusu. Klisto asɛngaki Tata na ye abatela biso na boyokani na ye, mpo tózala bomoko elongo na ye lokola ye azali moko na Tata na ye. Liloba oyo ezali te analyse dogmatique to description théorique ya relation na biso na Nzambe, po demande ya Yesu endimami na Tata. Kondima na biso ezali ya lolendo te to ya kobombama te; Ezali mbuma ya libondeli mpe mpasi ya Yesu mpo na biso.

YOANE 17:12-13
12 Ntango nazalaki elongo na bango na mokili, nabombaki bango na nkombo na yo. Nabateli baoyo opesaki ngai, mpe moko te kati na bango abungi, longola se mwana ya libebi, mpo ete Makomami ekokisama. 13 Mpe sikawa nayei epai ya bino, mpe makambo maye nalobi o mokili, ete bakoka kozala na esengo ya ngai ekokisami na bangomei.

Na motema molai mpe na bokasi, Yesu abatelaki bayekoli na ye na komekama ya Satana, na kotalela bizaleli na bango ekeseni. Alobaki na Petelo ete: “Satana asɛngi yo, kasi ngai nabondeli mpo na yo, mpo kondima na yo esila te.” Na yango kondima na biso etikali makasi na nzela ya bosenga na ye mpe tobikisami na ngolu kaka.

Yuda azwaki litomba te na libateli yango mpo amikitisaki na elimo ya libebi mpe atɛmɛlaki Molimo ya solo. Akomaki mwana ya libebi. Tata na biso na Lola atindaka moto moko te na makasi mpo na kozwa likabo ya boyambi. Ayebi oyo ezali na mitema ya bato, mpe ayebi makambo ya kala, ya lelo, lokola mpe oyo ekoya. Oyo ezali lolenge nini kotɛka ya Yudasi ekokaki kosakolama na Kondimana ya Kala koleka mbula nkóto liboso. Atako bongo, Yuda atikali na mokumba ya koboya Klisto. Nzambe na biso ya nguya azali dictateur te kasi azali Tata ya mayele; Likambo moko ya bolingo na ye ezali likabo ya bonsomi epai na bato, kaka ndenge batata ya mabele bapesaka bonsomi na bana na bango oyo bakómi mikóló.

Yesu amonaki nzela na ye epai ya Tata lokola nzela ya mwinda na kati ya molili. Ezala Satana, to lisumu, to liwa ekokaki te kopekisa ye azonga epai ya Nzambe. Mwana azalaki mosantu uta libela, mpe esengo etondaki na ye. Lisumu esalaki te na lisosoli na ye. Kobanga etyaki elili te likoló ya mabondeli na ye. Mwana azalaki na bonsomi mpe abatelamaki na Tata na ye, na botosi. Nzambe na biso azali Nkolo ya esengo mpe ya esengo. Yesu abondelaki Tata na ye ete atondisa mitema ya bayekoli na ye na esengo. Alingaki te bazala na mawa, alingaki bayeba esengo ya lola, tango bazalaki ko kobika na molili pe kozanga elikya ya mokili. Esengo na bolimbisi, mpe botondi mpo na esika na biso na libota ya Nzambe ezali mbuma ya losambo ya kobondela ya Klisto na nkombo na biso.

LOSAMBO: Nkolo Yesu, merci ndenge osembola na kombo na biso epayi ya Tata. Tokumisi yo mpo na kobatela biso na kondima na nzela ya mabondeli na yo. To kumambeli yo mpo na esengo na yo epai na biso. Bozali na bino mpe Molimo ya Tata bozwi biso na molimo mpe ezali lipamboli ya seko. Matondo mingi mpo na mabondeli na bino! Tozali kobika na nzela ya intercession na yo.

MOTUNA:

  1. Bobateli na biso na kombo ya Tata elingi koloba nini?

www.Waters-of-Life.net

Page last modified on December 26, 2025, at 04:19 AM | powered by PmWiki (pmwiki-2.3.3)