Waters of LifeBiblical Studies in Multiple Languages |
|
|
Home Bible Treasures Afrikaans |
This page in: -- Albanian -- Arabic -- Armenian -- Bengali -- Burmese -- Cebuano -- Chinese -- Dioula -- English -- Ewe -- Farsi? -- French -- Georgian -- Greek -- Hausa -- Hindi -- Igbo -- Indonesian -- Javanese -- Kiswahili -- Kyrgyz -- LINGALA - Malayalam -- Peul -- Portuguese -- Russian -- Serbian -- Somali -- Spanish -- Tamil -- Telugu -- Thai -- Turkish -- Twi -- Urdu -- Uyghur? -- Uzbek -- Vietnamese -- Wolof -- Yiddish -- Yoruba
Previous Lesson -- Next Lesson YOANE - Pole Epeli Kati Na Molili
Koyekola Sango Malamu Na Yesu Oyo Yoane Akomi
ETENI YA 2 - Pole Engengi Kati Na Molili (Yoane 5:1 - 11:54)
A - Mobembo Ya Mibale Na Yelusaleme (Yoane 5:1-47) -- Kokola Na Bonguna Kati Na Yesu Bayuda
5. Ntina ya kozanga kondima (Yoane 5:41-47)YOANE 5:41-44 Yesu abukaki libenga ya banguna na ye mpe amonisaki bango ezalela ya mitema na bango mpe nsuka na bango ya mikolo mizali koya. Amonisaki makanisi na bango ya mabe, ntina ya ezaleli na bango ya kotyola. Azalaki na mposa ya kobɛta maboko te mpo ete andimisamaki na misio na ye. Kondima yango eutaki te likoló na mbuma ya polele ya mosala na ye. Soki bapesaki ye lokumu, apesaki lokumu yango epai ya Tata na ye. Ateyaki bayekoli ete bámibenga liboso epai ya Tata, mpe atikaki biso libondeli ya ndakisa: “Tata na biso oyo ozali na likoló, nkombo na yo ekumisama, bokonzi na yo eya, mokano na yo esalema na mabele lokola ezali na likoló.” Yesu awanganaki ata mokano moko te ya koluka lokumu mpe nkembo. Nkembo ya Tata na ye ezalaki devise na ye. Molende mpo na boyengebene ya Nzambe esilisaki ye. Bolingo ya Nzambe ezali elendiseli na bozalisi, na bosikoli, mpe na bobongi. Oyo ezali motema ya ntina ya Bosato Bosantu. Kokokisama ya Mibeko mpe bokangami ya kokoka ezali komonisa bolingo yango. Oyo azali na yango azali na bomoi mpo na ye moko te, alukaka nkembo na ye moko te, kasi akumisaka basusu mpe asalelaka bango na molimo ya komiboya. Apesaka biloko nyonso oyo azali na yango epai ya babola. Bolingo esilaka ata moke te. Moto moko te alingi Nzambe na bolingi, kasi ye oyo azali konyokwama na mbeba ya masumu, oyo ayamboli mpe andimi bolingo ya Nzambe kati na Klisto, akoyambola ete bolingo ya Nzambe esopami na mitema na biso na Molimo Mosantu oyo apesameli biso lokola Polo alobi. Bolingo oyo emonanaka na mbeka, komikitisa mpe motema molai. Oyo akofungola molimo na ye na Molimo ya Nzambe akolinga Bosato Bosantu pe bato banso. Kasi oyo azali komikumisa, amimoni ete azali malamu, azali mobongoli ya solo te, kasi azali monguna ya Molimo ya Nzambe. Azali moimi na motema na ye. Azali na mposa makasi ya bozongisi sika te, ayebi te mposa na ye ya Mobikisi, kasi azali koyeisa motema na ye makasi. Klisto ayaki na nkombo ya nzambe moko ya bapaya oyo ayebani te bolumbu, kasi na kombo ya Tata, mpo na komonisa bolingo mpe ngolu ya Nzambe. Baoyo nyonso baboyaka Klisto bamonisaka ete makanisi na bango ekangami na bolingo ya Nzambe. Balingaka molili koleka pole mpe bongo bayinaka baye babotami na pole. Klisto ayebisaki banguna na ye boyei ya motɛmɛli Klisto oyo akosangisa bato nyonso ya moimi, akokamba bango na botomboki mpo na bolingo ya Nzambe. Akosala makamwisi mpe akomekola Klisto. Mingi bakoki kondima te, balingi kofinga moko na mosusu na esika ya boyamboli ya solo. Bamitalelaka lokola bato ya malamu, ya makasi mpe ya mayele. Baninganaki liboso ya Mosantu te mpe bayebaka te ete Ye moko azali malamu. Komisepelisa ezali ntina ya kozanga kondima, mpe lolendo ezali elembo ya ezaleli wana ya lokuta. Oyo ayebi Nzambe pe asosolaka ezalela ya molimo na ye abukani pe ayambolaka lisumu na ye, aboyi nkembo pe lokumu nionso. Apesaka nkembo na Tata mpe Mwana libela mpe akumisi ngolu ya kobikisa. Kondima ete tolimbisami basumuki elongolaka biso na mpamba nyonso na etamboli na biso. Toyebi soki tozali nani mpe Nzambe azali nani. Bolingo eyebisaka moninga solo; moto ya lolendo akomikosa mpe akosa basusu, akomilongola na Molimo ya Nzambe oyo azali kokomisa biso na komikitisa. YOANE 5:45-47 Klisto abɛtaki lisusu lolendo ya bato oyo bayekolaka mibeko mpe alobaki ete, “Nakofunda yo liboso ya Nzambe te; Apesi bino Mibeko ya kondimana oyo ezali kokweisa bino. Olongi te na bolingo pe olingi koboma ngai na kombo ya Mibeko. Kolongwa na Nzambe, ozali koyengayenga na molili. Nabikisaki moto moko ya maladi na Sabata, mpe ozali na nkanda mpo na mosala ya Nzambe; oyinaka kutu ngai, moto oyo azali komonisa bolingo ya Nzambe. Oboyi kondima ete oyo ezali misala ya Masiya: elimo na yo ezali botomboki mpe makasi. Nzambe apesaki yo Mibeko mpo na bomoi kasi mpo na liwa te. Soki oyamboli, olingaki kozala na mposa ya Mobikisi. Mibeko mpe Basakoli ezali bobele maloba ya ebandeli mpo na koya ya moto oyo asakolami. Bobongoli mokano ya Mibeko mpe bomitiki kosambisa mibeko ya Nzambe. Okoki kosimba esakweli yango te. Makanisi na yo mabe epekisaka yo okanga ntina ya solo. Bokotikala ignorant pe ba baba, boko continuer kotelemela Molimo ya Nzambe. Mpo na motó makasi na yo, ozali kondima Liloba ya Bomoi te." MOTUNA:
MAKAMBO YA MITUNA - 2Ndeko motángi,
Komá esika ofandaka na yo na ndenge oyo okoki kotánga na lokasa na yo ya biyano mpe kaka te na enveloppe mpe tindá yango na esika oyo elandi: Waters of Life Internet: www.waters-of-life.net |