Waters of LifeBiblical Studies in Multiple Languages |
|
|
Home Bible Treasures Afrikaans |
Home -- Lingala -- John - 051 (Disparate views on Jesus) This page in: -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Bengali -- Burmese -- Cebuano -- Chinese -- Dioula? -- English -- Ewe -- Farsi? -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Javanese -- Kiswahili -- Kyrgyz -- LINGALA - Malayalam -- Peul -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Thai -- Turkish -- Twi -- Urdu -- Uyghur? -- Uzbek -- Vietnamese -- Wolof -- Yiddish -- Yoruba
Previous Lesson -- Next Lesson YOANE - Pole Epeli Kati Na Molili
Koyekola Sango Malamu Na Yesu Oyo Yoane Akomi
ETENI YA 2 - Pole Engengi Kati Na Molili (Yoane 5:1 - 11:54)
C - Mobembo Ya Suka Ya Yesu Na Jerusalem (Yoane 7:1 - 11:54) Kokabola Molili Na Pole
1. Maloba ya Yesu na Elambo ya Bahema (Yoane 7:1 – 8:59)
b) Makanisi ndenge na ndenge na ntina ya Yesu na kati ya bato mpe na Likita oyo eleki monene (Yoane 7:14-53)YOANE 7:31-32 Atako matata ezalaki na Yelusaleme, bato mingi babandaki kondima nguya oyo ezalaki kosala kati na Yesu. Balobaki na motema na bango ete: “Mbala mosusu azali Masiya nsima ya nyonso; mpo asali makamwisi ya nguya.” Yesu amemaki bato oyo bazalaki kolekisa ndelo mingi te mpo na kondima ye. Tomoni ete azalaki na bayekoli ata na mboka-mokonzi. Nsima ya lapolo ya banɔngi, Bafalisai basosolaki ete bozongisi ebandaki kati na bato mpe ete mobulungano na yango ezalaki kokóma makasi na Yelusaleme. Basilikaki mpe balukaki kosala elongo na bato oyo bazalaki kowelana, banganga-nzambe mpe Basadukai. Balingaki kotinda bakonzi ya tempelo na makasi bábengana Yesu. Banganga-nzambe bandimaki kosala elongo na Bafalisai mpo na kokanga Yesu. Baanzelu ya Nkolo bazingaki molakisi ya bonzambe mpe bapekisaki basali kokokisa mitindo ya bakonzi na bango. Yesu amonaki bango bazali kopusana, kasi akimaki te. Kasi, amonisaki nkembo na ye, oyo mosakoli ya nsango malamu alobeli biso lokola esakoli ya mwango ya lobiko ya Nzambe. YOANE 7:33-36 Yesu ayebisaki batɛmɛli na ye ete akotikala na kati na bango mwa ntango mosusu. Ayebaki deja que akokufa lokola Mwana na Mpate ya Nzambe. Ayebaki mpe ntango ya lisekwa na ye, komata na ye mpe bozongi na ye epai ya Tata. Yesu azalaki na mposa makasi ya kozala elongo na Tata oyo atindaki ye mpo na kosikola biso. Lokola alingaki biso, atikalaki na mokili mosika na ndako na ye na likoló. Yesu amonaki liboso ete bayekoli na ye bakokamwa ntango akosekwa mpe akomata na likoló. Bakozala na mawa soki bazali na nzoto ya elimo te oyo ekopesa bango nzela ya komata na likoló elongo na ye. Ayebaki mpe ete batɛmɛli na ye bakoluka nzoto na ye oyo ‘ebungaki’ nsima ya kolongwa na lilita oyo bakangisaki elembo. Mawa na baye balingaka Mobikisi te! Bakokoka te kokabola nkembo na ye to kokota na lola. Masumu na bango ekokabola bango na Nzambe. Kozanga kondima ebatelaka bango libanda ya bokonzi ya ngolu. Bayuda basosolaki maloba ya Yesu te mpe bandimaki ete alingi kokima na basinagoga ya Bayuda na bingumba ya Bagreke oyo ezalaki zingazinga ya Mbu ya Mediterane. Balobaki ete mokano na ye ezalaki ya kokómisa bayekoli kati na baoyo bayebaki Makomami te. Basusu basɛkaki ete: “Mbala mosusu azali na mposa makasi ya kokóma molobi oyo ayebani mingi mpe kolakisa makanisi na ye epai ya bafilozofe ya Bagreke mpo na komema bango epai ya Nzambe ya bomoi.” Ntango Yoane akomaki maloba ya Yesu mpe makambo yango, azalaki kofanda na Efese kati na Bagreke. Nsango malamu ya lobiko ekómaki epai ya Bayuda oyo bazalaki kuna. Bagreke mingi bazalaki kondima Klisto. Mosakoli ya nsango malamu amonaki na maloba ya Yesu mpe na maseki ya Bayuda kondima ete Yesu azalaki molakisi monene kati na Bagreke. Ezali kopesa te bafilozofi ya mpamba oyo ebotaka makanisi ya kozanga elikya. Azali mopesi ya bomoi; epai na ye ebimaka nguya oyo elɛmbisaka ata moke te. MOTUNA:
|