Waters of LifeBiblical Studies in Multiple Languages |
|
|
Home Bible Treasures Afrikaans |
This page in: -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Bengali -- Burmese -- Cebuano -- Chinese -- Dioula? -- English -- Ewe -- Farsi? -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Javanese -- Kiswahili -- Kyrgyz -- LINGALA - Malayalam -- Peul -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Thai -- Turkish -- Twi -- Urdu -- Uyghur? -- Uzbek -- Vietnamese -- Wolof -- Yiddish -- Yoruba
Previous Lesson -- Next Lesson YOANE - Pole Epeli Kati Na Molili
Koyekola Sango Malamu Na Yesu Oyo Yoane Akomi
ETENI YA 2 - Pole Engengi Kati Na Molili (Yoane 5:1 - 11:54)
B - Yesu azali Lipa oyo epesaka Bomoi (Yoane 6:1-71)
4. Yesu apesi mibali liponi: "Kondimá to koboya!" (Yoane 6:22-59)YOANE 6:41-42 Yoane mopalanganisi ya nsango malamu abengaki Bayuda ya Galile, atako bazalaki Bayuda ya etuluku wana te. Kasi lokola baboyaki Molimo ya Kristo, balekaki Bayuda ná bato ya ngele. Bakomeli bamonisaki ntina mosusu oyo baboyaki Yesu. Bamonaki ete makanisi mpe bindimeli na bango ya sembo na ndenge oyo bango moko basalaki eyokani te na bolingo ya Yesu. Mpo na bato ya Galile, babɛtaki libaku mpo na boyokani ya Yesu mpo bayebaki libota na ye: "Tata na ye" (Yozefe mosali ya mabaya) azalaki kofanda na kati na bango, azalaki moto mpamba, kozanga likabo ya esakweli to eloko mosusu; Mama na ye Maria azalaki na eloko moko te ya kokesenisa ye ná basi mosusu, longola kaka ete mwasi yango akómaki mwasi oyo akufelá mobali, yango emonisaki ete ezalaki na nkanda moko ya mabe. Na yango, bato ya Galile bazalaki kondima te ete Yesu azali limpa ya likoló. YOANE 6:43-46 Yesu amekaki te ko expliquer miracle ya mbotama na ye na ba oyo baboyaki ye, balingaki kondima ye ata ndenge nini te. Tokoki koyeba bonzambe ya moto Yesu te biso moko tokoyeba yango kaka na bofuli ya Molimo Mosantu. Na kondimaka Ye, tokomona Ye mpe tokoyeba bosolo na Ye monene. Yesu apekisi ebele ya bato ete bátyola bimoniseli ya Nzambe. Makanisi ya motó makasi esosolaka eloko moko te na ntina na bokonzi ya Nzambe. Kasi moto nyonso oyo azali kosepela na yango mpe azali koyoka mposa na yango azali komona bolingo ya Nzambe. Na bolingo na ye, Nzambe akambaka bato epai ya Yesu Mobikisi. Azali na mposa ya kongɛngisa bango mpe koteya mokomoko na bango, ndenge Yilimia 31:3 eyebisi biso. Na Kondimana ya Sika, ezali te bolingi na biso to makanisi na biso nde ebotaka bondimi; kasi, ezali Molimo Mosantu nde azali kongɛngisa biso mpe azali kokela bomoi ya bonzambe kati na biso. Ezali kosalisa biso tóyeba ete Nzambe ya nguya azali mpenza Nzambe mpe Tata na biso. Oyo ya nsuka eteyaka biso mpe ebatelaka boyokani ya semba elongo na biso. Azali kokela bondimi na mitema na biso na nzela ya mosala ya Molimo. Osilá koyoka mosala na ye na makanisi na yo? Ozali polele mpo na bopusi ya bolingo ya Nzambe? Molimo ya Tata ememaka biso epai ya Yesu mpe epusaka biso epai na ye. Alamusaka mposa na biso ya mai mpo na ye, kino nsukansuka tokokende kokutana na ye mpe kolinga ye. Yesu andimi biso ndenge tozali mpe aboyi biso te. Apesi biso bomoi ya seko. Na nguya ya lisekwa na ye, tokokokota na nkembo ya Tata na ye. Nzokande, bokeseni etikali kati na Yesu mpe mondimi oyo abotami sika. Moto moko te amona Nzambe longola se Mwana. Azalaki na Tata banda ebandeli pe amonaki ye. Tata na Mwana bakabwani te. Yesu alyaki kimya ya likoló mpe bizaleli nyonso ya Nzambe. YOANE 6:47-50 Nsima ya kosakola bomoko na ye na Tata, mpe mosala ya Molimo na mitema ya bayoki na ye, Yesu alakisaki bango lisusu bosolo ya ntina na ye mpo ete batyela ye motema. Alimbolaki na mokuse etinda ya boklisto: moto nyonso oyo andimi Yesu azali na bomoi libela na libela. Solo oyo ezali endimiseli oyo liwa ekoki kolongola te. Yesu azali lokola mampa oyo Nzambe apesaka bato na mokili. Na katikati ya kokatakata ya bokóli ya mampa, mampa esilaki te. Ndenge moko mpe, Yesu akoki mpo na bamposa ya mokili ntango nyonso, mpamba te kati na ye efandi mobimba ya Nzambe. Uta na Ye tozwaka elikia, esengo mpe mapamboli. Na liloba na ye apesaki bomoi ya Nzambe na mokili, mpe mokili ezwaki yango te. Manna azalaki likabo ya Nzambe; Bilei yango ezalaki na ndelo na ntango. Bato nyonso te oyo balyaki yango babikisamaki na liwa. Ezali mpe bongo mpo na misala ya bolingo malamu, bokoli ya tekiniki mpe bokutani ya siansi, oyo nyonso esalisaka na ndambo mpe mpo na eleko moko ya ndelo. Moyen ya kokima liwa ezali te, to kolonga lisumu. Nzokande moto oyo andimi Klisto akokufa te. Ntina ya Klisto ezali ya koya mpe kofanda kati na bino. Azali na mposa ya kofanda kati na yo moko, mpo ete elimo mosusu moko te ekoki koyangela yo. Ekoki kosikola yo na bamposa na yo nyonso ya mabe mpe kokitisa bobangi na yo, mpe lisusu kolendisa bolɛmbu na yo. Azali limpa ya Nzambe oyo ekanamaki mpo na bino. Lia mpe bózala na bomoi, mpo bókufa lokola basumuki mosusu te. MOTUNA:
|